Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 1/06 lok. 2
  • Manaka mpo na likita ya mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na likita ya mosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 9 Yanuali
  • Pɔsɔ ebandi na 16 Yanuali
  • Pɔsɔ ebandi na 23 Yanuali
  • Pɔsɔ ebandi na 30 Yanuali
  • Pɔsɔ ebandi na 6 Febwali
Mosala na biso ya Bokonzi—2006
km 1/06 lok. 2

Manaka mpo na likita ya mosala

Pɔsɔ ebandi na 9 Yanuali

Loyembo 10

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 8 to makanisi mosusu ya kobanda lisolo oyo ebongi na teriware ya lisangá na bino mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yanuali mpe Lamuká! ya Yanuali. Na elakiseli moko, mosakoli azali kopesa litatoli na bikisa ya mombongo.

Min. 15: “Biblia eteyaka​—Buku ya liboso mpo na koyekola na bato Biblia.”a Lendisá bayangani básalela buku yango ya sika mpo na kobanda koyekola na bato Biblia.

Min. 20: “Ndenge ya kobanda koyekola na bato buku Biblia eteyaka.” Lisolo elongo na bayangani mpe bilakiseli na makambo oyo ezali na lokasa 3 ya siplema. Tokoki kosalela buku Biblia eteyaka mbala moko mpo na kobanda mpe kokoba koyekola Biblia na bato oyo basepeli. Bongisá malamu bilakiseli misato oyo ekomonisa ndenge ya kosalela (1) nkasa 4-5, (2) lokasa 6, mpe (3) paragrafe ya liboso ya lokasa 7 mpo na kobanda koyekola na moto ntango ozongeli ye. Lobelá elakiseli mokomoko liboso ya kosala yango, mpe zongelá yango nsima ya kosala yango. Bokoki kotánga baparagrafe nyonso oyo bapesi ya buku Biblia eteyaka to kaka mwa ndambo, soki esengeli. Na nsuka ya elakiseli mokomoko, mosakoli akoyokana na moto yango mpo na kozongela ye.

Loyembo 125 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 16 Yanuali

Loyembo 178

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Lendisá bayangani nyonso bátala kasɛti-video Soigner sans transfuser​—Besoins et droits du patient, mpo na kobongisa lisolo oyo ekosalema na Likita ya Mosala, na nsima ya pɔsɔ mibale.

Min. 15: Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani ekouta na buku Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova, nkasa 4-7. Nsima ya maloba ya ebandeli oyo esengeli koleka miniti misato te na makambo oyo ezali na lokasa 4, salá lisolo elongo na bayangani na lokasa 5 tii na motó moke ya likambo na lokasa 7. Masolo mosusu ya buku Tobongisami ekotalelama na Likita ya mosala na basanza oyo ekolanda.

Min. 20: “Bilenge oyo bazali kongɛnga lokola miinda.”b Sɛngá bilenge bálobela ndenge balongaki kopesa litatoli na kelasi. Okoki kobongisa liboso mpo elenge moko to bilenge mibale báyanola na motuna yango.

Loyembo 107 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 23 Yanuali

Loyembo 60

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Tángá lapolo ya kɔnti mpe mikanda ya botɔndi oyo biro etindaka soki ezwi makabo ya lisangá. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 8 to makanisi mosusu ya kobanda lisolo oyo ebongi na teriware ya lisangá na bino mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Febwali mpe Lamuká! ya Febwali. Sɛngá mosakoli moko ya elenge asala elakiseli moko.

Min. 15: Bamposa ya lisangá.

Min. 20: “Monisá ete osepelaka na bato​—Na kotunáká mituna mpe koyokáká bango.”c Ntango bokolobela paragrafe 2, sɛngá bayangani bálobela mituna oyo bamoni ete ebendaka mpenza likebi ya bato mingi. Salá elakiseli moko oyo ekomonisa ndenge ya kotuna moto mituna na mayele mpe koyoka ye na likebi mpo na kosalisa ye abimisa makanisi na ye.

Loyembo 205 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 30 Yanuali

Loyembo 197

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Yanuali. Lobelá mikanda oyo tokolakisa na Febwali, mpe salá elakiseli ya lolenge moko ya kolakisa yango.

Min. 15: Bibongiseli ya bolingo mpo na litomba na biso. Ekosalema na nkulutu moko. Tángá mpe lobelá mokanda oyo biro etindelaki masangá nyonso, oyo elobelaki kalati ya sika Instructions médicales prévisionnelles, mpe ndenge ya kosalela yango.

Min. 20: “Kasɛti-video oyo elobeli mayele moko oyo minganga mingi bakómi kosalela.” Tángá Misala 15:28, 29, mpe monisá polele mpe na mokuse ete ntina mpenza oyo baklisto baboyaka bázongisa bango makila ezali mpo batosaka mobeko ya Nzambe oyo elobi ete makila ezali eloko ya bosantu. Na nsima, salelá mituna oyo ezali na lisolo mpo na kosala lisolo elongo na bayangani na kasɛti-video Soigner sans transfuser​—Besoins et droits du patient. Mpo na kosukisa, tángá paragrafe ya nsuka. Soki lisangá na bino ezali na kasɛti-video yango te, bokoki kosalela Lamuká! ya 8 Yanuali 2000, lokasa 7-11 (na Lifalanse) mpe mwa buku Comment le sang peut-il vous sauver la vie?, nkasa 8-15, 18.

Loyembo 45 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 6 Febwali

Loyembo 74

Min. 10: Mayebisi ya lisangá.

Min. 25: Tóyeba malamu buku na biso ya sika mpo na koteya bato. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani. Sɛngá bayangani bálobela makambo oyo basepeli na yango na buku Biblia eteyaka, na ndakisa, mituna oyo ezali na nse ya motó ya likambo ya mokapo mokomoko mpe bitanda oyo emonisi polele makanisi ya ntina ya mikapo yango (nk. 106, 114); bililingi (nk. 122-123, 147, 198), mpe apendisi (lok. 197, pars. 1-2). Makambo oyo ezali na buku yango ezali kolendisa mpenza mpe ezali kosimba mitema ya bato (lok. 12, par. 12). Ezali kolimbola makambo na ndenge ya pɛtɛɛ mpe ya polele (lok. 58, par. 5) mpe ezali na maloba ya elilingi oyo ezali mpenza kosimba mitema ya bato (lok. 159, par. 12). Maloba ya ebandeli ebongisami mpo na kosalisa biso tóbanda koyekola na bato Biblia (nk. 3-7). Salá elakiseli moko oyo ekomonisa ndenge ya kosalela etanda ya lokasa 7 epai ya moto oyo abandi koyekola Biblia sika. Lobelá makambo oyo bandeko bakutanaki na yango ntango basalelaki buku yango ya sika.

Min. 10: Mosala ya mobongisi-nzela mosungi ememaka mapamboli. (Mas. 10:22) Sɛngá basakoli oyo basalaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi na sanza ya Marsi mpe ya Aprili ya mbula eleki, bálobela ndenge oyo bamibongisaki mpo na kosala mosala yango; bálobela mpe mapamboli mpe esengo oyo bazwaki na mosala yango. Lendisá bayangani nyonso bákanisa na nzela ya libondeli soki bakoki kosala mosala ya mobongisi-nzela na sanza ya Marsi, ya Aprili mpe ya Mai.

Loyembo 16 mpe libondeli ya nsuka.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto