Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Mbote.
Awa ezali esika ya kosala bolukiluki na mikanda oyo Batatoli ya Yehova babimisaka na minɔkɔ ndenge na ndenge.
Mpo na kozwa mikanda, kende na jw.org.
  • Lelo

Mwamisato, 30 sanza ya 7

Tokoki kotika te koloba makambo oyo tomoni mpe toyoki.—Mis. 4:20.

Tokoki komekola bantoma soki tozali kokoba kosakola ata soki bakonzi ya Leta basɛngi biso tótika kosakola. Tokoki kozala na elikya ete Yehova akosalisa biso tókokisa mokumba na biso ya kosakola. Sɛngá Yehova apesa yo mpiko mpe bwanya mpe asalisa yo oyika mpiko na mikakatano. Mingi kati na biso bazali konyokwama na maladi, mitungisi ya makanisi, liwa ya moto oyo tozalaki kolinga mingi, mikakatano na libota, monyoko, to mikakatano mosusu. Mpe bamaladi mabe, bitumba esali ete mikakatano yango ekóma lisusu mpasi mpo na koyikela yango mpiko. Yebisá Yehova ndenge ozali mpenza komiyoka. Yebisá ye makambo ozali kokutana na yango kaka ndenge olingaki koyebisa yango moninga na yo ya motema. Zalá na kondima ete Yehova “akosalisa yo.” (Nz. 37:​3, 5) Kotingama na mabondeli ekosalisa biso ‘tóyika mpiko na bolɔzi.’ (Rom. 12:12) Yehova ayebi mikakatano oyo basaleli na ye bazali kokutana na yango, “akoyoka kolela na bango mpo na kosɛnga lisalisi.”—Nz. 145:​18, 19. w23.05 5-6 par. 12-15

Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2025

Mwaminei, 31 sanza ya 7

Bókoba koluka koyeba malamu eloko oyo ekoki kondimama na Nkolo.—Ef. 5:10.

Ntango tolingi kozwa bikateli ya minene, tosengeli kososola “soki mokano ya Yehova ezali nini” mpe na nsima kosala na boyokani na yango. (Ef. 5:17) Soki toyebi malamu mitinda ya Biblia oyo tokoki kosalela na likambo oyo tozali na yango, tokozala mpenza na makanisi ya Nzambe na likambo yango. Mpe soki tosaleli mitinda na ye, tokolonga kozwa bikateli ya malamu. “Moto mabe,” monguna na biso Satana, akosepela tópesa ntango mingi na makambo ya mokili tii tózala na ntango te mpo na makambo ya Nzambe. (1 Yoa. 5:19) Ekozala mpasi te mokristo atya biloko ya mosuni, kotánga kelasi, to mosala na ye liboso ya mabaku mosusu ya kosalela Yehova. Soki esalemi bongo, ekomonisa ete makanisi ya mokili ekɔteli ye. Ya solo, makambo yango ezali mabe te, kasi esengeli ata moke te kozwa esika ya liboso na bomoi na biso. w24.03 24 par. 16-17

Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2025

Mwamitano, 1 sanza ya 8

Bampasi ya moto ya sembo ezali mingi, kasi Yehova abikisaka ye na yango nyonso.—Nz. 34:19.

Nzembo yango elobeli makanisi mibale ya ntina: (1) Bayengebene bakutanaka na makambo ya mpasi. (2) Yehova abikisaka biso na makambo yango nyonso. Ndenge nini Yehova abikisaka biso? Lolenge moko oyo asalaka yango ezali na ndenge asalisaka biso tótalela bomoi na ndenge ebongi na mokili oyo mabe. Atako Yehova alaki ete tokozala na esengo ntango tozali kosalela ye, alaki te ete tokozala na bomoi oyo ezangi mikakatano lelo oyo. (Yis. 66:14) Alendisi biso tótya makanisi na bomoi oyo tokozala na yango na mikolo ezali koya, na ntango yango, tokozala na bomoi oyo alingaki tózala na yango mpo na libela. (2 Ko. 4:​16-18) Liboso ntango yango ekoka, azali kosalisa biso tókoba kosalela ye mokolo na mokolo. (Bil. 3:​22-24) Tokoki koyekola epai ya basaleli ya sembo ya Yehova, ezala ya ntango ya kala mpe ya mikolo na biso? Tokoki kokutana na mikakatano ya mbalakaka. Kasi soki totyeli Yehova motema, akotika te kosalisa biso.—Nz. 55:22. w23.04 14-15 par. 3-4

Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2025
Mbote.
Awa ezali esika ya kosala bolukiluki na mikanda oyo Batatoli ya Yehova babimisaka na minɔkɔ ndenge na ndenge.
Mpo na kozwa mikanda, kende na jw.org.
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto