Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 9/97 lok. 6
  • Tótya motema epai na Yehova mpo na ‘kokólisa’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tótya motema epai na Yehova mpo na ‘kokólisa’
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya kosalela mwa buku ya sika Nsango malamu oyo euti na Nzambe!
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Tómekola Yehova na komibanzabanzáká mpenza mpo na bazalani na biso
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Makanisi mpo na ndenge ya kobanda masolo na mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Lolenge ya kobanda boyekoli na mwa buku Azali kosɛnga
    Mosala na biso ya Bokonzi—1999
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1997
km 9/97 lok. 6

Tótya motema epai na Yehova mpo na ‘kokólisa’

1 “[Nayokaki] mpo na mbala ya liboso esengo ya kosangana na kofungolama ya lisangá ya sika. Yango esɛngaki mbula koleka mibale ya mosala makasi, ya mabondeli mpe ya kotya motema epai na Yehova, ‘ye nde azali kokólisa.’” Elobamaki bongo na mobongisi-nzela moko oyo azali komibanzabanza mpo na mosala na ye mpe amonaki ntina ya kotya motema epai na Yehova mpo na ‘kokólisa.’ (1 Kol. 3:5-9) Ntango tozali koluka bato oyo bazali kosepela na makambo ya elimo, biso mpe tozali na mposa ya lisungi ya Nzambe soki tolingi ete mosala na biso ebota mbuma.​​​—Mas. 3:5, 6.

2 Kolóna ezali na ntina: Mpo ete mbuma ya elimo ekóla, esengeli kolóna yango. Kozongela moto nsima ya mokolo moko to mikolo mibale ebimisaka mbala mingi matomba malamu. Tózala na mɔ́tɔ mpe na elobeli ya boninga. Tósepelisa molobani na biso. Tólobaka bobele biso moko te. Tópesa ye nzela ya koyeba biso mpe tómonisa ete tozali kosepela na ye.

3 Na boumeli ya sanza ya Sɛtɛ́mbɛ, tokokóba kokabola mwa babúku ikeseni lokola na sanza ya Augústo. Kasi esengeli na biso lisusu kozongela bato oyo bamonisaki bosepeli to bazwaki mwa búku. Ndenge nini? Na kosaláká bozongeli ya sika mpe na kosɛngáká boyekoli ya Biblia. (Mat. 28:19, 20) Mpo na yango, tokoki kosalela mwa búku Azali kosɛnga mpe kosalisama na makanisi minei oyo malandi.

4 Soki tosololaki na moto oyo azali komituna soki mokili ezali kokenda wapi, tokoki kozongela lisoló na kolobáká ete:

◼ “Na ntembe te ozali komitungisa lokola ngai wana bizaleli malamu ya bato esili kokwea. Tozali koyoka makambo ya nsɔmɔ mpo na mobulu kati na bandako, nalingi kolobela bana, baboti to babalani oyo mbala mingi bazali konyokwama. Epai mosusu, mingi bazali komona malamu kokosa to koyiba mpo na kokokisa bamposa na bango. Mpo na yo lolenge oyo bato bazali kosalela bomoi na bango ezali na ntina epai na Nzambe? [Tótika moto yango ayanola.] Nzambe atyaki mwa mitindá mpo na moto, mpe mitindá yango mizali na mpasi te mpo na kotosa.” Tótánga 1 Yoane 5:3. Mpe na nsima tólakisa mwa búku Azali kosɛnga mpe tófungola yango na liteya 10. Tóbenda likebi likoló na misala oyo mikomami na makomami ya kotɛngisama na ebandeli ya paragrafe 2 kino 6, mpe tótuna moto yango, wapi oyo engebene ye ezali kotungisa mingi bato. Tótánga paragrafe oyo ezali kopesa eyano mpe vɛrsɛ́ moko to mibale, soki ebongi bongo. Tósukisa na kotángáká paragrafe 7 mpe tóyokana mpo na kosolola mbala ekoya.

5 Epai na baoyo bazali komitungisa mpo na bomoi na bango ya libota, tokoki koloba boye:

◼ “Na makanisi na yo ezali malamu kotalela Mozalisi mpo na kolónga kotonga bomoi ya libota?” Tótika moto yango ayanola. Tófungola mwa búku Azali kosɛnga na liteya 8 mpe tólimbola ete ezali na mitindá mizwami kati na Biblia mpo na mosangani mokomoko ya libota. Tómonisa lolenge ya kosalela mwa búku yango, elongo na Biblia, mpo na kozwela yango litomba malamu. Tólanda mitindá oyo mipesami na lokasa 2. Tókamata bibongiseli mpo na kozonga kosilisa liteya yango to, soki eyekolamaki mobimba, tókamata bibongiseli mpo na koyekola liteya mosusu oyo moto yango akopona.

6 Talá lolenge ya kosɛnga mbala moko boyekoli ya Biblia. Ezali bongo kolakisa mwa búku “Azali kosɛnga” mpe koloba ete:

◼ “Mwa búku oyo ezali koteya mateya ya moboko ya Biblia. Na lokasa mokomoko okokuta biyano na mituna oyo ezali kotungisa bato uta bikeke. Na ndakisa: Mokano ya Nzambe mpo na mabelé ezali nini?” Tótalela liteya 5 mpe tótánga mituna ya ebandeli. Tótuna moto yango amonisa motuna to mituna nini ezali kosepelisa ye mingi mpe tótánga paragrafe moko to baparagrafe oyo etalelami na likambo yango, mpe bavɛrsɛ́ oyo ebongi na yango. Tólimbwela ye ete akoki kozwa kozanga nkaká biyano oyo ekosepelisa na mituna mosusu. Tólaka ye ete tokozonga mpo na kotalela mituna mosusu.

7 Tokolinga ntango mosusu kosalela lolenge oyo ya pɛtɛɛ koleka mpo na kobanda boyekoli ya Biblia:

◼ “Oyebi ete na mwa miniti moke okoki kozwa eyano na likambo moko ya ntina kati na Biblia? Na ndakisa . . . ” Tótánga motuna moko oyo ezali na ebandeli ya moko ya mateya ya mwa búku yango mpe ete, engebene makanisi na biso, ezali motuna oyo moto yango amitunaka. Mpo na kozwa makanisi ya mituna, tótalela paragrafe 15 mpe 16 ya siplemá ya Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza ya Apríli 1997 oyo elobi “Tóyika mpiko mpo na kosala bozongeli ya sika.”

8 Kolónga na esengo nyonso mikakatano oyo mizali kobima na bozongeli ya sika mpe na boyekoli ya Biblia ezali moko ya misala ya “basalani” na Nzambe. (1 Kol. 3:9) Tósala makasi mpo na kolóna bosepeli, na nsima tótya motema epai na Nzambe mpo na “kokólisa.” Na kosaláká bongo, tokoyoka esengo ya solo, esengo oyo mosala mosusu ekoki kopesa te.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto