Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwfq lisolo 33
  • Batatoli ya Yehova bazali Baprotesta?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Batatoli ya Yehova bazali Baprotesta?
  • Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
  • Masolo mosusu
  • Batatoli ya Yehova bazali lingomba moko ya Protesta?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Lingomba ya Katolike ya Amérique latine, lizali kati na mpasi​—Mpo na nini bamilió na bato bazali kotika yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Bitumba ya mangomba na France
    Lamuká!—1997
  • Mpo na nini oyo ezali ntango ya kozwa ekateli?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Makambo mosusu
Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
ijwfq lisolo 33
Motatoli ya Yehova azali koteya moto moko makambo ya Biblia

Batatoli ya Yehova bazali Baprotesta?

Te. Biso Batatoli ya Yehova tozali bakristo, kasi tomimonaka te ete tozali Baprotesta. Mpo na nini?

Lingomba ya Protesta ezali “lingomba oyo etɛmɛlaka Lingomba ya Katolike.” Atako biso Batatoli ya Yehova tondimaka mateya ya Lingomba ya Katolike te, tomimonaka te ete tozali Baprotesta. Mpo na nini?

  1. Mateya mingi ya Baprotesta eyokani te na oyo Biblia eteyaka mpenza. Na ndakisa, Biblia eteyaka ete “ezali na Nzambe kaka moko,” azali Bosato te. (1 Timote 2:5; Yoane 14:28) Elobi mpe polele ete etumbu oyo Nzambe apesaka bato mabe ezali liwa ya seko, kasi lifelo ya mɔtɔ te.​—Nzembo 37:9; 2 Batesaloniki 1:9.

  2. Totɛmɛlaka Lingomba ya Katolike to mangomba mosusu te, mpe tolukaka kobongisa yango te. Tosakolaka kaka nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe, mpe tolingaka kosalisa bato bándimela nsango yango. (Matai 24:14; 28:19, 20) Mposa na biso ezali ya kobongisa mangomba mosusu te; tolukaka nde koteya bato ya mitema sembo solo ya Nzambe mpe Liloba na ye Biblia.​—Bakolose 1:9, 10; 2 Timote 2:24, 25.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto