MOKAPO 12
Yesu ateyi biso ndenge ya kobondela
OSOLOLAKA na Yehova Nzambe?— Alingaka ete osolola na ye. Kosolola na Nzambe, babengaka yango libondeli. Yesu azalaki mbala mingi kosolola na Tata na ye oyo azali na likoló. Ntango mosusu azalaki kolinga kozala kaka ye moko mpo na kosolola na Nzambe. Biblia elobi ete mokolo moko, “amataki na ngomba kaka ye moko mpo na kobondela. Atako ngonga epusanaki mingi, azalaki kuna kaka ye moko.”—Matai 14:23.
Epai wapi okoki kobondela Yehova yo moko?— Ntango mosusu okoki kozala yo moko mpo na kosolola na Yehova na butu liboso ya kolala. Yesu alobaki ete: “Ntango ozali kobondela, kɔtá na eteni ya kati ya ndako na yo mpe, nsima ya kokanga ekuke na yo, bondelá Tata na yo.” (Matai 6:6) Obondelaka Yehova butu nyonso liboso ya kolala?— Ezali malamu osalaka yango.
Yesu azalaki kobondela ye moko . . . mpe na bato mosusu
Yesu azalaki mpe kobondela ntango azalaki na bato mosusu. Ntango moninga na ye Lazalo akufaki, Yesu abondelaki na lilita ya Lazalo; bato mosusu mpe bazalaki wana. (Yoane 11:41, 42) Yesu azalaki mpe kobondela ntango azali na likita elongo na bayekoli na ye. Okendaka na makita epai basalaka libondeli?— Kuna, mbala mingi mokóló moko nde asalaka libondeli. Yokáká malamu makambo oyo azali koloba mpo azali kosolola na Nzambe mpo na bolamu na yo. Soki olandaki ye malamu, okoloba “Amen” na nsuka ya libondeli. Oyebi mpo na nini tolobaka “Amen” na nsuka ya libondeli?— Soki olobi “Amen,” yango elingi koloba ete osepeli na libondeli yango. Elimboli ete ondimi makambo oyo alobi mpe olingi ete yango ezala mpe libondeli na yo.
Mpo na nini osengeli koyokaka malamu mabondeli oyo esalemaka na makita?
Yesu azalaki mpe kobondela liboso ya kolya. Azalaki kopesa Yehova matɔndi mpo na bilei. Osalaka libondeli mikolo nyonso liboso ya kolya?— Ezali malamu tópesaka Yehova matɔndi mpo na bilei liboso ya kobanda kolya. Moto mosusu akoki kosala libondeli soki bozali kolya na bato ebele. Kasi, ezali boni soki ozali kolya yo moko? To soki osengeli kolya na bato oyo bapesaka Yehova matɔndi te?— Na ntango yango, yo moko osengeli kosala libondeli na yo.
Mpo na kobondela, osengeli ntango nyonso koloba na mongongo makasi? To Yehova akoki koyoka libondeli na yo ata soki osali yango na kati ya motema?— Tokoki kozwa eyano na motuna yango soki totaleli likambo oyo ekómelaki Nehemia. Nehemia azalaki mosambeli ya Yehova mpe azalaki kosala na ndako ya Alatazelezese, mokonzi ya Perse. Mokolo moko, Nehemia azalaki mawamawa mpo ayokaki nsango ete bifelo ya Yelusaleme, engumba monene ya ekólo na ye, ekweaki.
Ntango nini okoki kosala libondeli na nse ya motema, lokola Nehemia?
Ntango mokonzi atunaki Nehemia mpo na nini azalaki mawamawa, Nehemia asalaki mbala moko libondeli na kati ya motema. Na nsima, Nehemia ayebisaki mokonzi ntina oyo azalaki mawamawa mpe asɛngaki ye nzela ya kokende na Yelusaleme mpo na kotonga lisusu bifelo yango. Nini esalemaki?—
Nzambe ayokaki libondeli ya Nehemia. Mokonzi alobaki na ye akende! Kutu, mokonzi apesaki Nehemia ebele ya nzete mpo na kokende kotonga bifelo yango. Yango emonisi ete Nzambe akoki mpenza koyoka mabondeli na biso, ata soki tosali yango na kati ya motema.—Nehemia 1:2, 3; 2:4-8.
Sikoyo, kanisá likambo oyo. Osengeli kokitisa motó na nse ntango ozali kobondela? Osengeli kofukama? Okanisi nini?— Ntango mosusu Yesu azalaki kofukama mpo na kobondela. Ntango mosusu azalaki kotɛlɛma. Mpe ntango mosusu azalaki kotombola elongi likoló ntango azali kobondela, yango nde asalaki ntango abondelaki mpo na Lazalo.
Makambo nyonso wana elakisi nini?— Elakisi ete likambo eleki ntina ezali te ya kokitisa motó, kofukama to kotɛlɛma. Ntango mosusu ezalaka malamu kokitisa motó mpe kokanga miso. Ntango mosusu okoki ata kofukama, ndenge Yesu asalaki. Kasi, kobosana te ete tokoki kobondela Nzambe ata na ntango nini, ezala na butu to na moi, mpe akoyoka biso. Likambo ya ntina mingi mpo na libondeli ezali ete tóndima mpenza ete Yehova azali koyoka biso. Ondimaka ete Yehova ayokaka mabondeli na yo?—
Makambo nini okoki koyebisa Nzambe na libondeli?
Makambo nini tosengeli koyebisa Yehova na mabondeli na biso?— Yebisá ngai: Ntango obondelaka, oyebisaka Nzambe makambo nini?— Yehova apesaka biso ebele ya biloko ya malamu, yango wana ezali malamu tópesaka ye matɔndi mpo na yango, ezali bongo te?— Tokoki kopesa ye matɔndi mpo na bilei oyo tolyaka. Kasi, osilá kopesa Nzambe matɔndi mpo na ndenge likoló ezalaka kitoko na kotala, mpo na banzete, mpe bafololo?— Ye mpe moto asalá yango.
Mokolo mosusu bayekoli ya Yesu batunaki ye ateya bango ndenge ya kobondela. Moteyi Monene ateyaki bango, mpe alakisaki bango makambo ya ntina mingi oyo tosengeli kolobela na mabondeli na biso. Oyebi makambo yango?— Zwá Biblia na yo mpe fungolá na Matai mokapo 6. Na vɛrsɛ 9 tii 13, tokokuta oyo bato mingi babengaka Tata na Biso to Libondeli ya Nkolo. Tiká tótánga yango elongo.
Toyoki ete Yesu alobaki na biso tóbondelaka mpo na nkombo ya Nzambe. Alobaki tóbondelaka mpo nkombo yango ezala mosantu. Nkombo ya Nzambe ezali nani?— Nkombo ya Nzambe ezali Yehova, mpe tosengeli kolinga yango.
Ya mibale, Yesu ateyaki biso tóbondelaka mpo Bokonzi ya Nzambe eya. Bokonzi yango ezali na ntina mingi mpo ekotya kimya na mabelé mpe ekokómisa mabelé paladiso.
Ya misato, Moteyi Monene alobaki tóbondelaka mpo mokano ya Nzambe esalema na mabelé ndenge ezali kosalema na likoló. Soki tozali kobondela mpo na yango, tosengeli kosalaka makambo oyo Nzambe alingaka.
Na nsima, Yesu ateyaki biso tóbondelaka mpo na bilei oyo tosengeli na yango mokolo na mokolo. Alobaki mpe ete soki tosali mabe, tosengeli koyebisa Nzambe ete toyoki mawa. Tosengeli mpe kosɛnga Nzambe bolimbisi. Kasi, liboso ye alimbisa biso, tosengeli naino kolimbisa bato mosusu soki basalaki biso mabe. Ezalaka pɛtɛɛ mpo olimbisa moto?—
Na nsuka, Yesu alobaki ete tosengeli kobondelaka Yehova Nzambe abatela biso liboso ya moto mabe, Satana Zabolo. Nyonso wana ezali makambo ya malamu oyo tokoki kosɛnga Nzambe na libondeli.
Tosengeli kondima ete Yehova ayokaka mabondeli na biso. Longola kosɛnga ye asalisa biso, tosengeli ntango nyonso kopesaka ye matɔndi. Asepelaka soki tozali koyebisa ye makambo ya solo mpenza mpe soki tozali kosɛnga ye makambo ya malamu na mabondeli na biso. Mpe akopesa biso yango. Ondimi yango?—
Batoli mosusu ya malamu mpo na libondeli ezali na Baloma 12:12; 1 Petelo 3:12; mpe 1 Yoane 5:14.