Ndenge ya kobanda lisolo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Mpo na kobanda koyekola na bato Biblia na mokolo ya pɔsɔ ya liboso na sanza ya nsambo
“Mpo na yo, ndenge nini Nzambe atalelaka mabondeli na biso? Okanisi ete azwaka yango na motuya to atiká kaka nzela ete tósalaka yango?” Tiká ye apesa eyano. Na nsima, lakisá ye ezipeli ya nsuka ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/07/2014. Bótalela makambo oyo ezali na nse ya motuna ya liboso mpe bótánga ata vɛrsɛ moko oyo ezali wana. Pesá ye bazulunalo mpe bóyokana mpo ozongela ye mpo bótalela motuna oyo elandi.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 01/07/2014
“Lokola Nzambe azali Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, okanisi ete ye nde abimisaka makambo nyonso ya mabe oyo esalemaka na mokili? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá Yakobo 1:13.] Zulunalo oyo elimboli ntina oyo makambo ya mabe esalemaka mpe oyo Nzambe akosala mpo na kosukisa mabe mpe minyoko.”
Lamuká! 07/2014
“Ata ndɛlɛ, moto nyonso akokutana na likambo moko ya mpasi, na ndakisa, makama oyo eutaka na mopɛpɛ makasi, koningana ya mabele to mpela, maladi to liwa ya moto moko oyo olingaka. Soki makambo ya ndenge wana esalemi, okanisi ete ezali na ntina kobatela makanisi malamu? [Tiká ye apesa eyano.] Bato mingi bamoni ete Biblia esalisaki bango na ntango bakutanaki na makambo ya mpasi. [Tángá Baroma 15:4.] Zulunalo oyo elimboli ndenge oyo Biblia ekoki kosalisa biso ntango tokutani na likambo moko ya mpasi.”