Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 10/12 nk. 2-3
  • Salelá batrakte mpo na kopalanganisa nsango malamu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Salelá batrakte mpo na kopalanganisa nsango malamu
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2012
  • Masolo mosusu
  • Tósalela batrakte mpo na kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Batrakte ya sika ebongisami na ndenge oyo ezali kobenda likebi ya bato!
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
  • Salelá Liloba ya Nzambe mpo ezali na bomoi!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Ndenge ya kobanda lisolo na batrakte
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2020
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2012
km 10/12 nk. 2-3

Salelá batrakte mpo na kopalanganisa nsango malamu

1. Ndenge nini basaleli ya Nzambe basalelaki batrakte?

1 Banda kala, Batatoli ya Yehova basalelaka batrakte oyo elimbolaka Biblia mpo na kopalanganisa nsango malamu. Na 1880, Charles Russell ná baninga na ye babandaki kobimisa Batrakte ya Bayekoli ya Biblia, mpe bazalaki kopesa yango na batángi ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpo bákabola yango epai ya bato. Lokola batrakte ezalaki mpenza na ntina, yango wana na 1884 ntango Charles Russell akomisaki na Leta ebongiseli oyo ezali ya mombongo te kasi ya kopalanganisa nsango ya Bokonzi, liloba “trakte” etyamaki mpe na nkombo yango: Zion’s Watch Tower Tract Society, oyo ebengamaka lelo oyo Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania. Na 1918, Bayekoli ya Biblia bakabolaki batrakte koleka milio 300. Tii lelo oyo, batrakte esalisaka mpenza mpo na kopesa litatoli.

2. Mpo na nini ebongi mpenza kosalela batrakte?

2 Ntina oyo batrakte ebongi mpenza: Batrakte ezalaka na langi ya kitoko mpe ebendaka likebi ya bato. Nsango na yango ebendaka mpenza likebi mpe eteyaka. Esepelisaka bato oyo mbala mosusu babangaka kotánga zulunalo to buku. Ezalaka mpasi te kokabola yango, ezala mpo na basakoli ya sika to bana. Lisusu, batrakte ezalaka mike mpe pɛpɛlɛ na komema.

3. Lobelá likambo moko oyo okutanaki na yango to oyo ezali na mikanda na biso oyo emonisi ntina ya trakte.

3 Bato mingi bayokaki solo mpo na mbala ya liboso na nzela ya trakte. Na ndakisa, na Haïti, mwasi moko amonaki moko ya batrakte na biso na nzela mpe alokɔtaki yango. Nsima ya kotánga yango alobaki boye: “Oyo mpenza mateya ya solo!” Nsukansuka, abandaki kokende na Ndako ya Bokonzi, koyekola Biblia mpe azwaki batisimo; nyonso wana mpo na nguya ya Liloba ya Nzambe oyo amonaki na nzela ya trakte.

4. Na sanza oyo tozali kokabola batrakte, mokano na biso esengeli kozala nini?

4 Na mosala ya ndako na ndako: Lokola batrakte esalisaka mingi na kopesa litatoli, ekokɔta na molɔngɔ ya mikanda oyo tokabolaka sanza na sanza, kobanda na Novɛmbɛ. Mokano na biso ezali kaka te ya kopesa bato batrakte kasi nde ya kosalela yango mpo na kobanda lisolo. Soki moto yango asepeli na mbala ya liboso to ntango tozongeli ye, tokoki kolakisa ye ndenge toyekolaka Biblia na buku Biblia eteyaka to buku mosusu oyo tosalelaka mpo na koyekola na bato. Ndenge nini tokoki kokabola batrakte na mosala ya ndako na ndako? Batrakte nyonso ezalaka ndenge moko te; na yango, tosengeli koyeba makambo ezali na batrakte oyo tozali kopesa bato.

5. Ndenge nini tokoki kokabola batrakte na mosala ya ndako na ndako?

5 Tosengeli koyokanisa lisolo na biso na kotalela teritware na biso mpe trakte oyo tozali kosalela. Tokoki kobanda lisolo na kopesa moto trakte. Bililingi ya kitoko oyo ezali na lokasa ya liboso ekoki kobenda likebi ya moto. To tokoki kolakisa batrakte ebele mpe kotika moto apona oyo esepelisi ye. Na teritware oyo bato bakakatanaka kofungola porte, tokoki kosimba trakte na ndenge oyo moto akoki komona lokasa na yango ya liboso, to tokoki kosɛnga ete tókɔtisela ye yango na nse ya porte mpe apesa likanisi na ye. Soki motó ya likambo ya trakte ezali motuna, tokoki kosɛnga ye apesa likanisi na motuna yango. To tokoki kotuna ye motuna oyo ekobenda likebi na ye mpo tósolola na ye. Na nsima, tokoki kotángela ye mwa makambo oyo ezali na trakte, kopema mwa moke na esika mituna ezali, mpe kosɛnga ye apesa likanisi. Tokotánga mikapo oyo esimbi lisolo na kati ya Biblia. Nsima ya kotalela mwa makambo oyo ezali na kati ya trakte yango, tokoki kosukisa lisolo mpe koyokana mokolo oyo tokozongela ye. Soki na lisangá na bino botikaka mikanda na bandako ya bato oyo bokuti bango te, okoki kotika trakte na esika oyo moto akoki komona te.

6. Ndenge nini tokoki kosalela batrakte ntango tozali kopesa litatoli na balabala?

6 Kopesa litatoli na balabala: Osilá kosalela batrakte ntango ozali kopesa litatoli na balabala? Baleki nzela mosusu bazalaka na ntango te ya kotɛlɛma mpo na kosolola na biso. Ekoki kozala mpasi tóyeba soki basepeli to te. Na esika ya kopesa bango nimero ya sika ya zulunalo kozanga koyeba soki bakotánga yango to te, mpo na nini te kopesa bango trakte? Lokola lokasa ya liboso ya trakte ebendaka likebi mpe maloba na yango ezalaka mingi te, moto akoki koluka koyeba makambo oyo ezali na kati soki azali na mwa miniti. Na ntembe te, soki bazali na ntango, tokoki kosolola na bango mwa makambo oyo ezali na kati ya trakte.

7. Lobelá masolo oyo emonisi ndenge ya kosalela batrakte na litatoli ya libaku malamu.

7 Litatoli ya libaku malamu: Ezali mpasi te kosalela batrakte mpo na kopesa litatoli ya libaku malamu. Ndeko mobali moko atyaka mwa batrakte na pɔsi mbala nyonso oyo alingi kobima. Soki akutani na moto, na ndakisa motɛki na magazini, atunaka moto yango soki akoki kopesa ye eloko ya kotánga mpe apesaka trakte. Ntango mobali moko ná mwasi na ye bakendeki na engumba New York City mpo na kotala mboka, bayebaki ete bakokutana na bato oyo bauti na mikili ndenge na ndenge. Na yango bamemaki mwa buku Nations mpe batrakte mingi ya minɔkɔ ndenge na ndenge. Soki bayoki moto moko oyo azali kotɛkisa biloko pembeni ya nzela to afandi pene na bango na parkɛ to na restora azali koloba monɔkɔ ya bapaya, bazalaki kopesa ye trakte na monɔkɔ na ye ya mboka.

8. Na ndenge nini batrakte ezali lokola mboto?

8 “Loná mboto na yo”: Tokoki kokokanisa batrakte na mboto. Moloni abwakaka mboto bisika nyonso mpo ayebi te oyo wapi ekobimisa misisa mpe ekokola. Mosakoli 11:6 elobi boye: “Na ntɔngɔ, loná mboto na yo mpe tii na mpokwa kopemisa lobɔkɔ na yo te; mpo oyebi te epai wapi yango ekolonga, ezala awa to kuna, to soki yango nyonso mibale ekozala malamu.” Na yango, tiká tókoba “kopalanganisa boyebi” na nzela ya trakte, esaleli oyo ebongi mpenza na kopesa litatoli.​—Mas. 15:7.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 3]

Lokola batrakte esalisaka mingi na kopesa litatoli, ekokɔta na molɔngɔ ya mikanda oyo tokabolaka sanza na sanza, kobanda na Novɛmbɛ

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto