Matomba ya kosepelisa ya mayangani “bobangi Nzambe”
1 Mayangani ya etúká “Bobangi Nzambe” masili koleka. Uta kobanda na yango na sanza ya Augusto oyo eleki, mayangani yango, oyo makobaki kino na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ ya mbula bobele moko, masili kosunga biso mpo na koyeba malamu ndimbola ya bobangi Nzambe mpe ntina oyo esengeli ete tómonisa yango.
2 Na lisungi ya Yehova, mayangani ya etúká “Bobangi Nzambe” mazalaki bileko kitoko oyo biyanganisaki, na boumeli ya mikolo misato milandani, bato koleka 245 000. Motángo 3 000 kati na bango bakisa mpe Batswa (Pygmées) minei, bazwaki batisimo lokola elembo ya komipesa na bango epai na Nzambe. Mikakatano ya transport mipekisaki bandeko te mpo na kozwa litomba na boninga kitoko ya bayangani mosusu mpe na bilei kitoko ya elimo oyo bipesamaki na mayangani yango. Balapolo emonisi ete ata mpe bandeko bakufi-miso bakokaki kotambola mbala mosusu koleka ntaka ya bakilomɛtɛlɛ 400 mpo ete bázala wana na elambo ya elimo oyo ekolisaki mayele na biso.
3 Ebongiseli mpe mateya oyo mapesamaki na mayangani “Bobangi Nzambe” ezangaki te kobenda likebi ya bato ya mokili mpe baninga mpe baninga oyo basepelaka na solo, baoyo bayanganaki na yango. Mokambi moko ya eteyelo alobaki ete: “Makambo namoni na ntina etali molɔngɔ epai na Batatoli ya Yehova ebendi likebi na ngai. Masukulu oyo masalami mazalaki mpenza ya kopesa mayele; ntango mosusu ngai mpe nakokóma Motatoli ya Yehova mokolo mosusu.” Na ngambo na bango, babalani mibale balobaki ete: “Lisangá oyo ezali lisangá ya moke te, lokola tozalaki kokanisa yango; ezali mpenza lisangá moko monene. Batoli oyo bazali kopesa kuna ebongi mpenza mpo na kotambwisa bomoi ya moto mpe kopesa mayele.” Moninga moko oyo asepelaka na solo azalaki naino “kotambolatambola” na nzela mibale ekeseni, azwaki ekateli makasi ya kozwa batisimo na liyangani ya mbala ezali koya. Mpo na bandeko, bakomantere na bango emonisaki ete bazalaki kozonga na bateritware na bango elongo na ekateli makasi ya komonisa bobangi Nzambe na mosala mosalemi na molimo na bango mobimba.
4 Na polele, mayangani ya etúká “Bobangi Nzambe,” oyo mauti kosalema atako mikakatano ya lolenge nyonso oyo mizwami na teritware na biso, ezalaki bileko ya kosepelisa oyo bipesaki ebele na matomba epai na baoyo nyonso bazali kobanga Nzambe. (Nz. 128:1) Mpo na 1995, la Société akani kobongisa mayangani ya etúká ya mikolo misato na bisika mingi. Ebongiseli yango ekopesa nzela na bato mingi lisusu báya kosangana elongo na biso mpo na koyekola kobanga Yehova mpe kotambola kati na banzela na ye.