Loyembo 64
Kondima lokola oyo y’Abalayama
1. Esengo na ye ayebi
Solo’a Mozalisi,
Oyo alakaki nsuka
Uta ebandeli;
Yang’esakolami mingi
O kati’a Biblia
Mpo na kolendisa biso
Kati na elikya.
2. Talá Abalayama mpe
Yisaka bakei
Kino o ngomba Moria,
Kuna amekami
Ete apesa Yisaka,
Mwana na likindá
Lokola mbeka ya sembo
Na bolingo na Yah.
3. Abalayam’azalaki
Elilingi na Yah,
Oyo apesaki Yesu,
Mwana na likindá
Mpo na kobikisa bato.
Tokotosa Nzambe
Mpe tómekola kondima
Ya moninga na ye.