BOMOI YA BAKRISTO
Sakolá nsango malamu—Yebisá bato ete mokili ya sika ekómi pene!
Na sanza ya 11/2021, tokosala mpenza milende mpo na koyebisa bato nsango malamu ete mokili ya sika ekómi pene. (Nz 37:10, 11; Em 21:3-5) Bongisá programɛ na yo malamu mpo opesa mabɔkɔ na kampanye yango. Soki otondisi formilɛrɛ mpo na kozala mobongisi-nzela mosungi na sanza yango, okoki kopona kosala ngonga 30 to 50.
Bongisá bavɛrsɛ oyo elobelaka mokili ya sika mpo otángela yango moto nyonso soki likoki ezali. Ntango ozali kopona vɛrsɛ moko ya Biblia, talelá malamu vɛrsɛ oyo ebongi mpo na bato ya teritware na bino. Na bokutani ya liboso, soki moto asepeli, pesá ye Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya bato nyonso No. 2 2021. Na nsima, landelá soki azali kokoba kosepela mpe meká kobanda koyekola ye mwa buku Sepelá na bomoi libela na libela! Ezali mpenza esengo komipesa mpo na koyebisa bato “nsango malamu ya eloko moko ya malamu koleka”!—Yis 52:7.
TALÁ VIDEO YA NZEMBO NA MOKILI YA SIKA, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:
Makambo nini ya malamu elenge mwasi oyo azali kokanisa mpo na mikolo ezali koya?
Makambo nini ozali kozela na mposa makasi komona na mokili ya sika?
Ndenge nini kokanisa elikya oyo ozali na yango ekoki kosalisa yo omibongisa mpo na kampanye oyo ekosalema na sanza ya 11/2021?—Lk 6:45