GEORGIY PORCHULYAN | LISOLO YA BOMOI
“Bolingo na ngai mpo na Yehova esungaki ngai”
Ntango batindaki ngai na kaa oyo bazalaki kosalisa bato misala na makasi na etúká ya Magadan, na Sibérie, nazalaki kaka na mbula 23. Na ntango yango, nasalaki mbula moko banda nazwaki batisimo mpe nakómaki Motatoli ya Yehova. Lokola nazalaki kosala makambo mbangumbangu mpe nayebaki makambo mingi te, mbala ya liboso oyo nasakwelaki moto moko ya bolɔkɔ makambo ya sika oyo nazalaki kondima, etikalaki moke nabunda na moto yango.
Kasi, nini etindaki ngai, Mokoministe ya kala, nakóma kosambela na lingomba oyo bato bazalaki kotalela lokola monguna ya Leta? Mpe ndenge nini bolingo ya Yehova mpe formasyo na ye esalisaki ngai nabongisa bomoto na ngai na bambula wana oyo basalisaki ngai misala na makasi mpe batindaki ngai na mboka mopaya?
Koluka bosembo mpe kimya ya makanisi
Nabotamá na 1930, na Tabani, mboka moko ya bobola na nɔrdi ya ekólo Moldavie. Baboti na ngai bazalaki kosala mosala makasi na ferme moko ya bibwele mpo na koleisa biso bana motoba. Tozalaki na biloko mingi te ya kobikela. Mama na ngai azalaki kosambela na lingomba ya Ɔrtɔdɔkse ya Katolike mpe tata na ngai azalaki kosambela na Katolike. Bazalaki mbala na mbala koswana mpo na etamboli mabe ya basango.
Ntango nazwaki diplome wana nazalaki na mbula 18, nakɔtaki na Komsomol, ebongiseli moko ya bilenge oyo ezalaki kopalanganisa mateya ya Bakoministe. Mokano na yango ezalaki ya koteya bilenge mpo bákóma basangani ya lingomba ya Bakoministe. Bautaki kotya ngai sɛkrɛtɛrɛ na etuluku ya mboka epai nazalaki kofanda. Bazalaki koteya ete bato nyonso bazali bandeko, bakokani, mpe basengeli kosalela bango makambo na bosembo, mpe yango emonanaki malamu, kasi ntango namonaki ndenge bazalaki kosala makambo na bosembo te, mpe kozwa kanyaka, nazalaki komiyoka lokola nazangi eloko moko.
Lokola nazalaki mosangani ya Komsomol, nasengelaki kotosa mibeko ya guvɛrnema ya Union soviétiquea ntango bazalaki kokanga bandako-nzambe mpe kobebisa mangomba. Ezalaki na Batatoli ya Yehova na mboka na biso. Atako namonaki ete bazali bato ya sembo mpe bazali na bizaleli malamu, nazalaki kotalela bango kaka lokola bato mabe oyo balekisaka ndelo. Nzokande nayebaki te ete moko na bango akoyanola na mituna na ngai.
Nɔkɔ na ngai Dimitriy, oyo azalaki kofanda na mboka oyo nazalaki kofanda, azalaki Motatoli ya Yehova. Mokolo moko na prɛnta ya mobu 1952, atunaki ngai boye: “Georgiy, okosala nini na bomoi na yo?” Kaka ye nde azalaki moto oyo azalaki komibanzabanza mpo na ngai mpo na kotuna ngai motuna ya ndenge wana. Mpo na koloba solo, nazalaki ata na eyano moko te na makanisi. Na ndakisa, nazalaki komituna mbala na mbala boye: ‘Soki Nzambe azalaka, mpo na nini atiki nzela na bampasi?’ Na boumeli ya mikolo mwambe oyo elandaki, nɔkɔ na ngai Dimitriy azalaki kosalela Biblia mpo na koyanola na mituna na ngai. Na bantango mosusu tozalaki kosolola makambo ya Nzambe tii na ngonga ya misato ya ntɔngɔ!
Mwa babutu oyo Georgiy ná Dimitriy bazalaki kofanda mpo na kosolola makambo ya Biblia
Nsima ya masolo yango, nazwaki ekateli ya koyekola Biblia na molende mpenza. Nayaki komona ete nazalaki na Tata ya likoló oyo azalaki kolinga ngai mpenza. (Nzembo 27:10) Atako nayebaki makambo mingi te etali Biblia, bolingo na ngai mpo na Yehova ekómaki makasi mpe esalisaki ngai nazwa ekateli ya kosala makambo oyo nasengelaki kosala. Natikaki lingomba ya Bakoministe atako prezida ya mboka epai tozalaki kofanda azalaki kobangisa ngai. Kaka nsima ya sanza minei nabandaki koyekola Biblia, na sanza ya 09/1952, namipesaki na Yehova mpe nazwaki batisimo.
Bolingo na ngai mpo na Yehova emekami
Banda kala, bapekisaki misala ya Batatoli ya Yehova. Kasi, nalingaki komonisa na misala ete nalingaka Yehova, yango wana namipesaki mpo na kokende kotikela bandeko oyo bazalaki kofanda na bamboka mikanda oyo elimbolaka Biblia. Ezalaki likama mpo bato ya mboka oyo bazalaki kokanisela biso mabe bakokaki kopesa bakonzi nsango ya lokuta. Kutu, ata mpe Batatoli bazalaki kobanga mpe kokanisa ete nazali moko ya bapolisi ya sireté oyo bakɔtaki na lisangá mpo na konɔnga. Kasi eumelaki te eyaki komonana polele ete nazalaki monɔngi te. Kaka nsima ya sanza mibali ya batisimo na ngai, bakangaki ngai mpe bakatelaki ngai etumbu mpo nazalaki kokabola mikanda oyo epekisamaki.
Wana bakangaki ngai mpo na mwa ntango mpe nasalaki pene na mbula moko na bolɔkɔ, bazalaki kotunatuna ngai mituna mpe bakonzi balukaki kotinda ngai nawangana kondima na ngai. Kasi nasilaki kokómisa bolingo na ngai mpo na Yehova Nzambe makasi. Nsukansuka, babongisaki makambo mpo básambisa ngai na miso ya bato nyonso na engumba Odessa na Ukraine. Baboti na ngai mpe bandeko na ngai, oyo bazalaki naino Batatoli ya Yehova te na ntango wana, babengisaki bango na tribinale.
Bamemaki ngai na tribinale lokola moto moko oyo akosamaki mpo na kokɔta na mwa lingomba moko ya mabe. Bakonzi balingaki kondimisa baboti na ngai mpe bandeko na ngai ete nabɛli motó. Baboti na ngai babangaki mpenza. Balelaki mpe basɛngaki ngai natika lingomba ya Batatoli ya Yehova. Kasi mama na ngai afandaki nyɛɛ. Nayebisaki mama boye: “Kobanga te. Nakosami te. Nazwaki eloko oyo nazalaki koluka na bomoi na ngai, mpe nakotika yango soki moke te.” (Masese 23:23) Nayebaki makambo mingi te etali Biblia, kasi nayebaki makambo mingi etali Yehova mpo na kokangama na ye. Mbula soki 6 na nsima, baboti na ngai bayekolaki makambo mingi mpo na bindimeli na ngai, mpe bango mpe bakómaki Batatoli ya Yehova.
Ntango bazali kosambisa Georgiy na tribinale mpo bafundi ye ete akɔti na lingomba moko mabe, baboti na ye mpe bazali wana
Bakatelaki ngai etumbu ya mbula 15 na kaa oyo bazalaki kosalisa bato misala na makasi mpe batindaki ngai na engbunduka (train) na etúká ya Kolyma na Sibérie, epai bakaa oyo bazalaki kosalisa bato misala na makasi ezalaki ebele. Mpo na kobatela bato ya bolɔkɔ, bakɛngɛli ya bolɔkɔ mpe bakonzi bazalaki kobɛta biso mpe bazalaki kopesa biso bilei te. Na ebandeli, nazalaki komituna ndenge nini nakobika.
Namonaki ndenge Nzambe amoniselaki ngai bolingo mpe apesaki ngai formasyo
Kaka mwa moke na nsima wana nakɔtaki na bolɔkɔ, mwa Batatoli kati na Batatoli 34 oyo bazalaki na kaa batunaki ngai na bokɛngi nyonso boye: “Ezali na Bayonadabe na etuluku na yo?” Mbala moko nayebaki ete bazalaki Batatoli. Mpamba te ezalaki kaka bango nde bakokaki kosalela liloba wana ya Biblia! Bandeko oyo bakɔmeli bateyaki ngai kaka te ndenge ya kosalela mitinda ya Biblia na ntango wana ya mpasi, kasi basalisaki ngai mpe nakolisa bizaleli ya elimo lokola bososoli.
Nazalaki kobongisa bamasini na kaa. Mokolo moko, moninga moko ya mosala na nkombo Matphey azalaki kobɛta ntolo ete ayebi bankombo ya basantu 50 na motó. Ntango nalobaki likambo moko ya mabe mpo na basantu yango, Matphey alukaki kobɛta ngai, kasi nakimaki. Na nsima, nayokaki nkanda ntango namonaki bandeko bazali kosɛka. Nalobaki boye: “Mpo na nini bozali kosɛka? Nalingaki koteya!” Na boboto mpenza, bakundwelaki ngai ete mokano na biso ezali ya koyebisa bato nsango malamu, kasi te ya kosilikisa bango. (1 Petro 3:15) Matphey azalaki motomboki na makambo ya politiki, kasi akamwaki ndenge Batatoli bazalaki komemya bakɛngɛli ya bolɔkɔ mpe bakonzi. Nsukansuka asepelaki na nsango ya Biblia. Namikundwelaka ntango nyonso butu oyo nazwaki batisimo na kobombana na kati ya tɔnɔ moko oyo ezalaki na mai ya malili.
Kaka mwa moke nsima ya kokóma na kaa, basɛngaki ngai ná bandeko mibali mibale ya bilenge tókɔta na kelasi oyo bazalaki kotángisa bato mateya ya politiki. Na ebandeli, toboyaki kokɔta na makita yango. Tokanisaki ete kosangana na yango, tokobuka etinda ya bokristo ya koboya kokɔta na makambo ya mokili. (Yoane 17:16) Yango wana, batindaki biso na kasho moko ya molili makasi mpo na pɔsɔ mibale. Ntango tobimaki na kasho yango, bandeko oyo bakɔmeli na elimo balimbwelaki biso ete tokokaki mpenza te kobuka etinda ya koboya kokɔta na makambo ya mokili kaka mpo na kozala wana na makita ya ndenge wana. Kutu, tolingaki komona yango lokola libaku ya kopesa litatoli ya malamu. Bandeko wana ya bolingo mpe ya boboto basalisaki biso tókóma na bwanya mpe tósalela mitinda ya Biblia mpo na kozwa bikateli.
Motema molai na bango mpe formasyo oyo bapesaki ngai emonisaki polele ete Yehova alingaka ngai mpe amibanzabanzaka mpo na ngai. Na ndakisa, mokangami moko oyo azalaki sango aponamaki lokola mokambi na mosala ya kobomba mbongo (comptable). Ntango nyonso azalaki komona ngai na ntango ya kolya, azalaki kopesa ngai mbote boye: “Mbote, mwana ya Zabolo!” Moninga na ngai ya shambrɛ ayebisaki ngai nayanola ye na lityo boye: “Mbote papa!” Likambo ya mawa, natosaki toli na ye, mpe yango esalaki ete bábɛta ngai mabe mpenza. Ntango bandeko bayokaki likambo oyo ekómelaki ngai, basalisaki ngai nayeba ete etamboli na ngai ezalaki malamu te. (Masese 29:11) Nsukansuka, nasɛngaki sango yango bolimbisi.
Liboso bátinda ngai na kaa oyo bazalaki kosalisa bato misala na makasi, namesanaki kokende na makita ya bokristo na kobombana na butu to na ntɔngɔ makasi. Kasi na kaa, ezalaki te na esika ya kobombana. Yango wana, mokolo nyonso biso bandeko tosengelaki kotɛlɛma esika moko, na miso ya bakɛngɛli ya bolɔkɔ, mpo na kolobela mwa bavɛrsɛ oyo tokomaki na mabɔkɔ na biteni mikemike ya papye. Tozalaki na mokano ya kokanga na motó bavɛrsɛ mingi soki esengeli mpe ya komikundwela yango mbala na mbala. Ntango mokonzi moko azalaki kokata makita na biso, tozalaki nokinoki komɛla banɔti na biso.
Esika ya komibomba ezali te na kaa oyo basalisaka bato misala na makasi, Batatoli bazali kotánga Biblia na miso ya bakɛngɛli ya bolɔkɔ
Namemamaki na mboka mopaya kasi Nzambe azalaki komonisela ngai bolingo
Na bambula ya 1960, nsima ya kobimisa Georgiy na kaa oyo basalisaka bato misala na makasi
Nsima ya kobima na kaa na mobu 1959, bamemaki ngai na etúká ya Karaganda na Kazakhstan. Atako nazalaki kaka kosamba, nasɛngaki bakonzi bápesa ngai mikolo 20 mpo nakende kobala. Nakendaki na etúká ya Tomsk na Russie, epai nayebaki ndeko mwasi moko ya sembo mpe ya bolingo na nkombo Maria. Kaka ndenge nazalaki koloba polele, nayebisaki ye boye: “Maria, nazali na ntango te ya kolakana ná yo libala. Tóbalana mbala moko!” Andimaki, mpe tosalaki fɛti moko ya moke ya libala. Maria azalaki kozwa na motuya ndenge nayikelaki mikakatano mingi mpiko, mpe alingaki kosalisa ngai nakoba kosalela Yehova.—Masese 19:14.
Na bambula ya 1960, tokokaki te kokende kosakola polele ndako na ndako, kasi tozalaki koyebisa bato bindimeli na biso na libaku malamu. Ntango bazalaki kobengisa biso esika moko lokola bapaya to ntango tozalaki na konje, tozalaki mbala mingi koyebisa bato elikya na biso ya kofanda awa na mabele libela na libela. Tozalaki mpe koluka mabuku ya kosolola na basusu. Na ndakisa, tozalaki kokende kotala bandako epai bazalaki kotɛka biloko mpe tozalaki komeka kosolola na bankolo na yango makambo ya Nzambe. Ngai ná Maria tosalelaki mayele yango, mpe tobandaki koyekola Biblia na bato motoba oyo bakómaki Batatoli ya Yehova.
Na bantango mosusu tozalaki kopesa litatoli na eleko ya liponi. Mokolo moko, bakonzi ya bapolisi ya sireté bayaki na izini epai ngai ná mwa bandeko tozalaki kosala. Na miso ya bandeko mibali 1 000, batunaki biso mpo na nini Batatoli ya Yehova bakɔtaka te na makambo ya politiki. Ingénieur mokambi mpe basali mosusu mingi bakɔtelaki biso mpo na kolongisa biso. Bayebisaki bakonzi ete tozali kokokisa malamu mikumba na biso mpe tozali basali malamu. Likambo oyo basalaki epesaki biso makasi mpo na kolimbola ekateli na biso, tolobelaki bavɛrsɛ oyo tokangaki na motó. Ndenge topesaki litatoli na mpiko, esalisaki basali minei básepela koyekola Biblia mpe bazwaki batisimo mwa basanza na nsima.
Na ebandeli ya bambula ya 1970, bato mingi ya mitema sembo bakómaki Batatoli ya Yehova na Kazakhstan, yango wana tozalaki na mposa ya kobongisa liyangani na biso ya liboso. Kasi ndenge nini tokoki kosala yango kozanga ete bakonzi báyeba yango? Tozwaki ekateli ya kosala liyangani na mokolo ya fɛti moko ya libala na mboka moko pene na engumba Almaty. Liyangani na biso esangisaki liyangani ya bokristo mpe fɛti ya libala, babyangami koleka 300 bayaki elongo na mwasi mpe mobali ya libala! Mwasi na ngai mpe mwa bandeko basi basalaki mosala makasi mpo na kobongisa esika ya liyangani yango mpe kolamba bilei ya kitoko. Babyangami yango basepelaki makasi mingimingi na mateya ya Biblia oyo epesamaki na balobi koleka 10. Mokolo yango, ezalaki mbala ya liboso nasala diskur liboso ya ebele ya bato.
Kolinga Nzambe esungaki biso ntango tokutanaki na komekama
Georgiy ná mwasi na ye, Maria, elongo na mwana na bango ya mwasi, Lyudmila
Mwasi na ngai oyo nazalaki kolinga mingi, Maria, asungaki ngai mpenza na bomoi na ye mobimba. Azalaki na boboto mpe na komikitisa, azalaki ntango nyonso kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso. Atako azalaki mwasi oyo azali na makasi ya nzoto, na mbalakaka abɛlaki maladi ya mikuwa (ostéoporose) oyo esalaki ete alalaka na mbeto mbula soki 16. Na lisalisi ya mwana na biso ya mwasi, Lyudmila, tobatelaki ye malamu tii ntango akufaki na 2014.
Ntango molongani na ngai Maria azalaki konyokwama, namimonaki ete nazangi nguya. Kasi, tii na mokolo na ye ya nsuka, tozalaki kotánga Biblia mpe masolo ya kolendisa elongo. Tozalaki mbala na mbala kolobela mokili ya sika. Na bantango mosusu, nazalaki kolela na nse ya motema pene na ye. Kasi, mbala nyonso oyo tozalaki kotánga makambo etali bilaka kitoko ya Yehova, motema na biso ezalaki kokita mpe tozalaki kokoba koyika mpiko.—Nzembo 37:18; 41:3.
Georgiy ná Lyudmila bazali na makita ya lisangá
Banda mokolo oyo namonaki mbala liboso ete Yehova alingaka ngai, namonaka ntango nyonso lisungi na ye mpe ndenge atyelaka ngai likebi. (Nzembo 34:19) Lokola nazalaki elenge mobali oyo ayebaki makambo mingi te, namonaki ete alingaka ngai na nzela ya baoyo na motema molai nyonso basalisaki ngai nabongola bomoto na ngai. Ntango nakutanaki na makambo ya mpasi na kaa oyo bazalaki kosalisa bato misala na makasi mpe na mboka mopaya, namonaki ete Yehova azalaki kosunga ngai na nzela ya Liloba na ye. Mpe apesaki ngai makasi oyo nasengelaki na yango mpo na kobatela mwasi na ngai oyo nazalaki kolinga mingi, Maria, tii ntango akufaki. Lelo oyo, nakoki mpenza koloba ete ndenge Yehova alingaka ngai ezali kosalisa ngai na bomoi na ngai mobimba.—Nzembo 31:19.
a Kazakhstan, Moldavie, mpe Ukraine ezalaki na Union soviétique ya kala tii na 1991.