Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb17 Avril lok. 2
  • Tóyamba bango na esengo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tóyamba bango na esengo
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
  • Masolo mosusu
  • Tóyamba malamu bato na ntango ya Ekaniseli
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Litatoli monene ekopesama
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Tóyamba malamu bato oyo tobengisi
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2016
  • Tóyamba bango!
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
mwb17 Avril lok. 2

BOMOI YA BAKRISTO

Tóyamba bango na esengo

Tóyamba banani? Moto nyonso oyo ayei na makita na biso: ezala bato ya sika to bandeko ya kala. (Ro 15:7; Ebr 13:2) Ekoki kozala ndeko oyo auti mboka mopaya to ndeko oyo atiká kosakola ayei na makita mbala ya liboso nsima ya bambula ebele. Olingaki komiyoka ndenge nini soki ezalaki yo? Na ntembe te okosepela soki bapesi yo mbote na esengo! (Mt 7:12) Na yango, mpo na nini te kosala makasi kotambola na Ndako ya Bokonzi mpo na kopesa basusu mbote liboso mpe nsima ya makita? Yango ebakisaka esengo, bolingo, mpe ekumisaka Yehova. (Mt 5:16) Ya solo, mbala mosusu ntango ekozala te ya kosolola na moto nyonso. Atako bongo, moto nyonso akozala na esengo soki tosali oyo esengeli.a

Tosengeli kaka te koyamba bapaya na ntango ya milulu ya ntina mingi lokola na Ekaniseli, kasi ntango nyonso. Soki bato ya sika bamoni polele ete biso bakristo tolinganaka, ekoki kotinda bango básanzola Nzambe mpe báya na losambo ya solo.​—Yn 13:35.

a Toli ya Biblia epesi biso nzela te ya kosolola na bato oyo babimisamá na lisangá to baoyo baboyá Yehova ata soki bayei na makita.​—1Ko 5:11; 2Yn 10.

Ndeko moko azali kopesa bato oyo bayei sika na makita mbote

MPO NA KOYAMBA MOTO YA SIKA

  • Yebisá ye nkombo na yo mpe tuná ye ya ye

  • Yebisá ye bófanda esika moko

  • Bósalela Biblia mpe buku ya nzembo na yo

  • Nsima ya makita, tuná ye soki azali na mituna

  • Soki ebongi, tuná ye soki alingi koyekola Biblia

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto