Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/01 lok. 1
  • “Nakozwa ntango wapi?”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Nakozwa ntango wapi?”
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Masolo mosusu
  • Tósomba ntango mpo na kotánga mpe koyekola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Olyaka malamu na elimo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Lolenge ya komisombela ntango malamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Tótonga Bomoi na biso likoló na mosala ya Yehova
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2001
km 11/01 lok. 1

“Nakozwa ntango wapi?”

1 Lokola tozalaka na makambo mingi ya kosala, mingi kati na biso tolobaka maloba yango. Balobaka ete na biloko nyonso oyo tozalaka na yango, ntango ezali eloko oyo eleki biloko nyonso na motuya mpe yango nde eumelaka mpenza te. Na yango, tokozwa ntango wapi mpo na kosala makambo oyo ezali mpenza na ntina: kotánga mpe koyekola Liloba ya Nzambe?​—Filp. 1:10.

2 Mpo na kolonga, esɛngi te ete tóluka kokóma na ntango mingi, kasi tosengeli nde koluka koyeba makambo nini tolingi kosala na mwa ntango oyo tozali na yango. Na pɔsɔ moko, biso nyonso tozalaka na ngonga 168; na bangonga yango tolekisaka ngonga soki 100 mpo na kolala mpe kosala misala. Na bongo, ndenge nini tokoki kosalela malamu bangonga oyo etikali? Baefese 5:15-17 (NW) elendisi biso ete tótambola ‘te lokola bato bazangá bwanya kasi lokola bato ya bwanya, komisombeláká ntango oyo ebongi . . . , tókoba kososola soki mokano ya Yehova ezali nini.’ Yango emonisi ete tosengeli kosalela libaku nyonso oyo emonani mpo na kosala makambo oyo ezali na ntina na miso ya Yehova.

3 Yesu akokanisaki mikolo na biso na oyo ya Noa. (Luka 17:26, 27) Bato ya ntango wana bazalaki kolekisa ntango mingi mpo na misala ya mokolo na mokolo. Kasi, Noa azwaki ntango ya kotonga masuwa monene mpe ya kosakola. (Ebe. 11:7; 2 Pet. 2:5) Ndenge nini? Na ndenge atyaki mokano ya Nzambe na esika ya liboso mpe atosaki ye na kosaláká makambo “bobele bongo.”​—Gen. 6:22.

4 Tosengeli kotya nini na esika ya liboso? Yesu alobaki boye: “Moto asengeli kobika, kaka na mampa te, kasi na liloba nyonso oyo ezali kobima na monɔkɔ ya Yehova.” (Mat. 4:4, NW) Pɔsɔ na pɔsɔ tozwaka “ndambo . . . ya bilei [ya elimo] na ntango oyo ebongi.” (Luka 12:42, NW) Mpo bilei wana nyonso esala mosala na yango mpe tózwela yango litomba, tosengeli kozala na programɛ ya biso moko ya kotánga mpe koyekola bilei yango; tosengeli mpe kolanda programɛ yango mokolo na mokolo. Soki tozali kolya bilei wana ya elimo mbangumbangu, to kotalela yango likolólikoló ndenge bato mosusu balyaka bilei mosusu ya mosuni mbangumbangu, yango ekomonisa ete tozali na botɔndi te mpo na yango. Kasi, botɔndi oyo tozalaka na yango mpo na bilei wana etindaka biso tózwa ntango ya koyekola mpe ya kosepela na makambo ya elimo.

5 Kolya bilei ya elimo ekoki komema na bomoi ya seko. (Yoa. 17:3) Ebongi tópesa yango esika ya liboso na makambo oyo tosalaka mokolo na mokolo. Tokoki kozwa ntango ya kotánga Biblia mokolo na mokolo mpe ntango ya kobongisa makita ya lisangá? Ɛɛ, tokoki kozwa yango. Soki tosali bongo, tokozwa “libonza monene” oyo eutaka na koyeba mpe kosala mokano ya Nzambe.​—Nz. 19:7-11.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto