Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb16 Avril lok. 3
  • Lendisáká basusu na maloba ya boboto

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lendisáká basusu na maloba ya boboto
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2016
  • Masolo mosusu
  • Yobo ayikaki mpiko​—⁠Biso mpe toyika mpiko!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mokanda ya Biblia nimero 18—Yobo
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • “Nakotika bosembo na ngai te!”
    Mekolá kondima na bango
  • Bosembo ya Yobo ezwi mbano
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2016
mwb16 Avril lok. 3

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | YOBO 16-20

Lendisáká basusu na maloba ya boboto

Maloba ya moto oyo azali kopesa toli esengeli kolendisa basusu

16:4, 5

  • Yobo alɛmbaki nzoto mpe azalaki kotungisama, yango wana azalaki na mposa ete basusu básalisa mpe bálendisaye

  • Baninga misato ya Yobo balobelaki ye ata liloba moko te ya kobɔndisa. Kutu, bakoselaki ye nde makambo mpe babakiselaki ye mpasi

Maloba mabe ya Biledade ebakiselaki Yobo mpasi mingi lisusu

19:2, 25

  • Yobo asɛngaki Nzambe ete akufa mpo amona lisusu mpasi te

  • Yobo atyaki makanisi na ye nyonso na elikya ya lisekwa mpe akobaki koyika mpiko na bosembo mpenza

Elifaze azali kosolola na Yobo, Biledade ná Zofare bazali kotala

BATO OYO BAKOSELAKI YOBO MAKAMBO

Elifaze

Elifaze:

  • Ekoki kozala ete azalaki moto ya Temane, na mokili ya Edome. Yirimia 49:7 elobi ete Temane ezalaki esika oyo bato ya bwanya ya Edome bazalaki kofanda

  • Mbala mosusu Elifaze azalaki mokóló mpe na lokumu mingi koleka “babɔndisi” mosusu, yango wana alobaki liboso. Asalaki diskur misato mpe alobaki mingi koleka baninga na ye mibale

Makambo oyo akoselaki Yobo:

  • Atyolaki bosembo ya Yobo mpe alobaki ete Nzambe atyelaka basaleli na ye motema te (Yb 4, 5)

  • Abengaki Yobo moto mabe mpe ya lofundo, mpe alobaki ete Yobo abangaka Nzambe te (Yb 15)

  • Akosaki ete Yobo akabaka te mpe azangi boyengebene, mpe alobaki ete moto azali na ntina te na miso ya Nzambe (Yb 22)

Biledade

Biledade:

  • Azalaki moto ya libota ya Shua. Ekoki kozala ete azalaki kofanda pembeni ya ebale Efrate

  • Azalaki moto ya mibale ya koloba. Diskur misato oyo asalaki ezalaki mokuse kasi etondaki na maloba mabe koleka oyo ya Elifaze

Makambo oyo akoselaki Yobo:

  • Alobaki ete bana ya Yobo basalaki masumu mpe ebongaki mpenza likama wana ekwela bango; mpe alobaki lisusu ete Yobo andimelaka Nzambe te (Yb 8)

  • Alobaki ete Yobo azali moto mabe ( Yb 18)

  • Alobaki ete bosembo ya moto epai ya Nzambe ezali na ntina te (Yb 25)

Zofare

Zofare:

  • Azalaki Monaamate, mpe mbala mosusu azalaki kofanda na Nɔrdi-wɛsti ya Arabia

  • Azalaki moto ya misato ya koloba mpe alobaki makambo ya mabe koleka. Asalaki kaka diskur mibale

Makambo oyo akoselaki Yobo:

  • Alobaki ete Yobo azalaki koloba bilobaloba mpe ayebisaki ye atika kosala mabe (Yb 11)

  • Alobaki ete Yobo azali moto mabe mpe asepelaka na masumu (Yb 20)

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto