Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 9/00 lok. 2
  • Manaka mpo na likita ya mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na likita ya mosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 11 Sɛtɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 18 Sɛtɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 25 Sɛtɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 2 Ɔkɔtɔbɛ
Mosala na biso ya Bokonzi—2000
km 9/00 lok. 2

Manaka mpo na likita ya mosala

Pɔsɔ ebandi na 11 Sɛtɛmbɛ

Loyembo 139

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makambo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Talelá lapolo ya sanza ya Aprili mpo na Congo-Brazzaville mpe Congo-Kinshasa mpe lisolo “Tokoki kosala lisusu malamu koleka?”

Min. 15: “Mapamboli ya Yehova ekómisaka biso bazwi.” Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.​—Talá buku Étude perspicace, volimi 2, lok. 798, par. 12-13.

Min. 20: “Lobelá makambo oyo ezali kobima na mokili mpo na kobenda likebi ya moto.” Lisolo elongo na bayangani mpe bilakiseli. Lobelá makambo mingi oyo euti kobima, oyo ebendaki likebi ya bato ya teritware na bino. Yango ezali kotinda bato bámituna mituna nini mpo na mikolo oyo ezali koya? Salelá buku Comment raisonner, na lok. 9-10, mpo na kopesa mwa makanisi mpo na kobongisa ndenge ya kobanda lisolo oyo ekopesa nzela ete bósolola na Biblia. Bongisá malamu bilakiseli mibale, oyo ekomonisa mpenza likambo yango.

Loyembo 224 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 18 Sɛtɛmbɛ

Loyembo 2

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti.

Min. 15: Ndenge nini tosalaki mosala na mbula eleki? Lisukulu ekosalema na mokɛngɛli na mosala. Talelá lapolo ya lisangá mpo na mobu ya mosala 2000. Pesá basakoli longonya mpo na mosala malamu oyo basalaki. Lobelá bisika oyo ezali kosɛnga kobongisa lisusu. Bendá likebi na ndenge basakoli basalaki mpo na koyangana na makita, kobanda mpe kotambwisa bato na boyekoli ya Biblia, mpe kobima na mosala ya kosakola sanza na sanza. Monisá makambo oyo bokoki kokokisa mpo na mobu oyo ezali koya.

Min. 20: “Bomoi ya bato ezali na likama!” Lisolo elongo na bayangani. Lobelá makanisi ya ntina oyo ezali na mikapo oyo ezali na lisolo yango.

Loyembo 30 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 25 Sɛtɛmbɛ

Loyembo 93

Min. 15: Mayebisi ya Lisangá. Yebisá basakoli nyonso bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Sɛtɛmbɛ. Lobelá etanda Biyano na mituna na bino.

Min. 15: “Bokangaki ntina na yango?” Ekosalema na mituna mpe biyano na mokɛngɛli na mosala. Akolobela makambo oyo ezali na lisolo yango na kotalela bamposa ya lisangá.

Min. 15: “Lolenge ya pɛpɛlɛ ya kokabola mikanda.” Mokɛngɛli-mokambi azali kososola elongo na mokomeli ya lisangá.

Loyembo 115 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 2 Ɔkɔtɔbɛ

Loyembo 169

Min. 15: Mayebisi ya lisangá. Yebisá lisangá bibongiseli oyo ezwami mpo na kokabola Nsango ya Bokonzi No. 36, oyo ekobanda na mokolo ya yambo mwa 16 Ɔkɔtɔbɛ, mpe ekokoba kino na mokolo ya mitano mwa 17 Novɛmbɛ. Lendisá bato nyonso ata mpe bilenge mpe bato oyo bayei sika na solo, ete bango mpe bákabola yango. Batambwisi ya boyekoli ya mokanda basengeli kobanda sikoyo kolendisa bato ya etuluku na bango ya boyekoli mpe kozwa bibongiseli mpo ete bango nyonso básala mosala yango na molende mpenza. Lobelá mpe makambo ya kolendisa oyo basakoli bakutanaki na yango ntango bakabolaki Nsango ya Bokonzi na mbala oyo eleki.

Min. 15: “ ‘Nasengeli kokende kofanda epai mosusu?’ ” Lisukulu ekosalema na nkulutu moko. Limbolá ntina oyo tosengeli kozala na bososoli ntango tozali kokana kokende kofanda epai mosusu. Monisá ndenge ya kosalela toli oyo ezali na Masese 22:3. Lobelá mpe makebisi oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Augusto 1988 lok. 22 (na Lifalanse).

Min. 15: Makambo oyo bandeko bakutanaki na yango ntango bazalaki ‘kobanda kosolola na moto.’ Na likita ya mosala ya pɔsɔ ya 11 Sɛtɛmbɛ, balendisaki biso ete tóluka makambo oyo ezali kobima na mokili mpo na kobenda likebi ya bato mpe kobanda kosolola na bango na mosala ya kosakola. Sɛngá na bayangani ete báyebisa matomba oyo basili kozwa kino sikoyo ntango bazali kosalela toli yango.

Loyembo 205 mpe libondeli ya nsuka.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto