Tósepela kopesa litatoli ya mozindo
1 Mokomoko kati na biso asepelaka kosala mosala oyo ye ayebi kosala yango malamu. Na kotalela Malako 7:37, bibele ya bato bazalaki koloba na ntina na Yesu ete: “Asali makambo nyonso malamu.” Na bongo, tokokamwa te ete Yesu asepelaki kosala mokano ya Yehova! (Talá Nzembo 40:8.) Na kolandáká malamu malako oyo mapesami awa, tokozala mpe na esengo mpo na kotosa etindá ya Yesu, elingi koloba kosakola epai na bato mpe kopesa bango litatoli ya mozindo. (Mis. 10:42) Na sanza ya Febwáli, tokolakisa búku moko ya nkasa 192 oyo ebimisamaki liboso ya mobu 1985, soki ezali kati na libombo ya lisangá, to búku Bomoi ya seko. Lolenge nini tokoki kopesa litatoli ya mozindo na lisalisi ya mikanda yango?
2 Lokola bato mingi bazali komibanzabanza mpo na bokolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto na bango, tokoki koloba:
◼ “Atako mayele ya minganga ekóli mpenza, maladi ezali naino konyokola bato. Mpo na yo, lolenge nini okoki kolimbola likambo yango? [Tóyoka eyano.] Yesu Klisto alobaki ete maladi oyo mabomaka, maladi oyo mapalanganaka, ekozala elembo ya mikolo ya nsuka. (Luka 21:11) Kasi Biblia ezali mpe kolobela eleko moko oyo maladi ekozala lisusu te. [Tótánga Yisaya 33:24.] Talá búku oyo ezali kopesa biso bantina ya kozala na elikya na liteya yango ya moboko ya Biblia.” Tólobela mwa makanisi mabongi ya búku oyo tozali kolakisa, mpe tólakisa yango na molobani na biso, mpe tóyebisa motuya ya likabo na yango.
3 Ntango tozali kosakola na lolenge ya libaku malamu pene na bisika ya mombongo, tokoki kopesa moto mbote mpe kotuna ye ete:
◼ “Ozali komona te ete bomoi ekómi mpenza mpasi lelo oyo na boye ete ekómi lisusu mpasi koleka mpo ete mbongo oyo bazali kofuta bato na mosala ekóma kino nsuka ya sanza? [Tóyoka eyano.] Okanisi ete mokolo mosusu bamposa na biso ya mosuni ekokokisama mpenza?” [Tóyoka eyano.] Mpe tótánga vɛrsɛ́ ebongi ya Biblia oyo euti na búku tozali kolakisa. Tókóba koloba: “Búku oyo ezali komonisa lolenge oyo Nzambe, na nzela ya Bokonzi na ye, akosilisa mikakatano oyo mizali koyeisa bomoi mpasi lelo.” Tólakisa búku yango. Na nsima tokoki koyebisa ye lolenge tosepeli na lisolo yango, mpe tótuna ye: “Likoki ekozala ete tókóba lisolo yango mokolo mosusu?” Na lolenge yango, tokoki ntango mosusu kozwa adresi ya moto yango.
4 Soki tozali kosalela búku “Bomoi ya seko,” tokozala ntango mosusu na libaku ya komeka kokɔta na lisolo na kolobáká mpo na kimya kati na mokili:
◼ “Mpo na yo, mpo na nini ezali mpasi mpenza kotya kimya na mokili? [Tóyoka eyano, mpe tómonisa elilingi oyo ezali na nkasa 20-21.] Elilingi yango ezali komonisa lisolo moko ya Biblia oyo ezwami na mokanda ya Mibombamo, to Emoniseli. [Tótánga Emoniseli 12:7-9, 12 lokola ekomami na paragrafe 17. Tótánga lisusu maloba oyo mazali kolimbola elilingi yango.] Zabolo abwakami na mabelé, mpe moko na makambo ya mpasi oyo likambo yango ebimisi ezali ete kimya ezali lisusu te na mokili. Búku oyo ezali koyanola na mituna mingi ya ntina. Nakozala na esengo ya kotikela yo yango soki osepeli kotánga yango.”—Mpo na lolenge mosusu ya malamu ya kolakisa búku Bomoi ya seko, tótala lisusu lokasa ya nsuka ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Mársi 1995, ya Mársi 1994 mpe ya Yanuáli 1993.
5 Ntango tozali kozongela baoyo bamonisaki bosepeli, tokoki komeka kobanda boyekoli ya Biblia na kosaleláká lolenge oyo ya bokɔti na lisolo:
◼ “Na lisolo na biso ya mbala eleki, obimisaki likanisi moko ya ntina mpenza. [Tólobela likanisi moko oyo molobani na biso abimisaki.] Nakanisaki likoló na yango, mpe nalingi komonisa yo makanisi oyo nazwi na kosaláká mwa bolukiluki. [Tótalela elongo na moto yango vɛrsɛ́ moko ya Biblia oyo ebongi.] Tozali koyekola Biblia elongo na bato kozanga ete báfuta mbongo, mpe yango esili kopesa nzela na bamilió ya bato ete báyeba na mozindo mateya ya moboko ya Biblia na boumeli ya mwa ntango. Boyekoli yango ya Biblia ekoki kondimisa yo ete bilaka ya Nzambe bikokokisama solo.” Tólobela mwa mituna oyo biyano na yango bikozwama na boumeli ya boyekoli. Soki moto yango aboyi boyekoli, tóyebisa ye ete tozali mpe koyekola Biblia na lolenge mosusu, ya lombangu mpenza, oyo ezali kosɛnga bobele miniti 15 pɔ́sɔ na pɔ́sɔ na boumeli ya sanza minei. Tólakisa mwa búku Azali kosɛnga, tófungola yango na liteya 1 mpe tósɛnga na molobani na biso soki tokoki komonisa ye, na kosaleláká liteya oyo, lolenge toyekolaka na bato.
6 Soki tozali kosala mosala na biso na makoki nyonso, tokozala na esengo. ‘Tósɛnzɛlaka ntango nyonso’ mpo na kopesa litatoli ya mozindo, mpe tósepela kokokisa malamu mitindo nyonso ya mosala na biso ya kosakola.—1 Tim. 4:16.