Ndenge ya kobanda lisolo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Mpo na kobanda koyekola na bato mokolo ya pɔsɔ ya liboso ya sanza ya 7
“Awa epai na biso, pene ya moto nyonso asepelaka azala na bomoi ya esengo mpe aumela ntango molai. Yango wana tolingi koyeba likanisi na yo na motuna oyo: Okanisi ete mokolo mosusu mayele ya siansi mpe ya minganga ekosala ete tózala na bomoi mpo na seko? [Tiká ye apesa eyano.] Talá ndenge zulunalo oyo elobi.” Na nsima, lakisá ye lokasa ya nsuka ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/07/2013, mpe bótalela elongo makambo oyo ezali na nse ya motuna ya liboso mpe bótánga ata vɛrsɛ moko oyo ezali wana. Pesá ye bazulunalo, mpe bóyokana mpo ozongela ye mpo bótalela motuna oyo elandi.
Liyebisi: Bokosala elakiseli ya “Ndenge ya kobanda lisolo” oyo na likita ya mosala ya kosakola na dati ya 6 sanza ya 7.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 01/07/2013
“Bato mingi oyo tozali kosolola na bango bazali na lingomba na bango. Kasi bamosusu bazali koloba ete batyelaka lisusu mangomba motema te. Ndenge nini yo otalelaka lingomba? [Tiká ye apesa eyano.] Yesu alobaki likambo moko oyo ekosalisa biso ntango tozali kotalela lingomba moko. [Tángá Luka 6:44a.] Zulunalo oyo elobeli mwa ndambo ya mbuma mabe oyo lingomba ebimisi. Epesi mpe eyano na motuna oyo elobi: Ezali na lingomba oyo ebongi kotyela motema?”
Lamuká! 07/2013
“Tozali kotala bato ya kartye na biso mpo na kolobela likambo moko oyo ezali kopesa mpasi: kozanga bosembo. Bato mosusu batombokaka to basalaka mobulu mpo na kotɛmɛla likambo ya kozanga bosembo. Okanisi ete bato oyo basalaka bongo balongaka kobongisa makambo? [Tiká ye apesa eyano.] Talá eloko oyo Biblia elobi ete ekobongola mpenza makambo awa na mabele. [Tángá Matai 6:9, 10.] Zulunalo oyo epesi eyano na motuna oyo elobi ete: Kotomboka nde ebongisaka makambo?”
Nsango malamu oyo euti na Nzambe!
“Tozali kotala mabota ya balabala na bino mpo na koyebisa bango likanisi moko ya kolendisa oyo euti na Biblia. Bato mingi oyo tosololi na bango bazali komituna mpo na nini Nzambe ya bolingo akoki kotika bampasi mingi boye na mokili. Okanisi ete na ebandeli ntango Nzambe asalaki mabele alingaki ete bato banyokwamaka?” Tiká ye apesa eyano. Na nsima, fungolá Liteya 5, mpe bótánga mpe bólobela baparagrafe mibale ya liboso mpe bavɛrsɛ oyo makomi na yango etɛngami mwa moke. Pesá ye mwa buku, mpe bóyokana mpo ozongela ye mpo bótalela motuna oyo elandi, oyo ekomami na makomi ya moindo makasi.