Mwamibale, 29 sanza ya 7
Nandimi yo.—Luka 3:22.
Koyeba ete Yehova andimaka basaleli na ye nyonso ekitisaka motema mpenza! Biblia elobi: “Yehova azali kosepela na bato na ye.” (Nz. 149:4) Kasi, basusu balɛmbaka nzoto mpe bamitunaka na bantango mosusu: ‘Yehova andimaka ngai mpenza?’ Na bantango mosusu, basaleli mosusu ya sembo ya Yehova na ntango ya kala mpe bakómaki na makanisi ya ndenge wana. (1 Sa. 1:6-10; Yobo 29:2, 4; Nz. 51:11) Biblia emonisi polele ete bato ya kozanga kokoka bakoki kondimama na Yehova. Ndenge nini? Soki tomonisi kondima epai ya Yesu Kristo mpe tozwi batisimo. (Yoa. 3:16) Na ndenge yango, tomonisaka na miso ya bato ete tobongoli motema na masumu na biso mpe tolaki Nzambe ete tokosala mokano na ye. (Mis. 2:38; 3:19) Yehova asepelaka ntango tosali makambo wana mpo na kokóma baninga na ye. Ntango nyonso oyo tozali kosala makasi tótosa elako na biso ya komipesa na Nzambe, Yehova andimaka biso mpe amonaka ete tozali baninga na ye ya motema.—Nz. 25:14. w24.03 26 par. 1-2
Mwamisato, 30 sanza ya 7
Tokoki kotika te koloba makambo oyo tomoni mpe toyoki.—Mis. 4:20.
Tokoki komekola bantoma soki tozali kokoba kosakola ata soki bakonzi ya Leta basɛngi biso tótika kosakola. Tokoki kozala na elikya ete Yehova akosalisa biso tókokisa mokumba na biso ya kosakola. Sɛngá Yehova apesa yo mpiko mpe bwanya mpe asalisa yo oyika mpiko na mikakatano. Mingi kati na biso bazali konyokwama na maladi, mitungisi ya makanisi, liwa ya moto oyo tozalaki kolinga mingi, mikakatano na libota, monyoko, to mikakatano mosusu. Mpe bamaladi mabe, bitumba esali ete mikakatano yango ekóma lisusu mpasi mpo na koyikela yango mpiko. Yebisá Yehova ndenge ozali mpenza komiyoka. Yebisá ye makambo ozali kokutana na yango kaka ndenge olingaki koyebisa yango moninga na yo ya motema. Zalá na kondima ete Yehova “akosalisa yo.” (Nz. 37:3, 5) Kotingama na mabondeli ekosalisa biso ‘tóyika mpiko na bolɔzi.’ (Rom. 12:12) Yehova ayebi mikakatano oyo basaleli na ye bazali kokutana na yango, “akoyoka kolela na bango mpo na kosɛnga lisalisi.”—Nz. 145:18, 19. w23.05 5-6 par. 12-15
Mwaminei, 31 sanza ya 7
Bókoba koluka koyeba malamu eloko oyo ekoki kondimama na Nkolo.—Ef. 5:10.
Ntango tolingi kozwa bikateli ya minene, tosengeli kososola “soki mokano ya Yehova ezali nini” mpe na nsima kosala na boyokani na yango. (Ef. 5:17) Soki toyebi malamu mitinda ya Biblia oyo tokoki kosalela na likambo oyo tozali na yango, tokozala mpenza na makanisi ya Nzambe na likambo yango. Mpe soki tosaleli mitinda na ye, tokolonga kozwa bikateli ya malamu. “Moto mabe,” monguna na biso Satana, akosepela tópesa ntango mingi na makambo ya mokili tii tózala na ntango te mpo na makambo ya Nzambe. (1 Yoa. 5:19) Ekozala mpasi te mokristo atya biloko ya mosuni, kotánga kelasi, to mosala na ye liboso ya mabaku mosusu ya kosalela Yehova. Soki esalemi bongo, ekomonisa ete makanisi ya mokili ekɔteli ye. Ya solo, makambo yango ezali mabe te, kasi esengeli ata moke te kozwa esika ya liboso na bomoi na biso. w24.03 24 par. 16-17