Tótala teritware na biso na mobimba
1 Na bakartyé epai bato bafandaka, tomonaka ntango mosusu bisika ya kotɛka biloko mikemike, na ndakisa mwa butiki ya bikelakela ya kolambela, restorá to mwa butiki ya biloko bisalelamaka mingi. Soki bisika motindo wana bizali kati na teritware na biso, tosengeli kosolola na baoyo bazali kotɛkisa kati na yango motindo moko tosololaka na bafándi mosusu ya kartyé.
2 Tokoki kosalela lisoló moko ya pɛtɛɛ mpe ya mokuse na kolobáká na ndakisa ete: “Nalingi kolakisa yo eloko moko.” Soki emonani ete motɛkisi azali na mosala mingi na ntango wana, tokoki bobele kolakisa ye trakte mpe koloba ete: “Nakozongela yo na ntango oyo okozala na mosala mingi te. Nakolinga koyeba oyo ozali kokanisa na ntina na trakte oyo.”
3 Mosala oyo esengeli kobangisa biso te. Mosakoli moko andimaki ete: “Nakanisaki ete bakosepela te. Nzokande, likambo ya kokamwa, bato basepelaki ntango nalobelaki Bokonzi. Bato bazalaki mpenza na bonkónde mpe na boninga: bango nyonso bazwaki bazulunalo.”
4 Mwasi moko oyo asalaka na kompanyi elakisaka bandako ya kofutela to ya kosomba abyangaki Batatoli kati na biro na ye. Andimaki bazulunalo mpe amonisaki mposa ya koyekola Biblia. Balakisaki ye búku Boyebi, mpe nokinoki boyekoli ebandaki kosalema kati na biro na ye!
5 Tozali na mokumba ya kotala teritware na biso na mobimba, yango esɛngi kokutana na bakomɛlɛsa ya kartyé. (Mis. 10:42) Tósala ebongiseli ya kokende kotala bango lokola bato mosusu. Boye, tokosuka bobele te na kotala malamu teritware na biso, kasi ezali solo ete tokozwa mpe matomba ya kosepelisa na ntina na milende na biso.