Loyembo 188
Likabo ya libondeli
1. Banso Nzamb’akoyoka,
Bakotosa Liloba.
Sé na nzela ya Klisto,
Okozwa Nzambe solo.
2. Bóndeláni na sembo,
Yehova’akoyoka yo.
Bóndelá na bopɔlɔ,
Y’akosepelisa yo.
3. Na kobondela Nzambe,
Zalá na bopotu te.
Lobá sikisiki mpe,
Zongelá maloba te.
4. Tika te kobondela,
Landá nzela ya nkaká.
Bondelá, okolónga.
Yango likabo na Yah.