Bomoi ya bato ezali na likama!
1 Biblia ezali komonisa polele ete Yehova azali na mokano “ete bato ya mitindo nyonso bábika.” Nzokande, ezali mpe solo ete mpo na bamiliare ya bato oyo bazali lelo na mabele, bomoi na bango na mikolo oyo ezali koya etaleli ezaleli na bango epai ya Yehova Nzambe mpe epai ya Bokonzi na ye oyo etambwisami na Yesu Klisto. Ezaleli ya malamu ekoki kouta bobele na “boyebi ya solo.” (1 Tim. 2:3, 4, NW ) Na ntango tozali kopesa likebisi ete mosika te mabe nyonso oyo ezali na mokili ekolongwa mpo na kotika esika na mokili ya sika ya Nzambe epai bosembo ekozala, tozali mpe na etinda ya kosala mosala ya ntina mingi ya kobikisa bomoi ya bato.—Mat. 24:14; 28:19, 20; Lom. 10:13-15.
2 Mpo na nini mosala yango esengeli kosalema na lombangu? Yesu apesaki likebisi ete “ekozala na [bolɔzi monene, NW ] lokola emonanaki longwa na ebandeli te.” (Mat. 24:21) Bolɔzi yango ekosuka na Armagedon. (Emon. 16:16) Kati na bato mingi oyo bazali na likama ya kokufa soki baboyi kondima nsango malamu, ezali mpe na bandeko na biso, bato oyo tofandaka na bango kartye moko, bato oyo tosalaka na bango, baninga ya kelasi, mpe baninga na biso, baoyo bazali bandimi te. Kasi mposa na biso ezali ya kosolola na “bato ya mitindo nyonso” na ndakisa ya Nzambe, oyo amonisaki bolingo na ye mpo na mokili mobimba na ndenge apesaki Mwana na ye Yesu Klisto lokola lisiko mpo na bato nyonso. (Yoa. 3:16) Tosengeli kosala makasi mpo na kobenga moto nyonso ete aya na esika ya libateli oyo Nzambe abongisi. Soki tozali mpenza kokokisa mosala ya kosakola malamumalamu, tokoki kokima nyongo ya makila.—Ezek. 33:1-7; 1 Kol. 9:16.
3 Mokano na biso ezali nini? Ntina ya mosala ya kosakola emonisami na kati ya Liloba ya Nzambe. Ndenge ntoma Paulo amonisaki yango, “bolingo mpo na Klisto ezali kotinda biso” tózala na bomoi oyo eyokani na banzela ya Nzambe. (2 Kol. 5:14, NW ) Lisusu, mbala mingi Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobelaka mingi mokumba na biso ya kosakola. Mosala na biso ya Bokonzi epesaka ntango nyonso toli mpo na mosala ya kosakola, lolenge oyo tosengeli kosala yango. Bankulutu babongisaka mosala yango mpe balendisaka biso ete tósala mosala yango. Baninga na biso baklisto babengaka biso tóbima elongo na bango na mosala ya kosakola. Toyokaka makambo mingi oyo etali ndenge tokoki komibongisa mpo na kobanda lisolo, kolakisa bazulunalo mpe mikanda mosusu, ndenge ya kozongela bato oyo basepelaki na nsango na biso, ndenge ya koyekola Biblia na bato, mpe kosalela mabaku nyonso mpo na kopesa litatoli. Nyonso wana ezali kosalisa biso tókokisa mokano ya kobikisa bomoi ya bato.—1 Kol. 9:22, 23; Ef. 1:13.