Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 2/97 lok. 6
  • Tobongisami mpe tokoki mpo na koteya basusu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tobongisami mpe tokoki mpo na koteya basusu
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Masolo mosusu
  • Boyebi oyo euti na Nzambe ezali koyanola na ebele ya mituna
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • “Oyo elimboli bomoi ya seko”
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Makanisi mpo na ndenge ya kobanda masolo na mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Pusaná penepene na Nzambe na libondeli
    Biblia eteyaka mpenza nini?
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1997
km 2/97 lok. 6

Tobongisami mpe tokoki mpo na koteya basusu

1 Yehova aponaki Mose mpo ete azala momonisa na ye, kasi Mose amimonaki ete azalaki na makoki te ya koyebisa maloba ya Yehova epai na Falo. (Ex. 4:10; 6:12) Na koyebisáká Nzambe ete ayebi koloba te, Yilimia amonisaki ete azalaki na makoki te ya kozala mosakoli ya Yehova. (Yil. 1:6) Ya solo, na ebandeli, bango moko bazalaki komindima te, kasi basakoli yango mibale bamimonisaki mpenza Batatoli ya mpiko mpo na Yehova. Nzambe abongisaki bango malamumalamu.

2 Lelo oyo, Yehova azali kopesa biso oyo esengeli mpo na kolónga kati na mosala na biso ya kosakola. (2 Kol. 3:4, 5; 2 Tim. 3:17) Lolenge moko na mobongisi-mituka oyo abongisami mpe azali na bisaleli, tozali na bisaleli bibongi mpo na kokokisa mosala na biso ya kosakola malamumalamu. Na Febwáli, tokolakisa búku nyonso ya nkasa 192 oyo ebimisamaki liboso ya 1984, oyo lisangá ezali na yango kati na libómbo. Ata soki bisaleli wana ya elimo bizali ya sika te, mito na masoló ya Biblia oyo yango ezali kolobela ezali ntango nyonso na makambo ya sika mpe ekosalisa bato ete báyeba solo. Makanisi oyo makoki kosalelama na búku nyonso oyo tokolinga kolakisa.

3 Tokoki kolamwisa bosepeli mpo na Liloba ya Nzambe na kolobeláká kelasi. Tokoki kobanda lisoló na kolobáká ete:

◼ “Lelo oyo, bato balobelaka mingi lolenge ya bakelasi oyo moto asengeli kotánga. Engebene makanisi na yo, lolenge nini ya kelasi esengeli koluka kotánga mpo na kozwa bolamu mpe bolóngi? [Tóyoka eyano.] Baoyo bazali kozwa boyebi ya Nzambe bakoki komizwela na yango matomba ya seko. [Tótánga Masese 9:10, 11.] Búku oyo [tómonisa motó na likambo ya búku oyo tozali kolakisa] ezwi moboko na Biblia. Ezali kobenda likebi likoló na eutelo bobele moko ya boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko.” Tómonisa ndakisa moko ya sikisiki kati na búku yango. Soki moto yango amonisi bosepeli, tótikela ye búku yango na koyebisáká mwa likabo oyo esɛngami mpo na yango mpe tóyokana mpo na bozongeli ya sika.

4 Wana tozongi kotala moto oyo tosololaki na ye ntina ya mateya ya Biblia, tokoki koloba boye:

◼ “Mbala eleki, tomonaki ete Biblia ezali eutelo ya mateya oyo makoki kopesa biso bomoi ya seko. Ya solo, esengeli kosala milende mpo na koyekola makambo oyo biso tozali na yango mposa ete tóyeba kati na Makomami. [Tótánga Masese 2:1-5.] Bato mingi bamonaka ete mikapo mosusu ya Biblia mizali mpasi mpo na kososola yango. Nakosepela kolakisa yo na mokuse mwango moko oyo biso tosalelaka mbala mingi mpo na kosalisa bato ete báyeba makambo mingi matali mateya ya moboko oyo mazwami kati na Biblia.” Tófungola na lokasa moko ya sikisiki ya búku oyo totikelaki moto yango mpe tómonisa ye na mokuse lolenge oyo totambwisaka boyekoli ya Biblia. Soki molobani na biso azali na mposa ya koyekola mbala na mbala, tólimbwela ye ete tokozonga kotala ye elongo na búku na biso ya boyekoli Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko.

5 Bato mingi bazali komitungisa mpo na bamilió ya bana oyo bazali konyokwama kati na mokili. Mbala mosusu tokoki kosalisa molobani na biso ete asosola lolenge nini Nzambe azali kotalela ezalela na bango ya mpasi, na kolobáká ete:

◼ “Na ntembe te omonaki bililingi oyo bizali kolobela bana kati na mokili mobimba oyo bazali konyokwama na nzala, na maladi mpe basundolami. Ndenge nini bibongiseli oyo bitalelaka makambo yango bizali kolónga te kobongisa ezalela yango? [Tóyoka eyano.] Nzambe alingi ete bato bazala malamu koleka. Talá oyo azali kolaka kati na Biblia mpo na bana mpe mikólo. [Tótánga Emoniseli 21:4.] Búku oyo [tómonisa motó na likambo] ezali kolobela na mozindo makambo matali mokili oyo mokotyama na Nzambe oyo kati na yango mpasi ekozala lisusu te.” Soki likoki ezali, tólakisa elilingi moko ya Paladiso mpe tólimbwela ye yango. Tólakisa moto yango búku mpe tózwa bibongiseli mpo na kozongela ye.

6 Soki, na mbala ya liboso, tolobelaki minyoko oyo mizali kozwa bana, tokoki kolanda lisoló na ntango ya bozongeli ya sika na lolenge oyo:

◼ “Mbala ya nsuka oyo nayaki, omonisaki komibanzabanza na yo na ntina na ezalela ya mawa ya bana oyo bazali kati na mabota makabwani, to mpe oyo bazali konyokwama na nzala, na maladi mpe na mobulu. Ezali likambo ya kolendisa na komona ete Biblia ezali kolobela mokili moko oyo maladi, mpasi mpe liwa ekonyokola lisusu bana te, mikólo mpe te. Bomoi moko ya malamu awa na mabelé elobelami kati na esakweli moko ya mokanda ya Yisaya.” Tótánga Yisaya 65:20-25 mpe tólimbola yango. Tólobela likoki ya koyekola Biblia na lisalisi ya búku Boyebi.

7 Lokola libondeli ezali momeseno ya bandimi nyonso, tokoki kobanda lisoló na likambo yango na kolobáká ete:

◼ “Na bantango mosusu ya bomoi na biso, mingi kati na biso tokutanaka na mikakatano oyo epusaka biso ete tóbondela Nzambe mpo na kozwa lisalisi na ye. Kasi bato mingi bamonaka ete mabondeli na bango mandimamaka te. Emonanaka kútu ete mabondeli oyo masalemaka na bakonzi ya mangomba liboso ya bato nyonso mpo na kozwa kimya mayokamaka te. Tozali koloba bongo mpamba te bitumba mpe mobulu ezali kokóba kotungisa bato. Nzambe ayokaka mpenza mabondeli? Soki ɛɛ, mpo na nini ebele ya mabondeli mazwaka biyano te? [Tóyoka eyano.] Nzembo 145:18 emonisi nini tosengeli kosala mpo ete mabondeli na biso mándimama. [Tótánga vɛrsɛ́ yango.] Ya liboso, mabondeli oyo mapesami epai na Nzambe masengeli kozala ya sembo mpe masengeli kozala na boyokani na solo oyo tozali kokuta kati na Liloba na ye, Biblia.” Tólakisa búku oyo tozali kosalela mpe tóbenda likebi likoló na oyo yango ezali koloba na ntina na motuya ya libondeli.

8 Mpo na kokóba lisoló oyo litalelaki libondeli, tokoki komeka koloba boye:

◼ “Nasepelaki kosolola na yo na ntina na libondeli. Na ntembe te okondima ete Yesu amemelaki biso lisalisi libongi na komonisáká likanisi na ye likoló na oyo ekoki kolobelama kati na mabondeli.” Tótánga Matai 6:9, 10 mpe tómonisa makambo ya ntina oyo Yesu alobelaki kati na libondeli ya Tata wa Biso. Tófungola búku Boyebi na mokapo 16, oyo ezali na motó na likambo ete “Lolenge nini okoki kobɛlɛma epai na Nzambe,” mpe tósɛnga na moto yango soki tokoki kolakisa ye lolenge ya koyekola yango.

9 Ntango tozali kolobela likambo litali koyebisa na basusu boyebi ya Nzambe, mbala mosusu totunaka ete: “Nani abongisami mpo na makambo oyo?” Makomami mayanoli ete: “Ezali biso.”​​​​—2 Kol. 2:16, 17, NW.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto