Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 2/98 lok. 2
  • Makita ya mosala mpo na Febwáli

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makita ya mosala mpo na Febwáli
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔ́sɔ ebandi na 2 Febwáli
  • Pɔ́sɔ ebandi na 9 Febwáli
  • Pɔ́sɔ ebandi na 16 Febwáli
  • Pɔ́sɔ ebandi na 23 Febwáli
Mosala na biso ya Bokonzi—1998
km 2/98 lok. 2

Makita ya mosala mpo na Febwáli

Pɔ́sɔ ebandi na 2 Febwáli

Loyembo 10

Min.  8: Mayebisi. Mayebisi matali Mosala na biso ya Bokonzi.

Min. 17: Tómibongisa mpo na koyangana na liyangani ya etúká na 1998. Mokomeli ya lisangá akotalela na mituna mpe biyano siplemá ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Febwáli 1998. Lokola lisolo yango ezali komonisa polele, bendá likebi likoló na bantina oyo euti na Biblia oyo ezali kopusa biso ete tótosa malako ya la Société etali bisika ya kolala. Pesá longonya na bandeko oyo bazali kosimba bibongiseli ya la Société na makambo matali bisika ya kolala.

Min. 20: Tómibongisa uta sikawa mpo na kotosa mobeko ya Nzambe na ntina etali makila. Nkulutu moko ya makoki azali kolobela ntina ya kotondisa kalati “ Instructions médicales/Pas de sang ” . Maloba mapemami oyo mazwami na Nzembo 19:7 mazali komonisa ete litambwisi oyo liyebisami na Misala 15:28, 29 ezali komonisa mobeko ya kokoka ya Nzambe na ntina etali makila. Basambeli na ye ya sembo bazali kosala makasi mpo na kotosa yango. Bakalati yango ezali koyebisa ekateli makasi na biso na likambo yango mpe ezali koloba na esika na biso ntango tozali lisusu komiyeba te. (Talá Masese 22:3.) Kalati yango ya sika ezali na mayebisi ya mikolo oyo na ntina na etɛlɛmɛlo ya mokomoko na likambo litali koboya kozongisama makila. Nsima ya likita, Batatoli oyo bazwá batisimo mpe baoyo basepeli bakoki kozwa kalati ya sika, mpe baoyo bazali na bana bilenge oyo bazwi naino batisimo te bakozwa Carte d’identité mpo na mwana mokomoko. Bótondisa yango bobele na ntango wana te. Esengeli kokenda kosala yango na likebi nyonso na ndako, kasi KOTYA SINYATILI TE. Sinyatili ya nkolo kalati, nkombo ya banzɛnɛnɛkɛ mpe dati ekotyama na bakalati nyonso na nsuka ya boyekoli ya mokanda ya pɔ́sɔ ekolanda, na nsé ya litambwisi ya ndeko oyo azali kotambwisa boyekoli ya mokanda. Yango ekopesa nzela na kondimisama ete baoyo nyonso balingi kosalela kalati yango etali makila bazwi lisalisi oyo bazali na yango mposa. Baoyo bazali kotya sinyatili lokola banzɛnɛnɛkɛ basengeli kondimisama liboso ete mokóló kalati asili kotya sinyatili na ye moko kati na kalati yango. Na boumeli ya likita ya mosala ya pɔ́sɔ oyo ekolanda, batambwisi ya boyekoli ya mokanda to bankulutu bakosalisa baoyo nyonso bazalaki te na boyekoli ya mokanda ya mbala eleki kasi bazali na mposa ya kotondisa mpe kotya sinyatili na bakalati na bango, yango ekolandana bongo kino basakoli nyonso oyo bazwá batisimo bakotondisa malamumalamu kalati na bango mpe bakotya sinyatili. (Bótalela lisusu nkomá ya 20 Desɛ́mbɛ 1996.) Soki basepeli, basakoli oyo bazwi naino batisimo te bakoki kokoma malako mpo na bango mpenza mpe mpo na bana na bango na koyokanisáká makambo mazali kati na kalati na ezalela na bango mpenza mpe na kondimisama ya bango moko.

Loyembo 142 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔ́sɔ ebandi na 9 Febwáli

Loyembo 125

Min. 10: Mayebisi. Lapólo ya kɔ́nti. Lobelá bibongiseli oyo bizwami mpo na mosala ya kosakola na wikende.

Min. 15: “Biyano na mituna na bino.” Lisolo elongo na bayangani. Lobelá mpe lisolo oyo liyebisami na Lamuká! oyo elobelami kati na lisolo oyo.

Min. 20: “Yehova apesaka nguya oyo eleki nguya ya biso bato.” Ekosalema na mituna mpe biyano. (Talá w90 15/7 19, par. 15-16.) Tuná na bamoko báyebisa makambo ya kolendisa oyo mamonisi lolenge Yehova apesaki bango nguya.

Loyembo 81 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔ́sɔ ebandi na 16 Febwáli

Loyembo 1

Min. 10: Mayebisi.

Min. 15: “Tósepela kopesa litatoli ya mozindo.” Lisolo elongo na bayangani. Bimisá makambo ya ntina oyo mamonisaka bokɔti na lisolo oyo ebongi: (1) Kopesa mbote na esengo nyonso, (2) kolobela to kobimisa motuna na ntina na likambo moko oyo euti kosalema mpe ezali kobenda likebi, (3) kotánga vɛrsɛ́ ya Biblia oyo ebongi mpenza mpe (4) kolakisa mokanda epai na moto yango oyo asepeli. Mosakoli moko ya makoki akosala elakiseli uta na bokɔti na lisolo oyo epesami lokola ndakisa na lisolo oyo mpe lolenge ya kosala bozongeli ya sika.

Min. 20: Boyekoli ya libota oyo ezali kopesa esengo. Ndeko mobali moko mpe mwasi na ye bazali kosolola likoló na bamposa ya elimo ya libota na bango. Lokola bazali komibanzabanza mpo na bopusi mabe oyo mokili ezali koyeisa likoló na bana na bango, bazali koyeba ntina ya kolendisa elimo ya bana na bango, kasi bazali kondima ete boyekoli ya libota etambwisamaki mbala na mbala te mpe mingimingi ezalaka na bopusi makasi te. Bazali kotalela elongo masɛngami oyo mapesami na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Augústo 1997, nk. 26-29, mpo na koyeba lolenge ya kotambwisa boyekoli ya libota oyo ezali kobimisa matomba. Bango nyonso mibale bazwi ekateli ya kosala nyonso mpo na kobatela bolamu ya elimo ya bana na bango.

Loyembo 146 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔ́sɔ ebandi na 23 Febwáli

Loyembo 187

Min. 12: Mayebisi. Lobelá mikanda oyo tokolakisa na Mársi. Lobelá likambo moko to makambo mibale ya búku Emoniseli: kokokana na yango oyo ekosalisa mpo na kolakisa búku yango.

Min. 15: “Tómemya esika ya losambo ya Yehova.” Lisolo ekosalema na mituna mpe biyano na nkulutu moko oyo akomonisa na boboto lolenge ya kosalela batoli yango kati na lisangá.

Min. 18: Balapólo ya kosangana na biso na mosala ya litatoli na mokili mobimba. (Lisolo ezwami na búku Lisanga, lok. 101-102, 107-110.) Lisukúlu mpe lisolo, ekosalema na mokomeli. Na nsima ya komonisa ete kopesa lapólo mbala na mbala ezali na moboko kati na Biblia, mokomeli akobyanga basaleli mibale na misala mpo na kotalela motó na likambo moke ete “Ntina ya ba rapports.” Na nsima, mokomeli akobenda likebi likoló na ntina ya kopesa lapólo ya sikisiki kozanga koumela mpo ete yango esengeli kotindama na Biro kolekisa mokolo ya motoba te ya sanza oyo elandi. Mingimingi masangá ya teritware na biso (50 likoló ya monkama) etindaka balapólo na yango nsima mpenza koleka dati wana, yango esalaka ete balapólo yango etángama te na sanza na yango. Mokomeli azali koyebisa bantina oyo mokomoko asengeli komityela mikano na ye moko mpe akosukisa na maloba ya kolendisa na ntina na mapamboli oyo baoyo bazali kosangana mingi na mosala ya kosakola bazali kozwa.

Loyembo 189 mpe libondeli ya nsuka.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto