LISOLO YA BOYEKOLI 42
LOYEMBO 44 Libondeli ya moto ya komikitisa
Ndenge ya kosala mabondeli oyo euti na motema
“ Nabeleli na motema na ngai mobimba. Ee Yehova, yanolá ngai.”—NZ. 119:145.
NA MOKUSE
Komanyola na mabondeli oyo Biblia elobeli ekoki kosalisa biso tósalaka mabondeli oyo euti na motema.
1-2. (a) Nini ekoki kosala ete tókoka te kofungolela Yehova motema? (b) Ndenge nini toyebi ete Yehova ayokaka mabondeli na biso na boboto mpenza?
EKÓMELAKA yo omona ete okómi kozongela kaka maloba moko na mabondeli na yo, ete mabondeli na yo ekómá ya likolólikoló, to okanisaka lisusu te liboso obondela? Soki bongo, ozali yo moko te. Lokola tokómá kosala makambo kaka mbangumbangu, momeseno yango ekoki kokɔta mpe na mabondeli na biso. To mbala mosusu kutu tozali kokoka te kofungolela Yehova motema mpo tozali komona ete tobongi te kobondela ye.
2 Biblia emonisi biso ete eloko oyo ezali na ntina mpo na Yehova ezali te mabondeli ya mindɔndɔ, kasi nde oyo euti na motema oyo ezali na komikitisa. Ayokaka “kosɛnga ya bato ya komikitisa.” (Nz. 10:17) Na boboto nyonso, Yehova ayokaka liloba nyonso oyo tobimisi mpo atyelaka biso mpenza likebi.—Nz. 139:1-3.
3. Mituna nini tokotalela na lisolo oyo?
3 Yango ekoki kotinda biso tómituna boye: Mpo na nini tokoki kobondela Yehova kozanga kobanga? Ndenge nini tokoki kosala mabondeli oyo euti na motema? Ndenge nini komanyola na mabondeli oyo Biblia elobeli ekoki kosalisa biso tósalaka mabondeli oyo euti na motema? Mpe tokoki kosala nini soki tozali koyeba te tóloba nini na mabondeli na biso ntango totungisami makasi? Tótalela biyano na mituna yango.
BONDELÁKÁ YEHOVA KOZANGA KOBANGA
4. Nini ekoki kosalisa biso tóbondelaka Yehova kozanga kobanga? (Nzembo 119:145)
4 Ntango tokangi ntina ete Yehova azali moninga ya sembo oyo alingaka ete tózala malamu, tokomona ete tokoki kobondela ye kozanga kobanga. Mokomi ya Nzembo 119 asalaki makasi azala na boyokani ya ndenge wana na Yehova. Azangaki mikakatano te na bomoi na ye. Na ndakisa, bato mosusu bakoselaki ye makambo. (Nz. 119:23, 69, 78) Ye moko mpe asalaki mabunga. (Nz. 119:5) Atako bongo, azalaki kobanga te kofungolela Yehova motema na ye.—Tángá Nzembo 119:145.
5. Mpo na nini tosengeli te kotika mayoki ya mabe epekisa biso kobondela? Pesá ndakisa.
5 Yehova asɛngi ata baoyo basali masumu ya minene bábondela ye. (Yis. 55:6, 7) Na yango, tosengeli kotika te ete mayoki ya mabe epekisa biso kobondela. Tózwa ndakisa: pilote ayebaka ete soki azali na mposa ya lisalisi, akoki kosolola na bato oyo bazali na nse, oyo balandelaka bampɛpɔ oyo ezali likoló. Pilote asengeli kokakatana mpo na kosolola na bango mpo azali koyoka nsɔni ete abungi to asali libunga? Akokakatana te! Ndenge moko mpe, ata soki na bantango mosusu toyoki lokola tobungi nzela to soki tosali lisumu, tokoki kobondela Yehova kozanga kobanga.—Nz. 119:25, 176.
NDENGE YA KOSALA MABONDELI OYO EUTI NA MOTEMA
6-7. Ndenge nini kokanisa bizaleli ya Yehova esalisaka biso tóyebisa ye makanisi mpe mayoki na biso polele? Pesá ndakisa. (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.)
6 Ntango tozali koloba na Yehova makambo oyo tozali mpenza kokanisa mpe ndenge oyo tozali mpenza komiyoka, yango ekosala ete tómiyokaka penepene na ye. Na yango, nini ekoki kosalisa biso tósalaka mabondeli oyo euti na motema?
7 Kanisáká bizaleli ya Yehova.a Ntango tozali kokanisa mingi bizaleli ya Yehova, tokobanda mpe koyebisa ye makanisi na biso mpe mayoki na biso polele. (Nz. 145:8, 9, 18) Tótalela ndakisa ya Kristine, ndeko mwasi moko oyo tata na ye azalaki moto ya mobulu. Kristine alobi boye: “Nazalaki kokoka te koloba na Yehova lokola Tata. Nazalaki komona ete mabunga na ngai ekotinda ye asundola ngai.” Ezaleli nini ya Yehova esalisaki ndeko mwasi yango? Alobi boye: “Bolingo ya sembo ya Yehova nde ekitisaki ngai motema. Nayebi ete akozala ntango nyonso pene na ngai. Ata soki nakwei, akotɛlɛmisa ngai na bolingo nyonso. Yango esalisaka ngai nayebisa ye bisengo to mawa nyonso oyo nazali na yango.”
8-9. Wapi mwa matomba ya kokanisa liboso makambo oyo okoloba na libondeli? Pesá ndakisa.
8 Kanisáká makambo oyo okoloba. Liboso ya kobondela, okoki komituna mwa mituna. Na ndakisa: ‘Mikakatano nini ya sikisiki nazali na yango sikoyo? Ezali na moto oyo nasengeli kolimbisa? Nazali na mokakatano oyo esɛngi lisalisi ya Yehova mpo nalonga yango?’ (2 Bak. 19:15-19) Tokoki mpe kolanda libondeli ya ndakisa oyo Yesu alakisaki soki tozali kokanisa makambo oyo tokoki kosɛnga Yehova na oyo etali nkombo na Ye, Bokonzi na Ye mpe mokano na Ye.—Mat. 6:9, 10.
9 Ntango ndeko mwasi moko na nkombo Aliska ayebaki ete mobali na ye azali na maladi ya kanser oyo ekosila te, azalaki kokoka kobondela te. Alobi boye: “Nazalaki na mpasi makasi mpe nazalaki kokoka te kotya makanisi na molɔngɔ mpo nasala libondeli.” Nini esalisaki ye? Alobi boye: “Liboso nabondela, nazalaki kozwa mwa miniti mpo na kobongisa makanisi na ngai, mpe yango esali ete na mabondeli na ngai, nalobelaka kaka makambo na ngai moko te. Kosala bongo esalisi ngai nazalaka na kimya mpe na makanisi oyo ebongi ntango nazali kobondela.”
10. Mpo na nini tosengeli kosala makasi ya kolekisa ntango mingi na kobondela? (Talá mpe bililingi.)
10 Lekisáká ntango mingi na kobondela. Ya solo mabondeli ya mikuse ekoki kosalisa biso tómiyoka penepene na Yehova, kasi soki tolekisi ntango mingi na kobondela, makanisi na biso ya kati mpenza ekoki kobima.b Elijah, mobali ya Aliska, alobi boye: “Nasalaka makasi ya kobondela mbala ebele na mokolo, kasi namiyokaka penepene mpenza ya Yehova soki nalekisi ntango mingi na kobondela. Yehova azalaka motema mokuse te, amitunaka te soki nakosilisa ntango nini; na yango, nazwaka ntango ndenge nalingi.” Yo mpe meká kosala boye: Tyá ntango mpe luká esika oyo ekosalisa yo obondela, mbala mosusu ata na mongongo makasi, kozanga ete makambo mosusu ebenda likebi na yo; na nsima saláká bongo mbala na mbala mpo okóma na momeseno ya kolekisa ntango mingi na kobondela.
Tyá ntango mpe luká esika oyo ekosalisa yo olekisa ntango mingi na kobondela (Talá paragrafe 10)
KANISÁKÁ MABONDELI OYO BIBLIA ELOBELI
11. Matomba nini tokozwa soki totaleli mabondeli oyo Biblia elobeli? (Talá mpe etanda “Ekómelaka yo mpe omiyoka lokola bango?”)
11 Okoki kozwa matomba soki ozali kokanisa mabondeli oyo euti na motema mpe banzembo ya kokumisa Yehova, oyo ezali na Biblia. Komona ndenge basaleli ya Nzambe bazalaki kobimisa mayoki na bango ya kati mpenza ekotinda yo mpe ofungolelaka Yehova motema na yo. Ekoki mpe kosalisa yo ozwa maloba ya masanzoli oyo okoki kosalela na mabondeli na yo moko. Mpe okoki komona mabondeli ya bato oyo bazalaki na mayoki oyo yo mpe ozali na yango.
12. Mituna nini tokoki komituna ntango tozali kotalela maloba ya libondeli moko na Biblia?
12 Wana ozali kotalela maloba ya libondeli moko oyo ezali na Biblia, omituna boye: ‘Nani alobaki yango mpe makambo ezalaki ndenge nini? Makanisi oyo abimisaki eyokani na likambo na ngai? Mateya nini nakoki kozwa na libondeli yango?’ Ekoki mpe kosɛnga osala bolukiluki mosusu mpo ozwa biyano na mituna yango, kasi milende oyo okosala ekofuta yo. Tótalela mwa bandakisa.
13. Na oyo etali libondeli, liteya nini tokoki kozwa na libondeli ya Hana? (1 Samwele 1:10, 11) (Talá mpe ezipeli.)
13 Tángá 1 Samwele 1:10, 11. Ntango Hana asalaki libondeli yango, azalaki na mikakatano mibale ya minene. Ya liboso, azalaki kobota te; mpe ya mibale mwasi mosusu ya mobali na ye azalaki komonisa ye mpasi. (1 Sa. 1:4-7) Soki ozali na mokakatano oyo ezali kosila te, liteya nini okoki kozwa na libondeli ya Hana? Mpo na kozwa kimya, alekisaki ntango na kobondela mpe abwakelaki Nzambe kilo nyonso oyo azalaki na yango na motema. (1 Sa. 1:12, 18) Biso mpe tokoki kozwa kimya ntango ‘tobwakeli Yehova mokumba na biso ya kilo,’ ntango toyebisi ye polele ndenge oyo tozali komiyoka mpo na mikakatano ya sikisiki oyo tozali na yango.—Nz. 55:22.
Lokola azalaki kobota te mpe mbanda na ye azalaki kotyola ye ntango nyonso, Hana abwakelaki Yehova kilo nyonso ya motema na ye (Talá paragrafe 13)
14. (a) Liteya nini mosusu tokoki kozwa na ndakisa ya Hana? (b) Na ndenge nini kotánga mpe komanyola Liloba ya Nzambe ekoki kosalisa biso tóbongisa mabondeli na biso? (Talá maloba na nse ya lokasa.)
14 Mwa bambula nsima ya kobotama ya mwana na ye Samwele, Hana amemaki ye epai ya Nganga-nzambe Monene Eli. (1 Sa. 1:24-28) Na libondeli oyo asalaki, Hana alobaki ete andimi ete Yehova abatelaka basaleli na ye ya sembo mpe akokisaka bamposa na bango.c (1 Sa. 2:1, 8, 9) Ekoki kozala ete mokakatano na ye na ndako esilaki te, kasi Hana atyaki makanisi na lipamboli oyo Yehova apesaki ye. Liteya ezali nini? Tokolonga koyika mpiko na mokakatano oyo ezali kosila te soki totye makanisi na ndenge oyo Yehova azali kosunga biso tii sikoyo.
15. Ntango tokutani na makambo ya kozanga bosembo, liteya nini tokoki kozwa na libondeli ya mosakoli Yirimia? (Yirimia 12:1)
15 Tángá Yirimia 12:1. Na eleko moko, mosakoli Yirimia abulunganaki mpo azalaki komona ete bato mabe bazalaki na bomoi ya esengo. Lisusu, alɛmbaki nzoto mpo Bayisraele mosusu bazalaki kosɛka ye. (Yir. 20:7, 8) Tokoki mpe komiyoka lokola ye ntango tozali komona ete bato oyo bazangi bosembo bazali na bomɛngo, to ntango basusu bazali kotyola biso. Atako Yirimia alobaki ndenge oyo azalaki komiyoka, atyelaki bosembo ya Nzambe ntembe te. Ntango amonaki ndenge Yehova apesaki ekólo na Ye ya batomboki etumbu, na ntembe te Yirimia atyaki lisusu motema mingi na bosembo ya Nzambe. (Yir. 32:19) Biso mpe tokoki koyebisa Yehova polele makambo oyo ezali kotungisa biso, mpe kotya motema ete na ntango oyo ebongi akosembola makambo ya kozanga bosembo oyo tozali kokutana na yango.
16. Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Molevi oyo amemamaki na mboka mopaya? (Nzembo 42:1-4) (Talá mpe bililingi.)
16 Tángá Nzembo 42:1-4. Nzembo yango ezali ya Molevi moko oyo amemamaki na mboka mopaya mpe akokaki te koyangana elongo na basaleli mosusu ya Nzambe. Nzembo yango emonisi ndenge oyo azalaki komiyoka. Tokoki mpe komiyoka lokola ye soki tokɔtá ndako to tozali na bolɔkɔ mpo na kondima na biso. Tokoki kozala na mayoki ndenge na ndenge, kasi ekozala malamu tóyebisa yango Yehova na libondeli. Yango ekoki kosalisa biso tótya makanisi na biso na molɔngɔ mpe tótalela makambo na ndenge oyo ebongi. Na ndakisa, Molevi wana amonaki ete akozwa mabaku mosusu ya kosanzola Yehova. (Nz. 42:5) Akanisaki mpe ndenge oyo Yehova azalaki kokokisa bamposa na ye. (Nz. 42:8) Kobondela Nzambe na etingya ekoki kosalisa biso tótalela ntina oyo tozali na mayoki boye to boye, tózwa lisusu kimya, mpe tókóma na makasi ya kokoba koyika mpiko.
Molevi oyo akomaki Nzembo 42 asopelaki Nzambe motema na ye. Ntango abimisaki mayoki na ye na libondeli, alongaki kotalela makambo na ndenge ya malamu (Talá paragrafe 16)
17. (a) Liteya nini tokoki kozwa na libondeli ya mosakoli Yona? (Yona 2:1, 2) (b) Ndenge nini maloba mosusu ya mokanda ya Nzembo ekoki kosalisa biso ntango tokutani na mikakatano? (Talá maloba na nse ya lokasa.)
17 Tángá Yona 2:1, 2. Mosakoli Yona abondelaki bongo ntango azalaki na libumu ya mbisi monene. Atako atosaki Yehova te, Yona azalaki na kondima ete Nzambe akoyoka mongongo na ye. Na libondeli na ye, Yona asalelaki maloba mingi oyo ezali na mokanda ya Nzembo.d Mbala mosusu ezalaki biteni oyo ayebaki malamu. Ntango akanisaki yango, endimisaki ye ete Yehova akosalisa ye. Biso mpe, soki tokangi bavɛrsɛ na motó, ekoki kozongela biso na makanisi mpe kobɔndisa biso ntango tozali kobondela Yehova asalisa biso na mikakatano.
KOBÁ KOPUSANA PENEPENE NA YEHOVA NA NZELA YA LIBONDELI
18-19. Soki tozali kozwa maloba te mpo na kobimisa mayoki na biso na libondeli, elikya nini Baroma 8:26, 27 epesi biso? Pesá ndakisa.
18 Tángá Baroma 8:26, 27. Na bantango mosusu, makanisi ekoki kolekela biso mpe tozali kozwa maloba te mpo na kolimbola mayoki na biso. Kasi lisalisi ezangi te. Na bantango ya ndenge wana, elimo santu ya Nzambe “elobelaka” biso. Na ndenge nini? Na nzela ya elimo na ye, Yehova asalaki ete mabondeli mingi ekomama na Liloba na ye. Ntango tozali kokoka kobimisa makanisi na biso te, Yehova akoki kondima maloba mosusu oyo ezali na mabondeli yango lokola nde ezali makambo oyo biso tolingaki kosɛnga, mpe akoki koyanola biso.
19 Likanisi yango esalisaki ndeko mwasi moko ya Russie na nkombo Yelena. Bakangaki ye mpo azalaki kobondela mpe kotánga Biblia. Yango etungisaki Yelena mingi mpe azalaki lisusu kokoka kobondela te. Alobi boye: “Na nsima namikundwelaki ete soki makanisi elekeli ngai mpe nazali koyeba te nasɛnga nini na libondeli, Yehova akondima mabondeli oyo ezali na Biblia, oyo basaleli na ye ya ntango ya kala basalaki . . . lokola nde ezali makambo oyo ngai nalingaki kosɛnga. . . . Yango ebɔndisaki ngai mingi na ntango wana ya mpasi mpenza.”
20. Ndenge nini tokoki kobongisa makanisi na biso mpo na kobondela ntango tozali na mitungisi?
20 Ntango tozali na mitungisi, ekoki kozala mpasi tótya makanisi esika moko ntango tozali kobondela. Mpo na kobongisa makanisi na biso, tokoki koyoka audio ya mokanda ya Nzembo. Tokoki mpe komeka kokoma ndenge oyo tozali komiyoka, ndenge Mokonzi Davidi asalaki. (Nz. 18, 34, 142; maloba oyo ezali likoló.) Nzokande, ezali na mibeko ya sikisiki te mpo na ndenge oyo tosengeli komibongisa mpo na kobondela. (Nz. 141:2) Salá oyo omoni ete ekosimba epai na yo.
21. Mpo na nini tokoki kobondela na motema mobimba?
21 Ezali esengo ndenge Yehova ayebaka mayoki oyo tozali na yango liboso kutu tóloba ata liloba. (Nz. 139:4) Kasi, asepelaka koyoka biso tozali koyebisa ye mayoki na biso mpe koyebisa ye ete totyelaka ye motema. Na yango, kobangaka te kobondela Tata na yo ya likoló. Okoki kozwa mwa makanisi na mabondeli oyo ezali na Liloba na ye. Bondeláká na motema na yo mobimba. Yebisáká ye bisengo mpe bampasi na yo. Lokola azali Moninga ya solosolo, Yehova akozala wana ntango nyonso mpo na yo!
LOYEMBO 45 Komanyola ya motema na ngai
a Talá motó ya likambo “Bizaleli mosusu ya Yehova” na buku Batoli ya Biblia mpo na bomoi ya bakristo na eteni “Yehova.”
b Mbala mingi, mabondeli oyo tosalaka liboso ya bato nyonso na lisangá ezalaka milai te.
c Na libondeli na ye, Hana asalelaki maloba oyo ekokani na oyo ezali na mikanda oyo Moize akomaki. Emonani ete azalaki kozwa ntango ya komanyola na Makomami. (Mib. 4:35; 8:18; 32:4, 39; 1 Sa. 2:2, 6, 7) Bankama ya bambula na nsima, Maria, mama ya Yesu, asalelaki maloba ya lisanzoli oyo ekokanaki mpenza na oyo ya Hana.—Luka 1:46-55.
d Na ndakisa, kokanisá Yona 2:3-9 na Nzembo 69:1; 16:10; 30:3; 142:2, 3; 143:4, 5; 18:6; mpe 3:8, na molɔngɔ oyo Yona asalelaki yango.