LITEYA 24
Kopona maloba
MALOBA nde esalaka mpenza ete tósololaka na bato. Kasi mpo maloba na biso etinda bato básala likambo oyo tolobi, tosengeli kopona yango malamu mpenza. Liloba moko ekoki kozala malamu na ntango boye, nzokande na ntango mosusu, ekoki kozokisa bato. Maloba oyo esalelami na esika oyo ebongi te, ata soki ezalaka likambo ya kosɛkisa bato, ekoki kokóma ‘maloba ya makasi.’ Kosalela maloba ya ndenge wana ezali mpenza kozanga mayele mpe emonisaka ete ozali kopesa bato kilo te. Maloba mosusu ezalaka na ndimbola mibale, mosusu ya malamu mpe mosusu ya mabe mpo na kotumola to kotyola bato. (Mas. 12:18; 15:1) Kasi ‘liloba ya malamu,’ elingi koloba liloba oyo ezali kolendisa, epesaka esengo na motema ya moto oyo bayebisi ye yango. (Mas. 12:25) Ata mpo na moto ya bwanya, esɛngaka kosala milende mpo na kobimisa maloba oyo ebongi. Biblia eyebisi biso ete Salomo ayebaki ete asengelaki koluka “maloba ya kitoko mpe ya sembo . . . maloba ya solo.”—Mos. 12:10.
Na minɔkɔ mosusu, ezali na maloba oyo basalelaka ntango ozali koloba na mikóló to na bakonzi mpe maloba oyo basalelaka ntango ozali kosolola na baninga na yo to na baleki na yo. Bato bakomona yo lokola moto oyo azangi limemya soki ozali kosalela maloba yango malamu te. Ezali mpe mabe kosalela mpo na yo moko maloba oyo basalelaka mpo na kopesa limemya na bato mosusu na mboka na bino. Na likambo etali kopesa bato mosusu lokumu, Biblia epesi biso mitinda oyo eleki mibeko to mimeseno ya mboka na biso. Ezali kolendisa baklisto ete ‘bákumisa bato ya ndenge nyonso.’ (1 Pet. 2:17) Bato oyo basalaka bongo na motema na bango mobimba basololaka na bato na limemya mpenza, ezala moto yango azali mokóló to mwana.
Ya solo, bato mingi oyo bazali baklisto ya solo te basalelaka maloba ya makasi mpe ya bosɔtɔ. Mbala mosusu bakanisaka ete maloba wana nde ekosala mpenza ete bato bákanga ntina ya makambo oyo bazali koloba. To mbala mosusu, emonanaka ete basalelaka maloba ya ndenge wana mpo bayebi monɔkɔ yango malamu te. Soki moto moko azalaki na momeseno ya kosalela maloba ya lolenge wana liboso ayekola nzela ya Yehova, ekoki kozala mpasi mingi mpo atika kosalela yango. Kasi akoki mpenza kotika yango. Elimo ya Nzambe ekoki kosalisa moto yango abongola lolenge na ye ya koloba. Nzokande, moto yango ye moko mpe asengeli kolinga kosala makasi mpo na kozala na maloba ya malamu, maloba oyo ezali kopesa bato mosusu bolamu mpe oyo ezali kolendisa bango; asengeli mpe kosalela maloba yango ntango nyonso oyo azali koloba.—Lom. 12:2; Ef. 4:29; Kols. 3:8.
Elobeli oyo ezali mpasi te mpo bato bákanga ntina na yango. Na likambo etali koloba malamu, esɛngisami libosoliboso ete tósalelaka elobeli oyo ezali mpasi te mpo bato bákanga ntina na yango. (1 Kol. 14:9) Soki bato oyo bazali koyoka yo bazali kokoka te kokanga ntina ya maloba oyo ozali kosalela, ekozala lokola nde ozali kolobela bango monɔkɔ moko ya bapaya.
Maloba mosusu ezalaka na ndimbola mosusu soki osaleli yango epai ya bato oyo basalaka mosala boye to boye. Mbala mosusu ezali maloba oyo bango basalelaka mokolo na mokolo. Kasi soki osaleli maloba yango na esika mosusu, ekoki kosala ete bato bákanga ntina ya makambo oyo ozali koloba te. Mpe lisusu, ata soki ozali kosalela maloba oyo tosalelaka mokolo na mokolo, soki ozali kolekisa ntango na makambo ya mikemike, bato oyo bazali koyoka yo bakoki kobanda kokanisa makambo mosusu.
Molobi oyo ayebi kotyela bato likebi aponaka maloba oyo ata bato oyo batángá mingi te bakoki kokanga ntina na yango. Alandaka ndakisa ya Yehova oyo atalelaka mpe “mobola.” (Yobo 34:19) Soki molobi amoni ete ezali na ntina asalela liloba moko oyo bato bayebi te, boye asengeli kosalela yango esika moko na maloba mosusu ya pɛtɛɛ mpo bato bákanga mpenza ntina na yango.
Maloba ya pɛtɛɛ, soki oponi yango malamu, esalaka ete bato bákanga mpenza ntina ya makanisi oyo epesami. Ezalaka mpasi te mpo na kokanga ntina ya bafraze ya mikuse mpe maloba ya pɛtɛɛ. Okoki kolandisa yango na mwa bafraze mosusu ya milai mpo emonana te ete ozali kokatakata maloba na lisolo na yo. Kasi mpo na makanisi oyo olingi mpenza ete bato oyo bazali koyoka yo bákanga yango na motó, salá makasi oloba yango na maloba oyo ezali pɛtɛɛ mpe na bafraze ya mikuse.
Maloba ndenge na ndenge mpe oyo ebongi. Maloba ya malamu ezali ebele mpenza. Na esika ya kosalela kaka maloba wana moko ntango nyonso, saleláká maloba ndenge na ndenge. Soki osali boye, lisolo na yo ekosepelisa bato mpe ekozala na ntina. Okoki kosala nini mpo na koyeba maloba mingi lisusu?
Ntango ozali kotánga, tyá elembo na maloba nyonso oyo ozali mpenza kokanga ntina na yango te mpe luká ndimbola na yango na diksionɛrɛ, soki ezali na monɔkɔ oyo ozali kotánga. Poná mwa maloba yango mpe salá makasi mpenza mpo na kosalelaka yango. Salá makasi mpenza mpo otánga yango na ndenge esengeli mpe osalela yango na esika oyo ekobenda kaka likebi ya bato te, kasi mpe oyo bato bakozala na mpasi te mpo na kokanga ntina na yango. Soki ozali koyekola maloba ya sika, yango ekosala ete ntango ozali kosala lisolo na yo, osalela maloba ndenge na ndenge. Kasi kebá: ntango moto azali kotánga maloba malamu te to azali kosalela yango na esika oyo ebongi te, bato mosusu bakoki koloba ete ayebi mpenza te makambo oyo azali koloba.
Ntango tozali koluka koyeba maloba mosusu ya sika, mokano na biso ezali te ya kokamwisa bato mpe kobenda likebi na bango likoló na biso, kasi tolingi nde koyebisa bango makambo. Soki molobi azali kosalela maloba ya makasimakasi mpe ya milaimilai, yango ekosala ete bato bátya likebi na bango likoló na ye. Mposa na biso esengeli nde kozala ya koyebisa bato makambo ya ntina mpe kosala ete esepelisa bato oyo bazali koyoka yango. Kobosana te lisese ya Biblia oyo elobi ete: “Lolemo ya bato ya bwanya esalaka malamu na nzela ya boyebi.” (Mas. 15:2, NW) Soki ozali kosalela maloba malamu, maloba oyo ebongi mpe oyo bato bazali na mpasi te mpo na kokanga ntina na yango, ekosala ete lisolo na yo ekitisa bato mitema mpe elendisa bango na esika ete oloba makambo ya mpambampamba oyo ezali kosepelisa bango te.
Ntango ozali koluka koyeba maloba mingi lisusu, salá makasi ete oyeba mpe kosalela liloba oyo ebongi. Maloba mibale ekoki kozala na ndimbola moko, kasi ezali na mwa bokeseni moke na kotalela esika oyo osaleli yango. Soki oyebi yango, okoki kosala ete lisolo na yo ezala polele mpenza mpe ezokisa te bato oyo bazali koyoka yo. Landá na likebi mpenza bato oyo bayebi kosala masolo. Na kati ya badiksionɛrɛ mosusu, okomona ete na nse ya liloba mokomoko, batii maloba mosusu oyo ezali na ndimbola moko na yango (atako ezali na mwa bokeseni moke) mpe maloba oyo ndimbola na yango eyokani na oyo ya liloba wana te. Yango wana, okomona maloba ndenge na ndenge mpo na komonisa kaka likanisi moko, kasi ezali mpe na mwa bokeseni moke kati na bandimbola na yango. Yango esalisaka mingi mpenza ntango ozali koluka liloba oyo ebongi mpo na esika boye to boye. Liboso obakisa liloba moko ya sika na maloba oyo oyebi, salá makasi oyeba naino ndimbola na yango, ndenge ya kotánga yango mpe ntango oyo ebongi kosalela yango.
Maloba oyo emonisaka likambo moko ya sikisiki esalisaka bato bákanga malamu mpenza ntina ya likambo yango, koleka maloba oyo ezali kolobela makambo kaka likolólikoló. Molobi akoki koloba: “Na ntango wana, bato mingi babɛlaki.” To akoki koloba: “Nsima ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, na boumeli ya mwa basanza mpamba, bato soki milio 21 bakufaki na grippe espagnole.” Omoni ete bokeseni ezali mpenza monene ntango molobi amonisi soki makanisi na ye ezalaki nini ntango azalaki koloba maloba lokola “na ntango wana,” “bato mingi,” mpe “babɛlaki”! Mpo oloba ndenge wana, yango esɛngi ete oyeba makambo oyo eyokani na lisolo na yo mpe oyeba kopona maloba oyo okosalela.
Soki oyebi kosalela maloba oyo ebongi, yango ekoki mpe kosalisa yo olobela mbala moko likanisi ya ntina, kozanga kobimisa maloba ebele ebele. Kasi soki ozali kolobaloba mingi, yango ekoki kosala ete makanisi ya ntina ebima te. Ntango ozali kosalela maloba mingi te kasi ya pɛtɛɛ, yango esalisaka basusu bákanga makambo ya ntina mpe bábosana yango te. Ekosalisa yo mpe opesa bato boyebi ya solosolo. Mateya ya Yesu elekaki mateya nyonso mosusu mpamba te elobeli na ye ezalaki ya mindɔndɔ te. Landá ndakisa na ye. (Talá bandakisa oyo ezali na Matai 5:3-12 mpe Malako 10:17-21.) Meká mbala na mbala koloba likambo polele na maloba moke, kasi oyo ebongi mpenza.
Maloba oyo ezali komonisa bonene ya likambo, mayoki mpe ezali komonisa likambo ndenge ezali. Ntango ozali koyekola maloba, kokanisa kaka te maloba ya sika, kasi luká mpe maloba oyo ekozala na ntina na likambo boye to boye. Na ndakisa, luká maloba oyo ezali komonisa bonene ya likambo mpe ezali komonisa likambo yango ndenge ezali mpe maloba oyo ezali komonisa esengo, maloba ya boboto to maloba oyo ezali komonisa ete makambo oyo ozali koloba ezali ya lisɛki te.
Biblia etondi na maloba ya lolenge wana. Na nzela ya mosakoli na ye Amosa, Yehova alobaki boye: “Bóluka oyo ezali malamu, kasi oyo ezali mabe te . . . Bóyina oyo ezali mabe mpe bólinga oyo ezali malamu.” (Amo. 5:14, 15, NW) Mosakoli Samwele alobaki na Mokonzi Saulo boye: “[Yehova abɔtɔli, NW] yo bokonzi na Yisalaele lelo.” (1 Sam. 15:28) Ntango Yehova alobaki na Ezekiele, asalelaki maloba oyo ezali mpasi ete tóbosana yango; alobaki boye: “Baoyo nyonso bazali na ndako ya Yisalaele bazali na mitó makasi mpe na mitema mabe.” (Ezek. 3:7, NW) Mpo na komonisa bonene ya mabe oyo Yisalaele asalaki, Yehova atunaki bango boye: “Moto oyo auti na mabele akoyiba nde Nzambe? Kasi bino bozali koyiba ngai!” (Mki. 3:8, NW) Ntango Danyele azalaki komonisa ndenge kondima na bango emekamaki na Babilone, alobaki na maloba oyo ebongi mpenza ete “Nebukadanesala atondaki na nkanda makasi” mpamba te Sadalaka, Mesaka mpe Abede-nego baboyaki kosambela ekeko na ye. Yango wana, atindaki bato na ye bákanga bango mpe bábwaka bango na kati ya “litumbu ya mɔtɔ makasi.” Mpo na kosalisa biso tóyeba ete mɔtɔ yango ezalaki makasi, Danyele alobi ete mokonzi ayebisaki bato na ye “bapelisaki litumbu ya mɔtɔ makasi mbala nsambo koleka ndenge ezalaki kopelisama”—yango wana ntango bakómaki pene na litumbu yango, bato ya mokonzi bakufaki mpamba te mɔtɔ yango ezalaki makasi mpenza. (Dan. 3:19-22, NW) Mwa mikolo liboso ya liwa na ye, Yesu azalaki koloba na bato ya Yelusaleme mpe na motema mawa, alobaki na bango boye: “Mbala boni nalingaki koyanganisa bana na yo esika moko, ndenge nsoso ya mwasi ayanganisaka bana na ye na nse ya mapapu na ye! Kasi bino bolingaki yango te. Talá! Ndako na bino esundolami na mabɔkɔ na bino.”—Mat. 23:37, 38.
Soki okopona maloba na yo malamu, yango ekoki kosala ete makambo oyo ozali koloba etikala mpenza na makanisi ya bato. Soki ozali kosalela maloba oyo ezali kosɛnga bato básalela miso, matoi, monɔkɔ, zolo to mpe mabɔkɔ na bango, “bakomona” mpe “bakosimba” makambo oyo ozali kolobela bango, “bakomeka” mpe “bakoyoka nsolo” ya biloko ya kolya oyo ozali kolobela, mpe “bakoyoka” makɛlɛlɛ mpe maloba ya bato oyo ozali kolobela. Bato oyo bazali koyoka yo bakotya makanisi na bango nyonso na makambo oyo ozali koloba mpamba te osalisi bango bázala lokola nde bazali komona yango elongo na yo.
Maloba oyo ezali komonisa malamu mpenza makanisi oyo ozali koloba ekoki kosala ete bato básɛka to bálela. Ekoki kopesa bato elikya, ekoki kopesa moto oyo alɛmbi nzoto mposa ya kozala lisusu na bomoi mpe ekolendisa ye alinga Mozalisi na motema na ye mobimba. Elikya oyo ezali na bavɛrsɛ lokola Nzembo 37:10, 11, 34; Yoane 3:16; mpe Emoniseli 21:4, 5 esimbi mpenza mitema ya bato na mokili mobimba.
Ntango ozali kotánga Biblia mpe mikanda ya “moombo ya sembo mpe ya mayele,” okokuta maloba mpe bafraze ya ndenge na ndenge. (Mat. 24:45) Kosuka kaka te na kotánga yango na mokanda mpe kobosana yango. Poná maloba oyo esepelisi yo mpe saleláká yango ntango ozali kosolola na bato mokolo na mokolo.
Elobeli oyo eyokani na mibeko ya lokota. Bato mosusu bamonaka ete elobeli na bango elandaka ntango nyonso te mibeko ya lokota. Bakoki kosala nini?
Soki ozali naino mwana-kelasi, salelá libaku wana mpo na koluka koyekola malamu mibeko ya lokota mpe ndenge ya kopona malamu mpenza maloba oyo okosalela. Soki oyebi te ntina ya mobeko moko ya lokota, tuná molakisi na yo. Koyekola mibeko ya lokota kaka te mpo na kolonga na kelasi. Ozali na ntina mosusu ya koyekola yango, oyo bana-kelasi mosusu bazali na yango te: olingi kozala mosakoli ya nsango malamu oyo abongi mpenza.
Bongo soki ozali mokóló mpe monɔkɔ oyo okolaki na yango ezali oyo ozali koloba sikoyo te? To mbala mosusu, otángaki kelasi mingi te na monɔkɔ oyo balobaka na mboka na bino. Kolɛmba nzoto te, kasi salá makasi mpenza ete oloba monɔkɔ yango malamu koleka mpo na nsango malamu. Mibeko mingi ya lokota oyo toyebi, toyekolaka yango ntango tozali koyoka bato mosusu bazali koloba. Yango wana, ntango bato oyo bayebi kosala masolo bazali kosala masukulu na bango, tyá likebi mpenza. Ntango ozali kotánga Biblia to mikanda oyo elimbolaka yango, luká koyeba ndenge bafraze ekomami mpe maloba oyo esalelami esika moko mpe mpo na nini basaleli yango na esika wana. Na masolo na yo moko, landá mpe bandakisa ya malamu wana.
Mbala mosusu, bavɛdɛti ya masano mpe baalangá-nzembo basalelaka maloba mpe elobeli oyo eyokani te na mibeko ya lokota. Bato balukaka kolanda bango. Bato oyo batɛkaka bangi mpe bato mosusu, oyo bomoi na bango esuki kaka na misala mabe mpe na kosala pite, bazalaka na lolenge na bango ya koloba, bapesaka maloba ndimbola mosusu, oyo ekeseni mpenza na ndenge bato bayebi. Ezali malamu te ete moklisto alanda elobeli ya bato wana. Soki tolandi yango, bato bakomona biso lokola nde tozali ndenge moko na bato wana ya mokili mpe bomoi na biso ezali lokola oyo ya bango.—Yoa. 17:16.
Luká kokóma na momeseno ya kosalela elobeli ya malamu mokolo na mokolo. Soki otiki elobeli na yo ekóma mabe ntango ozali kosolola na bato mokolo na mokolo, kokanisa te ete okoloba malamu ntango ozali liboso ya bato ebele. Kasi soki ozali na elobeli oyo ezali malamu mpenza na masolo na yo ya mokolo na mokolo, ekozala mpasi te mpo oloba malamu na lisangá to ntango ozali kopesa basusu litatoli na ntina na solo.