Ndenge ya kobanda lisolo
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 01/05/2015
“Soki ozali na likoki ya kosilisa mokakatano moko na mokili, ekozala nini? [Tiká ye apesa eyano.] Ndenge Biblia emonisi, mosika te Nzambe akosukisa likambo yango mpe makambo mosusu mingi. [Poná vɛrsɛ oyo eyokani na eyano na ye, na ndakisa Danyele 2:44; Masese 2:21, 22; Matai 7:21-23; to 2 Petro 3:7.] Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo emonisi ndenge Nzambe akosala mbongwana wana ya malamu mpe ntango akosala yango.”
Lamuká! 05/2015
“Okanisi ete mokolo mosusu tokofanda na mokili oyo moto nyonso akozala na ndako ya malamu mpe akonyokwama te na bobola? [Tiká ye apesa eyano.] Talá elaka oyo Nzambe apesi bato na likambo yango. [Tángá Yisaya 65:21-23.] Lamuká! oyo elobeli ndenge Nzambe akokokisa elaka na ye mpo na bato mpe oyo tosengeli kosala mpo tózala na mokili yango.