Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb20 Février lok. 7
  • Ozali kozwa matomba na mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ozali kozwa matomba na mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo?
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2020
  • Masolo mosusu
  • Programɛ ya libota​—Mokapo ya mokolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Bakonzi ya mabota​​—⁠Bóbatela mimeseno malamu na makambo ya elimo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Ndenge nini okoki kokotisa moto kati na Biblia
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Salá programɛ oyo ebongi mpo na libota na yo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2020
mwb20 Février lok. 7

BOMOI YA BAKRISTO

Ozali kozwa matomba na mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo?

Na makambo ya elimo oyo osalaka, otángaka mpe mokapo ya mokolo na mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo mpe bakomantɛrɛ na yango? Soki te, okoki kobanda kosala yango? Mingi batángaka mokapo ya mokolo na ntɔngɔ mpenza mpo bakoki kokanisa makambo yango ntango bazali kosala misala na bango ya mokolo na mokolo. (Yos 1:8; Nz 119:97) Okoki kosala nini mpo ozwa lisusu matomba mingi na mokapo ya mokolo na mokolo? Tángá bavɛrsɛ oyo ezali likoló mpe na nse ya vɛrsɛ yango mpo oyeba likambo oyo ezali kolobela. Meká kokanisa lisolo ya Biblia oyo ezali komonisa etinda oyo vɛrsɛ yango elobeli mpenza. Na nsima salelá etinda yango na bomoi na yo. Soki ozali kotalela Liloba ya Nzambe liboso ya kozwa bikateli, ekotambwisa bomoi na yo mpe ekomemela yo mpenza matomba.​—Nz 119:105.

Bandeko ya libota ya Betele na mokili mobimba batalelaka mokapo ya mokolo ntango balyaka bilei ya ntɔngɔ. Na bambula oyo euti koleka, mingi ya masolo oyo esalemaka na losambo yango ya ntɔngɔ etyamaka na TV JW na eteni MILULU MPE BADISKUR. Mbala ya nsuka oyo olandaki moko ya masolo yango ezalaki mokolo nini? Mbala mosusu masolo yango mosusu elobelaka makambo oyo osengeli na yango mpenza. Na ndakisa, ndenge nini lisolo ya Lota ekoki kosalisa yo ntango ozali kozwa bikateli?

TALÁ VIDEO KOLINGA MOKILI TE (1YN 2:15), MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Etinda nini ya Biblia esimbaki lisolo ya losambo ya ntɔngɔ yango?

  • Ndenge nini lisolo ya Lota emonisi likama ya kolinga mokili mpe biloko oyo ezali na mokili?​—Eb 13:12; 14:12; 19:3, 12, 13, 24-26

  • Ndenge nini tokoki komonisa ete tolingaka Yehova kasi te mokili to biloko oyo ezali na mokili?

Bililingi: Ndeko moko azali kokanisa mokapo ya mokolo mpe komantɛrɛ na yango na boumeli ya mokolo. 1. Wana azali kotánga, azali kokanisa ndenge baanzelu basimbaki Lota mpe libota na ye na mabɔkɔ mpo na kokima Sodoma. 2. Wana azali kolya bilei ya midi na esika ya mosala, azali kokoba kokanisa makambo oyo atángaki na ntɔngɔ. 3. Na mpokwa na ndako, akobi komanyola makambo oyo atángaki na ntɔngɔ wana azali kogumba bilamba.

Ndenge nini nakoki komonisa mokolo mobimba ete nazwaka Liloba ya Yehova na motuya?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto