Monisá ete osepelaka na bato—Na kotunáká mituna mpe koyokáká bango
1 Bato mingi basepelaka komonisa makanisi na bango, kasi balingaka te moto atángisa bango lokola mwana-kelasi to atuna bango mituna ebele ebele. Yango wana, lokola tozali baministre baklisto, tosengeli koyekola kotuna bato mituna na mayele mpo na kosalisa bango bábimisa makanisi na bango.—Mas. 20:5.
2 Mituna na biso esengeli kotinda bato na kokanisa, kasi te kobangisa bango. Ntango ndeko mobali moko asakolaka ndako na ndako, atunaka bato boye: “Okanisi mpenza ete mokolo mosusu bato bakosalela basusu makambo na boboto mpe na limemya?” Ata soki moto apesi eyano nini, alobaka boye: “Okanisi ete ekosɛnga nini mpo bato bábanda kosala bongo?” to: “Mpo na nini olobi bongo?” Ndeko mosusu, ntango apesaka litatoli ya libaku malamu to ntango asakolaka na bisika oyo bato bazalaka mingi, atunaka bato oyo bazali na bana boye: “Eloko nini esepelisaka yo mingi ndenge ozali moboti?” Na nsima, atunaka boye: “Makambo nini etungisaka yo mingi?” Tomoni ete mituna oyo ezali kotinda moto amonisa likanisi na ye kozanga kokakatana. Lokola tokutanaka na bato ndenge na ndenge na teritware na biso, mbala mosusu esɛngaka tóbongola mwa moke lisolo to lolenge na biso ya kotuna mituna mpo eyokana na bamposa na bango.
3 Kosalisa bato bábimisa makanisi na bango: Soki moto asepeli komonisa yo makanisi na ye, yoká ye na motema pɛtɛɛ mpenza mpe kokata ye maloba mpambampamba te. (Yak. 1:19) Monisá na boboto mpenza ete ozali kolanda ye na likebi. (Kols. 4:6) Mbala mosusu, okoki kaka koloba boye: “Nasepeli mingi na likanisi na yo. Matɔndi mingi ndenge oyebisi ngai likambo yango.” Soki ebongi, pesá ye longonya na motema mobimba. Na boboto mpenza, tuná ye mituna mosusu oyo ekotinda ye amonisa makanisi na ye mpe ntina oyo azali kokanisa bongo. Luká makambo oyo yo ná ye bondimaka. Soki olingi kobenda likebi na ye na vɛrsɛ moko, okoki koloba boye: “Oluká naino te koyeba soki oyo ekoki kozala ntina ya likambo yango?” Koluka te kondimisa ye makambo na makasi to komonisa ete yo nde oyebi mingi.—2 Tim. 2:24, 25.
4 Ndenge oyo bato bapesaka biyano na mituna oyo totunaka bango etalelaka mingi mpenza ndenge oyo toyokaka bango. Bato bakoki koloba soki tozali koyoka bango na motema mobimba. Mokɛngɛli moko ya zongazonga alobaki boye, “Soki ozali koyoka bato na motema pɛtɛɛ mpenza, yango ekobenda likebi na bango mpe ekomonisa ete ozali mpenza kosepela na bango.” Soki tozali koyoka bato, tokopesa bango lokumu mpe yango ekoki kotinda bango báyoka nsango malamu oyo tolingi koyebisa bango.—Lom. 12:10.