Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 9/14 nk. 8-9
  • Libondeli

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Libondeli
  • Lamuká!—2014
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ezali na moto oyo ayokaka mabondeli na biso?
  • Tosengeli kobondela ndenge nini?
  • Tosengeli kobondela nani?
  • Pusaná penepene na Nzambe na libondeli
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Kobondela Nzambe ezali likambo ya lokumu monene
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Pusaná penepene na Nzambe na nzela ya libondeli
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Ndenge nini kobɛlɛma epai na Nzambe kati na libondeli
    Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?
Makambo mosusu
Lamuká!—2014
g 9/14 nk. 8-9
Mobali oyo azali kobondela

BIBLIA ELOBI NINI?

Libondeli

Ezali na moto oyo ayokaka mabondeli na biso?

“Ee Moyoki ya libondeli, ɛɛ bato ya lolenge nyonso bakoya epai na yo.”​—Nzembo 65:2.

OYO BATO BALOBAKA

Balobaka ete mabondeli “esukaka kaka na plafɔ.” Mingimingi, bato oyo bazali konyokwama bakoki kotya ntembe ete Nzambe ayokaka mabondeli na bango.

OYO BIBLIA ELOBI

Biblia elobi ete: “Miso ya Yehova [Nzambe] ezali kotala bayengebene, mpe matoi na ye ezali koyoka lilɔmbɔ na bango; kasi elongi ya Yehova ezali kotɛmɛla baoyo basalaka makambo ya mabe.” (1 Petro 3:12) Emonani polele ete Nzambe ayokaka mabondeli. Kasi ayokaka mingimingi mabondeli ya bato oyo batosaka mibeko na ye. Mpo na ndenge oyo Nzambe andimaka koyoka mabondeli na biso, vɛrsɛ mosusu elobi boye: “Kotya motema oyo totyelaka ye yango oyo: ete, ezala eloko nini biso tokosɛnga na boyokani na mokano na ye, akoyoka biso.” (1 Yoane 5:14) Na yango, moto oyo azali kobondela na motema mobimba asengeli koyeba lolenge ya mabondeli oyo ekoki koyokana na mokano ya Nzambe.

Tosengeli kobondela ndenge nini?

“Ntango ozali kobondela, kozongela kaka maloba wana mbala na mbala te.”​—Matai 6:7.

OYO BATO BALOBAKA

Bateyá bandimi ya mangomba ya Buda, Katolike, Hindu mpe ya Mizilma básalelaka mayaka mpo na kotánga mpe kozongelaka mabondeli.

OYO BIBLIA ELOBI

Mabondeli esengeli kouta mpenza na motema mpe kobimisa yango na bosembo nyonso; esengeli te kozala mabondeli oyo moto akangá na motó mpe kozongelazongela yango. Biblia elobi boye: “Ntango ozali kobondela, kozongela kaka maloba wana mbala na mbala te, ndenge bato ya bikólo basalaka, mpo bakanisaka ete Nzambe akoyoka bango mpo bazali koloba mingi. Bongo bómikómisa lokola bango te, mpo Nzambe Tata na bino ayebi makambo oyo bozali na bosɛnga na yango liboso kutu bósɛnga ye.”​—Matai 6:7, 8.

MPO NA NINI EZALI NA NTINA?

Ntango moto azali kobondela na lolenge oyo Nzambe aboyaka, moto yango azali kolekisa ntango na ye mpamba to mpe mbala mosusu azali nde kosilikisa Nzambe. Biblia elobi ete mabondeli ya bato oyo baboyaka kosala mokano ya Nzambe ezali “eloko moko oyo eyinamá” epai na ye.​—Masese 28:9.

Tosengeli kobondela nani?

“Bóluka Yehova [Nzambe] na ntango oyo akoki komonana. Bóbenga ye na ntango oyo azali pene.”​—Yisaya 55:6.

OYO BATO BALOBAKA

Bandimi mosusu babondelaka Maria to bikelamu mosusu lokola baanzelu mpe bato oyo babengamaka “basantu.” Na ndakisa “Santu” Antoine de Padoue, oyo balobaka ete atalaka “makambo ya losambo mpe bamposa ya bato,” mpe “Santu” Jude, oyo batalelaka ye lokola moto oyo akipaka “makambo oyo ezangá solisyo.” Bandimi mingi babondelaka “basantu” yango mpe baanzelu na elikya ete bakolobela bango liboso ya Nzambe.

OYO BIBLIA ELOBI

Basambeli ya solo basengeli kobondela “Tata na biso na likoló.” (Matai 6:9) Biblia elobi boye: “Bómitungisa ata na likambo moko te, kasi na makambo nyonso na libondeli mpe na lilɔmbɔ ná matɔndi, kosɛnga na bino eyebana epai ya Nzambe.”​—Bafilipi 4:6.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto