Tómemya esika ya losambo ya Yehova
1 Ntango moto moko abyangi biso epai na ye, tozalaka na limemya na kokebáká ete tóbebisa eloko na ye moko te. Tobebisaka mpe te mimeseno malamu ya libota yango. Tosengeli mpenza komonisa ezalela yango mingi koleka ntango tobyangami na Yehova, boye te? Tosengeli koyeba lolenge oyo tokomitambwisa na ndako na ye. (Nz. 15:1; 1 Tim. 3:15) Ezala ete tozali kosala makita na biso ya boklisto na Ndako ya Bokonzi, na ndako ya libota moko to na esika ya bato nyonso, mpo na mingi kati na biso tomonisaka ntango nyonso limemya oyo ebongi na esika na biso ya losambo, ndako ya Yehova, Nzambe oyo “nkembo na ye ezali likoló na mokili mpe lola.”—Nz. 148:13.
2 Bandeko mosusu bamonisaka mpenza limemya na makita te; basalaka makɛlɛlɛ to bamonisaka lokola ete mateya oyo mazali kopesama mazali na ntina te. Nzokande na ntango makita masili kobanda, bamoko kati na mikóló bakóbaka masolo ya mpambampamba na bikɔtelo, na esika ya koyamba bato liboso ete bákɔta na ndako, na twalɛti to na libándá ya Ndako ya Bokonzi. Soki mokumba ya kobatela mwana oyo azali moke epesameli mwana oyo azali mwa mokóló, ekomaka ete bango mibale bábanda kosakana mpe bakolanda makita mpenza te. Tomonaka bilenge bazali kosakana na libándá ya Ndako ya Bokonzi nsima ya makita, kosala makɛlɛlɛ makasi mpe ata kosala bilakiseli ya karate bango na bango. Ntango mosusu bazali kotumola kutu bazalani ya pɛmbɛni to bandeko kati na esika ya makita na komatáká na ebaelo to na kopotáká mbango kati na bifandelo mpe kotutáká ata bandeko oyo bazali mibange.
3 Tómonisaka limemya ntango nyonso: Soki tokangi ntina ya lokumu mpe ezaleli ya bulɛɛ ya losambo na biso, tokolinga te kopɛngola likebi ya bayangani na kosololáká na mongongo ya nsé, na kolyáká mwa eloko, na kolyáká chiclet to bazoka, na kofinafináká papyé, na kokendaka mpambampamba na twalɛti to na kokómáká ntango nyonso nsima wana makita masili kobanda. Baboti oyo bazali na limemya mpe bazali na botɔ́ndi bapekisaka bana na bango ete bábebisa tapi te, bilamba ya kiti te to bifelo ya Ndako ya Bokonzi to ya ndako ya libota epai kuna boyekoli ya mokanda ezali kosalema. Lisusu, biso nyonso tondimi mpenza ete etamboli ya nsɔni, maloba ya bozoba mpe masɛki ya mbindo, ezala ya lolenge nini, ezali na esika ata moke te kati na makita na biso.—Ef. 5:4.
4 Soki tozali ntango nyonso koyeba ntina ya makita na biso ya boklisto, tokomonisa biso moko mpe bana na biso ete tozali mpenza kopesa limemya oyo esengeli mpo na losambo ya Yehova epai kuna ‘toponi koyangana.’—Nz. 84:10.