Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • si nk. 234-237
  • Mokanda ya Biblia nimero 54—1 Timoté

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokanda ya Biblia nimero 54—1 Timoté
  • “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MAKAMBO MAZALI KATI NA TIMOTÉ YA LIBOSO
  • LITOMBA NA YANGO
  • Tobatela kondima mpe lisosoli malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Timote—“Mwana na solo kati na kondima”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mokanda ya Biblia nimero 55—2 Timoté
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Nini ekoki kosalisa biso na kosembola liloba ya solo malamumalamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Makambo mosusu
“Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
si nk. 234-237

Mokanda ya Biblia nimero 54—1 Timoté

Mokomi: Paulo

Esika ya bokomi: Makedonia

Nsuka ya bokomi: soko 61-64 T.B.

1, 2. (a) Bokeseni nini emonani kati na lolenge kokangama ya Paulo elobelami na mokanda ya Misala mpe lolenge elobelami na mokanda ya mibale epai na Timoté? (b) Mokanda ya liboso epai na Timoté mokomamaki ntango nini, mpe mpo na nini?

LISOLÓ ya bomoi ya Paulo oyo Luka ayebisi kati na mokanda ya Misala lisuki ntango Paulo azalaki kozela kokatama ya likambo na ye epai na Kaisala na mboka Loma. Paulo amonisami ete azali kofanda na ndako na ye moko ya kofutela, kosakoláká Bokonzi ya Nzambe epai na baoyo nyonso bazali koya kotala ye, mpe azali kosala bongo na “polele mpenza, moto mpe te apekisaki ye.” (Mis. 28:30, 31) Kasi, na mokanda na ye ya mibale epai na Timoté, Paulo akomi ete: “Nazali koyoka mpasi mpe kolata nkanga lokola mosáli na mabe,” mpe alobi ete liwa na ye lisili kobɛlɛma. (2 Tim. 2:9, NW; 4:6-8) Oyo nde mbongwana! Na mbala ya liboso, atalelamaki lokola mokangami moko ya lokumu, kasi na mbala ya mibale, atalelami lokola mosáli na mabe. Nini elekaki katikati na ntango oyo Luka alobelaki ezalela ya Paulo na mobu 61 T.B., na nsuka ya mbula mibale oyo alekisaki na Loma, mpe ntango oyo Paulo ye moko ayebisaki ezalela na ye epai na Timoté na nzela ya mokanda oyo momonani ete mokomamaki mwa moke liboso ya liwa na ye?

2 Lokola ezali mpasi mpo na komonisa, na kati ya lisoló mobimba ya mokanda ya Misala, eleko oyo mikanda ya Paulo epai na Timoté mpe epai na Tito ekomamaki, balimboli mosusu ya Biblia basukisi ete Paulo alóngaki na lisambisi na ye liboso na Kaisala mpe abimisamaki na bolɔ́kɔ soko na mobu 61 T.B. Búku The New Westminster Dictionary of the Bible elobi ete: “Vɛrsɛ́ ya nsuka ya mokanda ya Misala eyokani malamu na likanisi oyo [ete, nsima na kolekisa mbula mibale na bolɔ́kɔ, Paulo abimisamaki], nzokande vɛrsɛ́ yango eyokani mpenza te na likanisi oyo ete bolɔ́kɔ oyo elobelami esukaki ntango bakatelaki ntoma etumbu ya liwa. Luka alobeli makasi likambo oyo ete moto moko te apekisaki mosala ya Paulo; boye, yango ezali kopesa likanisi ete nsuka ya mosala na ye ezalaki naino pene te.”a Na yango, mokanda ya liboso epai na Timoté mokomamaki katikati na eleko ya bobimi ya Paulo na bolɔ́kɔ na ye ya liboso na Loma mpe eleko ya bokangami na ye ya nsuka kuna, soko na 61-64 T.B.

3, 4. (a) Ntango abimaki na bolɔ́kɔ, Paulo asalaki likambo nini mpenza? (b) Uta wapi akomaki mokanda ya Liboso epai na Timoté?

3 Wana abimisamaki na bolɔ́kɔ, ntembe ezali te ete Paulo azongelaki mosala na ye ya misionere elongo na Timoté mpe Tito. Likambo oyo ete Paulo akómaki kino Espagne, ndenge bato mosusu bakanisaka yango, ezali na bilembeteli ya sikisiki te. Clément moto na Loma akomaki (s. 95 T.B.) ete Paulo akómaki “na eteni ya nsuka mpenza ya W[ɛ́sti],” oyo kati na yango Espagne mpe ekokaki kozala.b

4 Na esika nini Paulo akomaki mokanda na ye ya Liboso epai na Timoté? 1 Timoté 1:3 emonisi ete Paulo azwaki ebongiseli ete Timoté atalela makambo mosusu ya lisangá na Efese wana ye moko Paulo akendaki na Makedonia. Boye, emonani ete ezali uta na Makedonia nde azongisaki mokanda epai na Timoté na Efese.

5. Bilembeteli nini bizali komonisa bosolo ya mikanda nyonso mibale oyo bitindamaki epai na Timoté?

5 Uta kala mpenza, mikanda nyonso mibale oyo mitindamaki epai na Timoté mindimamaka ete mikomamaki na Paulo mpe mizali eteni ya Makomami mapemami. Bakomi ya kala ya makambo ya boklisto, sangisá mpe Polycarpe, Ignace, mpe Clément moto na Loma, banso bazali na likanisi bobele moko na likambo yango; lisusu, mikanda yango mikɔtisami kati na bakataloge ya mwa bikeke ya liboso mpenza, kotángamáká ete mizali makomi ya Paulo. Moto moko na mayele akomi ete: “Ezali bobele na makomi moke ya T[estamá] ya S[ika] oyo mazali na bilembeteli makasi koleka . . . Na bongo, koboya kondima bosolo na yango esengeli kotalelama lokola likambo ya sika oyo liyokani te na bilembeteli ya solosolo ya lingomba ya ebandeli.”c

6. (a) Mpo na bantina nini Paulo akomaki mokanda ya liboso epai na Timoté? (b) Nini toyebi likoló na Timoté, mpe nini emonisi ete azalaki ministre oyo akɔmeli?

6 Paulo akomaki mokanda oyo ya Liboso epai na Timoté mpo na komonisa ye na polele mpenza mwa bibongiseli mosusu ya kolanda kati na lisangá. Azalaki mpe na mposa ya kokebisa Timoté ete azala na bokɛngi liboso na mateya ya lokuta mpe alendisa bandeko ete báboya ‘boyebi ya lokuta.’ (1 Tim. 6:20) Efese, oyo ezalaki engumba ya mombongo, ekokaki mpe koyeisa komekama ya koluka biloko mingi ya mosuni mpe ya “mposa na mosolo,” mpe na yango ezalaki ntango malamu mpenza mpo na kopesa mwa batoli likoló na likambo yango lokola. (6:10) Na ntembe te, Timoté azalaki na boyebi ya makambo mingi mpe azwaki kobongisama malamu, boye abongaki mpenza kosalelama kati na mokumba yango. Tata na ye azalaki Mogreke mpe mama na ye azalaki mwasi Moyuda oyo azalaki kobanga Nzambe. Ntango oyo Timoté akómaki moklisto eyebani sikisiki te. Na ntango Paulo akendaki na Lusutula na mobembo na ye ya mibale ya misionere, soko na nsuka ya mobu 49 T.B. to na ebandeli ya mobu 50 T.B., Timoté (mbala mosusu ntango akómaki pene na koleka mbula 19 to ntango akokisaki mbula 20) asilaki kopesamela ‘litatoli malamu na bandeko oyo bazalaki na Lusutula mpe na Ikɔni.’ Boye, Paulo akamataki bibongiseli ete Timoté akende mobembo elongo na ye moko mpe Sila. (Mis. 16:1-3) Kati na mikanda 14 oyo Paulo akomaki, nkombo ya Timoté etángami na mikanda 11, bakisá mpe kati na mokanda ya Misala. Paulo azalaki ntango nyonso kosepela na ye lokola tata epai na mwana na ye ya mobali mpe, na mabaku ndenge na ndenge, azalaki kotinda ye ete akende kotala mpe kosalela masangá makeseni—yango ezali likambo lindimisi ete Timoté asalaki mosala malamu lokola misionere mpe azalaki mpenza na makoki ya komema mikumba minene.​—1 Tim. 1:2; 5:23; 1 Tes. 3:2; Filp. 2:19.

MAKAMBO MAZALI KATI NA TIMOTÉ YA LIBOSO

7. Mpo na nini Paulo azali kolendisa Timoté ete atikala na Efese?

7 Elendiseli ya kozala na kondima esika moko na lisosoli malamu (1:1-20). Nsima ya kopesa Timoté mbote lokola “mwana na solo kati na kondima,” Paulo alendisi ye ete aumela na Efese. Asengeli kosembola baoyo bazali koteya “makambo na bokɛsɛnɛ,” oyo mazali kobimisa ntembe ya mpambampamba na esika ya kolendisa kondima. Paulo alobi ete ntina ya etindá yango ezali “bolingo uta na mitema na pɛto mpe na lisosoli malamu mpe kondima ezangi bokosi.” Abakisi ete: “Bamosusu bapɛngwi longwa na makambo oyo kokɔta na bilobaloba.”​—1:2, 3, 5, 6.

8. Nini emonisami polele na mawa oyo Paulo ayokelamaki, mpe etumba malamu nini alendisi Timoté ete abunda?

8 Atako na kala Paulo azalaki motuki mpe monyokoli, nzokande, ngɔlu ya Nkolo ‘esopani mingi mpo na ye esika moko na kondima mpe bolingo bozali kati na Klisto Yesu,’ na boye ete ayokelamaki mawa. Azalaki moto ya liboso kati na basáli na masumu; mpe akómaki bongo elakiseli oyo emonisi motema molai ya Klisto Yesu, oyo “ayaki kati na mokili mpo na kobikisa bato na masumu.” Mokonzi ya seko abongi mpenza kozwa lokumu mpe nkembo libela na libela! Paulo asɛngi na Timoté ete alanda kobunda etumba kitoko, ‘kosimbáká makasi kondima mpe lisosoli malamu.’ Asengeli te kozala lokola baoyo “bazindisi kondima na bango,” na ndakisa Umenai mpe Alesandala, oyo Paulo apamelaki bango na likambo litali kotuka.​—1:14, 15, 19.

9. (a) Mabondeli nini masengeli kosalema, mpe mpo na nini? (b) Nini elobami mpo na basi kati na lisangá?

9 Malako matali losambo mpe ebongiseli kati na lisangá (2:1–6:2). Mabondeli masengeli kosalema mpo na bato ya lolenge nyonso, sangisá mpe baoyo bazali na etɛlɛmɛlo ya likoló, na ntina ete baklisto báfanda na kimya kati na bokangami epai na Nzambe. Ezali mokano ya Nzambe, Mobikisi, ete “lolenge nyonso ya bato bábikisama mpe bákóma na boyebi ya sikisiki ya solo. Mpo ete ezali na Nzambe bobele moko, mpe na molobeli bobele moko kati na Nzambe mpe bato, ye moto, Klisto Yesu, oyo amipesaki ye moko lokola lisiko mpo na bato nyonso.” (2:4-6, NW) Paulo aponamaki ntoma mpe moteyi na makambo yango. Na bongo, azali kobyanga mibali ete bábondelaka na bosembo nyonso mpe basi bázala na molato ya bopɔlɔ mpe na makanisi malamu, lokola yango ebongi na baoyo bazali kopesa limemya mozindo epai na Nzambe. Mwasi asengeli koyekola na kimya mpe asengeli te kozala na bokonzi likoló na mobali, “zambi Adama asalamaki liboso mpe Eva na nsima.”​—2:13.

10. Wapi masɛngami mpo na bakɛngɛli mpe basaleli na misala, mpe mpo na nini Paulo akomi makambo yango?

10 Mobali oyo azali koluka kokóma mokɛngɛli azali na mposa ya mosala moko malamu. Bongo, Paulo atángi masɛngami mpo na bakɛngɛli mpe basaleli na misala. Mokɛngɛli asengeli kozala “na lofundo [“efundeli,” NW] soko moke te, mobali na mwasi moko, moto na kokanga motema, mosembwi, moto na makambo mabongi, monyangeli na bapaya, molakisi malamu, momeli [“molangwi,” NW] na masanga te, moswani te, kasi na boboto, moto na etumba te, moluli na mosolo mpe te. Ekoki na ye kobongisa ndako na ye moko na malamu, kotosisa bana na ye na sembo na bozito. . . . Azala mondimi na sika te . . . Ekoki mpe ete azala na litatoli malamu epai na bato na libándá.” (3:2-7) Masɛngami mpo na basaleli na misala mazali mpe bongo, mpe bango basengeli komekama liboso mpo na komona makoki na bango na mosala. Paulo akomi makambo oyo mpo ete Timoté akoka koyeba lolenge oyo asengeli komitambwisa ye moko kati na lisangá ya Nzambe, oyo ezali ‘likonzí mpe etɛmiselo na solo.’—3:15.

11. (a) Mikakatano nini mikobima na nsima? (b) Timoté asengeli kotya likebi na nini, mpe mpo na nini?

11 Na ntango oyo ekoya nsima, bamoko bakopɛngwa longwa na kondima mpo na kolanda mateya ya bademó. Bato na bokosi oyo bazali kobuka lokuta bakopekisa libala mpe bakopesa etindá ya koboya bilei oyo Nzambe asalaki mpo na kolyama na matɔ́ndi nyonso. Lokola azali mosaleli abongi ya nsango malamu, Timoté asengeli kokweisa masapo ya mpambampamba mpe ‘bilobaloba ya basi banuni.’ Epai mosusu, asengeli komikembisa ye moko na komityeláká mokano ya kozala na bokangami epai na Nzambe. Paulo alobi ete “tozali kosalaka mosala mpe kobunda etumba mpo na bongo, zambi tosili kolikya epai na Nzambe na bomoi, ye oyo azali Mobikisi na bato nyonso mpe na koleka na baoyo bazali kondima [“basembwi,” NW].” Na yango, Timoté asengeli kokóba kopesa mitindá yango mpe kolakisa yango. Asengeli te kopesa nzela ete moto atyola bolenge na ye, kútu, asengeli nde kozala ndakisa kati na etamboli mpe na mosala ya bulɛɛ. Asengeli komipesa na makambo yango mpe kokeba ntango nyonso mpo na ye moko mpe mpo na mateya na ye, mpamba te na koumeláká na makambo yango, ‘akomibikisa ye moko mpe baoyo bazali koyoka ye.’—4:7, 10, 16.

12. Toli nini epesami na likambo litali basi-bakufeli mibali mpe basusu kati na lisangá?

12 Paulo apesi toli epai na Timoté mpo na lolenge oyo asengeli kotalela bato bakeseni: mibangé mibali basengeli kotalelama lokola batata, bilenge mibali lokola bandeko mibali, mibangé basi lokola bamama, bilenge basi lokola bandeko basi. Bibongiseli malamu bisengeli kozwama mpo na baoyo bazali solo basi-bakufeli mibali. Nzokande, libota ya mwasi-mokufeli mobali lisengeli kokokisa bamposa na ye soki likoki lizali. Kozanga kokokisa likambo yango ezali bongo kowangana kondima. Ntango akokisi mbula 60 to koleka, mwasi-mokufeli mobali akoki kotyama kati na liste soki azali na “litatoli malamu mpe na misala kitoko.” (5:10) Epai mosusu, basi-bakufeli mibali oyo bazali bilenge, oyo bazali kotika nzela na bamposa na bango ya kosangisa nzoto ete esala bopusi likoló na bango, basengeli kotyama na liste te. Na esika ya koyengayenga mpe kotɔ́ngatɔnga, tiká ete bábala mpe babota bana, ete bápesa monguna mwango ya kotɔ́nga biso te.

13. Mibangé mibali basengeli kotalelama motindo nini, esengeli kosala nini epai na baoyo bazwi momeseno ya kosala masumu, mpe mokumba nini motyami likoló na baombo?

13 Mibangé mibali oyo bazali kokamba malamu basengeli kopesamela lokumu loleki, ‘mingimingi baoyo bazali kosala makasi na kosakola mpe kolakisa.’ (5:17) Efundeli likoló na mobange mobali esengeli kondimama te, longola bobele soki yango epesameli litatoli na bato mibale to misato. Baoyo bazali kosala masumu basengeli kopamelama liboso na bato banso, kasi esengeli te kokata makambo nokinoki kozanga koyoka oyo moto akoloba mpe koponapona esengeli kozala te kati na makambo yango. Baombo basengeli kotosa bankolo na bango, kosaláká mosala malamu, mingimingi epai na bandeko, oyo bazali “bandimi mpe balingami.”​—6:2.

14. Paulo alobi nini na ntina na lolendo mpe kolinga mosolo, mpo na oyo etali “bokangami epai na Nzambe esika moko na ezaleli ya kosepela na oyo tozali na yango”?

14 Toli likoló na ‘bokangami epai na Nzambe esika moko na ezaleli ya kosepela na oyo tozali na yango’ (6:3-21). Moto oyo azali kondima maloba na sembo te atondi na lolendo mpe azali na bokɔnɔ na makanisi mpo na ntembe na ye, oyo ezali komema na maloba na kowelana likoló na makambo mazangi ntina. Epai mosusu, ‘bokangami epai na Nzambe esika moko na ezaleli ya kosepela na oyo tozali na yango’ ezali kopesa litomba monene. Moto asengeli kosepela wana azali na bilei mpe na bilamba ya kolata. Ekateli ya kokóma moto na bozwi ezali motambo oyo mozali komema na libebi, mpe kolinga mosolo ezali “ntina na mabe nyonso.” Paulo alendisi Timoté ete, lokola azali moto na Nzambe, akima makambo yango, alanda bizaleli malamu ya boklisto, abunda etumba malamu ya kondima, mpe ‘asimba makasi bomoi ya seko.’ (6:6, 10, 12) Asengeli kotosa mibeko, kozaláká “na litɔnɔ te mpe na efundeli te” kino komonana ya Nkolo Yesu Klisto. Baoyo bazali bato na bozwi basengeli ‘te kotya elikya na bango likoló na bozwi bozangi koumela, kasi basengeli nde kotya yango epai na Nzambe,’ mpo na kosimba makasi bomoi na solo. Na bosukisi, Paulo alendisi Timoté ete abatela makambo oyo matyami na mabɔkɔ na ye mpe aboya koyoka bilobaloba ya mpamba mpe “kowelana na yango ebyangami nkombo na lokuta ete Boyebi.”​—6:14, 17, 20.

LITOMBA NA YANGO

15. Likebisi nini lipesami na ntina na makanisi ya mpambampamba mpe maloba na ntembe?

15 Mokanda oyo mozali kopesa likebisi makasi epai na baoyo bazali komikɔtisa na makanisi ya mpambampamba mpe na ntembe ya bafilozofi. “Kowelana na ntina na maloba” ekangani na lolendo mpe esengeli kopɛngolama, mpamba te Paulo ayebisi biso ete yango ezali kokanga nzela na bokóli ya moklisto, kobimisáká bobele “ntembe, ikosungaka koyebisa mwango na Nzambe kati na kondima te.” (6:3-6; 1:4) Esika moko na misala ya nzoto, kowelana wana ezali ‘kotɛmɛla mateya na sembo. Mateya yango pelamoko Nsango Malamu na Nzambe na esengo.’—1:10, 11.

16. Toli nini Paulo apesaki likoló na ezaleli ya koluka biloko mingi ya mosuni?

16 Emonani ete baklisto oyo bazalaki na Efese, epai bato bazalaki mpenza kolinga mosolo, bazalaki na mposa ya toli mpo na kobundisa ezaleli ya koluka biloko mingi ya mosuni mpe myango na yango ya kopengwisa likebi ya bato. Paulo apesaki toli yango. Mokili ezali kozongela mpenza maloba na ye ete, ‘kolinga mosolo ezali eutelo ya mabe nyonso,’ kasi bobele bato moke nde bazali kotosa toli ezwami na maloba yango! Na kokesena, baklisto ya solo basengeli ntango nyonso kotosa toli wana. Yango elimboli bomoi mpo na bango. Basengeli kokima motambo mabe ya mposa ya koluka biloko mingi ya mosuni, basengeli kotya elikya na bango, “na bozwi bokoumelaka solo te kasi epai na Nzambe oyo akozwisaka biso biloko nyonso na malamu ete tósepela na yango.”​—6:6-12, 17-19.

17. Toli nini Paulo apesaki epai na Timoté oyo epesami na ntango malamu mpo na bilenge baministre nyonso ya molende lelo?

17 Mokanda ya Paulo momonisi ete Timoté azalaki mpenza ndakisa malamu oyo elenge moklisto asengeli kozala. Atako azalaki elenge na bambula ya kobotama, nzokande azalaki mokóló na elimo. Asalaki makasi mpo na kokokisa masɛngami ya kokóma mokɛngɛli mpe azwaki mapamboli mingi kati na mikumba oyo mipesamelaki ye. Kasi motindo moko na bilenge basaleli nyonso ya molende lelo, asengelaki ntango nyonso komanyola likoló na makambo oyo mpe komipesa na yango mpo na kokende sé liboso. Toli ya Paulo epesami mpenza na ntango ebongi mpo na baoyo nyonso bazali koluka esengo ya libela na komonisáká bokóli ya boklisto: “Omisɛnzɛla yo moko mpe mateya na yo; ɛɛ, oumela na yango, zambi ekosaláká yo boye okomibikisa yo mpenza mpe bango bazali koyoka yo.”​—4:15, 16.

18. Bibongiseli malamu nini kati na lisangá bilimbolami polele, mpe lolenge nini Paulo asaleli Makomami ya Liebele lokola endimiseli?

18 Mokanda yango, oyo mopemami, mozali kolamusa botɔ́ndi mpo na bibongiseli malamu ya Nzambe. Emonisi lolenge moto nyonso, ezala mwasi to mobali, akoki kopesa mabɔkɔ mpo na kobatela boyokani ya Teokrasi kati na lisangá. (2:8-15) Na nsima, mokanda yango ekóbi na kolobeláká masɛngami mpo na bakɛngɛli mpe basaleli na misala. Boye, elimo santu ezali komonisa masɛngami oyo masengeli kokokisama na baoyo bazali na mikumba minene. Mokanda yango mozali mpe kolendisa basakoli nyonso oyo babatisami ete bákokisa masɛngami yango, kolobáká ete: “Soko moto alingi ete asala mosala na Mokɛngɛli, azali na mposa na mosala malamu.” (3:1-13) Ezaleli ya mokɛngɛli epai na bilenge mpe mikóló, epai na basi mpe mibali kati na lisangá, elobelami malamumalamu esika moko na lolenge ya kokata makambo ya kosambisa liboso na batatoli. Na kolobáká makasi ete mibangé mibali oyo bazali kosala makasi na mosala ya kosakola mpe ya koteya babongi na lokumu loleki, Paulo atángi Makomami ya Liebele mbala mibale lokola endimiseli ete: “Zambi likomi elobi ete, Okokanga monɔkɔ na ngɔmbɛ te wana ezali yango kopapola masango. Lisusu mpe ete, Mosáli abongi kozwa lifuti na ye.”​—1 Tim. 5:1-3, 9, 10, 19-21, 17, 18; Det. 25:4; Lev. 19:13.

19. Lolenge nini elikya ya Bokonzi emonisami polele, mpe elendiseli nini epesami likoló na yango?

19 Nsima ya kopesa toli kitoko oyo, Paulo abakisi ete malako masengeli kotosama na lolenge lozangi litɔnɔ mpe lozangi ekweli ‘kino komonana ya Nkolo Yesu Klisto lokola Mokonzi ya baoyo bazali koyangela lokola mikonzi mpe Nkolo na baoyo bazali koyangela lokola bankolo.’ Likoló na elikya wana ya Bokonzi, mokanda yango mosuki na elendiseli ya nguya mpo na baklisto ‘ete básala malamu, bázala bazwi na misala kitoko, básalisa bato, bákabela bato biloko. Boye bakomitongela miboko kitoko mpo na ekeke ekoya, ete básimba bomoi na seko.’ (1 Tim. 6:14, 15, 18, 19) Ya solo mpenza, batoli oyo ezali na mokanda ya liboso epai na Timoté ezali na litomba!

[Maloba na nse ya lokasa]

a 1970, ebimisami na H. S. Gehman, lokasa 721.

b The Ante-Nicene Fathers, Vol. I, lokasa 6, “Mokanda ya liboso ya Clément epai na Bakolinti,” mok. V.

c New Bible Dictionary, ebimeli ya mibale, 1986, ebimisami na J. D. Douglas, lokasa 1203.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto