Ndenge ya kobanda lisolo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Mpo na kobanda koyekola na bato Biblia mokolo ya pɔsɔ ya liboso ya sanza ya Yuli
“Bato mingi basilá kozongela maloba oyo ya libondeli oyo babengaka ‘Tata wa biso’: ‘Bokonzi na yo eya. Mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabele.’ Mpo na yo, Bokonzi yango ezali nini? [Tiká ye apesa eyano.] Vɛrsɛ oyo ekosalisa biso tózwa eyano.” Tángá Danyele 2:44. Na nsima pesá moto yango Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuli, bótánga mpe bótalela elongo makanisi oyo ezali na motó ya likambo ya moke na lokasa 16. Tikelá ye bazulunalo mpe bóyokana mpo ozongela ye mpo bótalela eyano na motuna oyo elandi.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Yuli
“Lokola bomoi ezali mokuse mpe etondi na mikakatano, bato mingi bamitunaka soki bomoi ezali mpenza na ntina. Yo mpe osilá kokanisa likambo yango? [Tiká ye apesa eyano.] Biblia elaki ete bomoi ekozala lisusu ndenge ezali lelo te. [Tángá Emoniseli 21:4.] Zulunalo oyo elobeli mokano ya Nzambe mpo na mabele mpe emonisi mwa makambo oyo tokoki kosala mpo bomoi na biso ezala na ntina ata lelo oyo.”
Lamuká! Yuli
Lobelá likambo moko ya mpasi mingi oyo bapanzi-nsango bazali kolobela mikolo oyo. Na nsima lobá boye: “Mpo na yo, mpo na nini Nzambe atiki ete makambo ya ndenge wana esalema? [Tiká ye apesa eyano.] Biblia emonisi ete Nzambe ayokelaka bato oyo bazali konyokwama mawa. [Tángá Kobima 3:7.] Biblia eyebisi mpe biso ntina oyo Nzambe atiki bampasi ezala mpe ete etikali moke bampasi esila mpo na libela. Zulunalo oyo elimboli makambo yango.”