Tólengela Ekaniseli
Moko na moko, mingimingi molobi, asili koyeba ngonga mpe esika ya sikisiki oyo ebongisami mpo na molulu ya Ekaniseli? Molobi asili koyeba ete boumeli ya likita yango esengeli te koleka miniti 45?
Nani akolamba límpa mpe nani akosomba vinyo (talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Febwáli 1990, nkasa 16-18)? Nani akoya na mesa mpe kotanda yango elongo na elamba ya pɛto likoló na yango, mpe atya bakɔ́pɔ mpe basani oyo ekoki?
Bibongiseli bisili kokamatama mpo na kotya bopɛto na Ndako ya Bokonzi liboso mpe nsima ya Ekaniseli? Banani bakosala mosala ya koyamba bato mpe banani bakotambwisa límpa mpe vinyo? Likita lisili kosalema elongo na bandeko yango mpo na kolimbola bango mosala na bango? Lolenge nini ekosalema mpo ete límpa mpe vinyo eleka na mabɔkɔ ya bato nyonso?
Bibongiseli bisili kokamatama mpo na kosunga bandeko basi mpe bandeko mibali oyo bakómi mibangé to bibɔ́sɔ́nɔ́ ete báyangana na Ekaniseli? Soki ndeko mwasi to ndeko mobali mopakolami azalaka bobele na mbeto mpo na maladi to mpo na bobangé mpe azali na likoki te ya koya na molulu ya Ekaniseli, bibongiseli bisili kokamatama mpo na kosala oyo ekoki mpo na kokenda kotikela ye límpa mpe vinyo?