Ndenge ya kobongisa devuare ya lisangá
MATEYA ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ebongisami mpo na bolamu ya lisangá mobimba. Tozwaka lisusu mateya ya ntina mingi na makita mosusu ya lisangá, na mayangani ya mike mpe ya minene. Soki basɛngi yo osala lisolo na makita ya lisangá to na mayangani, ozali mpenza na mokumba monene. Ntoma Paulo alendisaki Timote oyo azalaki nkulutu moklisto ete atyaka ntango nyonso likebi na ndenge oyo azali koteya. (1 Tim. 4:16) Bato oyo bayei na makita ya lisangá to na mayangani batikaki makambo mosusu ya ntina oyo basengelaki kosala, basusu kutu basali mpenza milende mpo bázala na makita mpe bákoka koteyama makambo etali boyokani na bango na Nzambe. Na ntembe te, soki yo nde okoteya bango, ozali na mokumba moko monene mpenza! Kasi ndenge nini okoki kosala yango malamu mpenza?
Makanisi ya ntina na botángi ya Biblia
Lisolo oyo na eteyelo, ezali mpo na kolimbola mikapo oyo epesami mpo na botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ. Na lisolo yango, esengeli komonisa mpenzampenza na nini makambo yango etali biso lelo oyo. Ndenge Nehemia 8:8 emonisi yango, Ezela na baninga na ye batángaki Liloba ya Nzambe na miso ya bato nyonso, balimbolaki yango, ‘bamonisaki ntina na yango’ mpe bato bakangaki ntina na yango. Yo mpe ozwi mokumba ya kosala bongo ntango ozali kosala lisolo oyo okobimisa makanisi ya ntina na botángi ya Biblia.
Ndenge nini osengeli kobongisa lisolo yango? Soki likoki ezali, pɔsɔ moko to bapɔsɔ mingi liboso, tángá mikapo ya Biblia oyo bapesi yo. Na nsima, talá soki makambo yango ekoki kosalelama na lisangá na bino mpe bondelá mpo na yango. Mikapo yango ya Liloba ya Nzambe ezali na toli nini, bandakisa nini mpe mitinda nini oyo ekoki mpenza kosalelama na lisangá na bino?
Ezali na ntina mingi ete olukaluka na mikanda. Diskɛ CD-ROM Watchtower Library to Index des publications de la Société Watch Tower ezali na lokota oyo oyebi? Soki ezali, salelá yango malamu mpenza. Soki olukiluki na mikanda oyo elobeli bavɛrsɛ oyo okotalela, okoki kozwa bingɛngiseli to bandimbola oyo etali kokokisama ya bisakweli to masolo mosusu oyo elimbolaka bavɛrsɛ mpo na komonisa makambo oyo etali Yehova to mpe masolo oyo elobeli mitinda ya Biblia. Koluka kolobela makambo ebele ebele te. Poná kaka mwa bavɛrsɛ mpe talelá yango malamumalamu. Ezali malamu kolobela bavɛrsɛ moke, kasi kolimbola yango malamu mpenza.
Mbala mosusu na lisolo na yo, okosɛnga na bato oyo bazali koyoka yo ete bápesa makanisi na bango mpo na komonisa ndenge oyo botángi ya Biblia na boumeli ya pɔsɔ esalisaki bango mpenza. Makambo nini batángaki, oyo ekosalisa bango na boyekoli ya bango moko to ya libota, na mosala ya kosakola to mpe na bomoi na bango? Bizaleli nini ya Yehova emonanaki polele, ntango batalelaki boyokani na ye na bato to mpe bikólo? Makambo nini bato oyo bazali koyoka yo bayekolaki, oyo elendisi kondima na bango mpe etindi bango básepela na Yehova mingi koleka? Kotɛlɛma te na makambo ya mikemike to oyo ezali na mindɔndɔ. Limbolá nde makanisi oyo oponaki mpe ndenge ya kosalela yango.
Lisukulu ya koteya lisangá
Lisolo oyo ekoki kouta na mikanda, na ndakisa, ekoki kozala lisolo moko ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to Lamuká! to mpe na mokanda moko. Mbala mingi, ezalaka na makambo ebele koleka kutu oyo okoki koloba na boumeli ya miniti oyo bapesi yo. Ndenge nini osengeli kosala lisolo yango? Osengeli kosala yango lokola moto oyo ayebi mpenza koteya, kasi te lokola moto oyo alingi kaka kosilisa makambo oyo asengeli koloba. Mokɛngɛli asengeli kozala moto oyo “akoki mpo na koteya.”—1 Tim. 3:2.
Bandá naino koyekola makambo oyo okoloba. Tángá bavɛrsɛ. Manyolá. Salá makasi mpo obongisa yango mikolo mingi liboso ya kosala lisolo yango. Kobosana te ete bazali kolendisa bandeko bátángaka na ndako makambo oyo lisolo yango ekolobela. Mokumba na yo ezali kaka te ete ozongela makambo yango to olobela yango na mokuse, kasi osengeli komonisa ndenge oyo bato oyo bakoyoka yo bakoki kosalela yango. Poná makambo oyo ebongi na lisolo na yo mpe monisá lisangá ndenge ya kosalela yango.
Mwana na mwana azalaka na bizaleli na ye, ndenge moko mpe, lisangá na lisangá ezalaka na elimo na yango. Moboti oyo ateyaka malamu asukaka kaka te na koyebisa mwana na ye mitinda oyo asengeli kolanda. Asololaka na ye mpo na kosalisa ye akanga ntina na yango. Atalelaka mpe bomoto ya mwana mpe mikakatano oyo mwana akutanaka na yango. Ndenge moko mpe, bateyi na kati ya lisangá basalaka makasi mpo báyeba mpenza bamposa ya bato oyo bazali koyoka bango mpe bátyela yango likebi. Nzokande, moteyi oyo azali na bososoli akosalela te bandakisa oyo ekoki kobulunganisa moto moko na kati ya lisangá. Akomonisa nde bolamu oyo bato mosusu bazwaki ntango balandaki nzela ya Yehova mpe akomonisa mpenza toli ya Makomami oyo ekosalisa lisangá ete elonga mikakatano na yango.
Mateya ya malamu esimbaka mpenza mitema ya bato oyo bazali koyoka yo. Yango esɛngi kaka te kolobela makambo oyo esalemaki, kasi osengeli mpe kosala ete bato oyo bazali koyoka báyeba mpenza ntina na yango. Yango esɛngi ete omibanzabanza mpenza mpo na bato oyo okoteya bango. Babateli ya mpate ya elimo basengeli koyeba etonga. Soki bazali ntango nyonso kokanisa mikakatano oyo mpate mokomoko azali kokutana na yango, bakoyeba koloba na ndenge oyo ekolendisa bampate. Bakomonisa ete bazali koyoka bango, bazali na motema mawa mpe na boboto.
Bateyi malamu bayebi ete lisolo nyonso ezalaka na ntina na yango, oyo esengeli komonana polele. Ntango ozali kosala lisolo, osengeli kosala ete bato bámona polele makanisi ya ntina mpe bábosana yango te. Bato oyo bazali koyoka basengeli kokanga makanisi ya ntina oyo ekosalisa bango na bomoi na bango.
Likita ya Mosala
Ntango ozali kosala lisolo moko oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi, mokakatano ekoki kozala ya lolenge mosusu. Okomona ete mbala mingi osengeli te kopona makanisi oyo ebongi, kasi osengeli nde koyebisa bato oyo bazali koyoka yo makambo nyonso oyo ezali na lisolo. Salisá bato oyo bazali koyoka ete bákanisa likoló na bavɛrsɛ oyo esimbi toli oyo epesami na lisolo yango. (Tito 1:9) Masolo yango eumelaka miniti mingi te mpe mbala mingi epesaka mpenza nzela te ete obakisa makambo mosusu.
Bakoki mpe kosɛnga yo osala lisolo moko oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi te, kasi ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, to bakoki koyebisa yo kaka na mokuse makambo oyo okoloba. Ezali yo moteyi nde osengeli kotalela bamposa ya lisangá oyo ekokani na lisolo oyo okosala. Mbala mosusu okosalela mwa ndakisa moko ya mokuse to okolobela likambo moko oyo esalemaki mpe eyokani na lisolo na yo. Kobosana te ete mokumba na yo ezali kaka te ete olobela likambo oyo basɛngi yo osala, kasi osengeli kosala lisolo na yo na lolenge oyo ekosalisa lisangá mpo bákokisa mosala oyo Liloba ya Nzambe epesi bango mpe básepela kosala yango.—Mis. 20:20, 21.
Ntango ozali kobongisa lisolo na yo, talelá bomoi ya bato oyo bazali na lisangá. Pesá bango longonya mpo na makambo malamu oyo bazali kosala. Soki basaleli toli oyo opesi na lisolo na yo, bakokokisa malamu mosala na bango ya kosakola mpe bakozala na esengo mingi lisusu na mosala yango?
Lisolo na yo ekosɛnga elakiseli moko to otuna ndeko moko mituna? Soki ezali bongo, osengeli kobongisa yango mikolo mingi liboso. Mbala mosusu okoluka kopesa ndeko mosusu mokumba ya kobongisa yango, kasi soki osali bongo, ekopesa mpenza matomba te. Salá na boye ete liboso ya mokolo ya makita, bómeka elakiseli yango to mituna yango. Omindimisa mpenza ete eteni oyo ya lisolo na yo ekosalema malamu mpo mateya na yo esimba mitema ya bato oyo bakoyoka yango.
Mayangani ya mike mpe ya minene
Na bantango mosusu, bakoki kosɛnga bandeko mibali, oyo bazali na bizaleli malamu ya elimo mpe bayebi mpenza koloba mpe koteya, ete básala lisolo na liyangani moko ya moke to ya monene. Mayangani ezalaka mpenza ntango ya ntina mpo na kozwa mateya ya Teokrasi. Masolo yango ekoki kozala maniskri to plan ya lisukulu to malako mpo na drame oyo ekomonisa liteya oyo tokoki kozwa na makambo oyo esalemaki na ntango ya kala to mpe bakoki kopesa ye kaka mwa paragrafe moko oyo eyebisi ye makambo oyo asengeli kolobela. Soki ozwi libaku ya kosala lisolo na mayangani, yekolá na likebi mpenza makambo oyo bapesi yo. Tángá yango tii okomona mpenza ntina na yango.
Baoyo bazwi mokumba ya kosala lisukulu ya maniskri, basengeli kotánga yango ndenge ekomami. Basengeli kotya maloba na bango moko te to kobongola makanisi ete elandana na ndenge oyo bango balingi. Basengeli koyekola yango mpo na koyeba malamu mpenza makanisi ya ntina mpe ndenge oyo yango elimbolami. Basengeli kozongela kotánga yango mbala na mbala na mongongo makasi tii ntango bakomona ete bakoki kotánga lisukulu yango na ndenge esengeli, konyata maloba ya ntina, kozala na esengo, na nsai, komatisa to kokitisa mongongo, koloba na masɛki te mpe na komindimisa, kotánga yango na mongongo makasi mpo bato nyonso báyoka malamu.
Bandeko oyo bazwi mokumba ya kosala lisukulu oyo ezali na plan, basengeli kolanda plan yango malamumalamu ntango bazali kosala lisolo na bango. Na esika ete molobi atánga lisolo na ye ndenge ezali na plan ntango azali kosala lisukulu to akoma makambo nyonso oyo akoloba, asengeli nde koloba na maloba na ye moko na esika ete atánga na lokasa, asengeli koloba makambo oyo euti mpenza na motema. Ezali na ntina mingi ete molobi atosa ngonga oyo bakomi na plan mpo alimbola polele likanisi mokomoko ya ntina. Molobi asengeli kosalela malamu makanisi mpe bavɛrsɛ oyo ezali na nse ya makanisi ya ntina wana. Asengeli te kobakisa makanisi mosusu oyo ezali kosepelisa ye moko mpe kolongola makambo oyo ezali na plan. Ya solo, mateya nyonso oyo ezali na lisolo wana euti na Liloba ya Nzambe. Bankulutu baklisto bazali na mokumba ya ‘kosakola liloba.’ (2 Tim. 4:1, 2) Yango wana molobi asengeli kotya mpenza likebi na bavɛrsɛ oyo ezali na kati ya plan, asengeli kosala na boye ete bato oyo bazali koyoka ye bákanisa likoló na yango mpe asengeli kolakisa bango ndenge oyo bakoki kosalela makambo yango.
Kozongisa makambo nsima te
Ozali na lisangá moko esika okoki kosala masolo mingi? Ndenge nini okoki kosala mpo otya likebi na masolo yango nyonso? Kozela te soki etikali mokolo moko bongo obongisa lisolo na yo.
Esengeli kotyela masukulu likebi malamumalamu liboso, mpo ezala mpenza na litomba mpo na lisangá. Yango wana, salá makasi okóma na momeseno ya kotánga masolo oyo bapesi yo, ntango kaka ozwi yango. Yango ekosalisa yo okanisaka malamumalamu likoló na yango ntango ozali kosala misala na yo mosusu. Na boumeli ya mikolo to bapɔsɔ liboso osala lisolo na yo okoki koyoka makanisi oyo ekosalisa yo oyeba ndenge okoki kosala lisolo yango mpo bato oyo bazali koyoka yo básimba mpenza yango. Makambo mosusu mpe ekoki kobima, oyo ekomonisa ete lisolo na yo ebongi mpo na ntango wana. Esɛngaka ntango mingi mpo otánga mpe okanisa likoló na lisolo na yo ntango kaka ozwi yango, kasi osaleli ntango yango malamu mpenza. Na nsuka, ntango okobanda kobongisa lisolo na yo, okozwa matomba, mpamba te okanisaki malamu mpenza ntango mingi liboso ete osala yango. Soki ozali kobongisa masolo na yo boye, yango ekosalisa yo olongola kobanga ntango olingi kosala lisolo mpe osala yango na lolenge oyo ebongi mpenza mpe oyo ekosimba mitema ya bato nyonso na kati ya lisangá.
Soki oyebi mpenza motuya ya likabo oyo bapesi yo na kati ya ebongiseli ya Yehova mpo na koteya bato na ye, okokumisa ye mpe okomonisa mpenza ete ozali lipamboli mpo na bato nyonso oyo balingaka ye.—Yis. 54:13; Lom. 12:6-8.