Mokapo 7
Salelá Yehova na kolanda mitinda na ye ya sembo
1. Ndenge nini baoyo bazalaki na Yerusaleme na mikolo ya Sefania bazalaki koloba mpo na mitinda ya Yehova?
“YEHOVA akosala malamu te, mpe akosala mabe te.” Ezali ndenge wana nde bato ya Yerusaleme bazalaki koloba na mikolo ya Sefania. Bakanisaki ete Yehova azalaki kosɛnga bango te bátosa ata etinda moko. Sefania alobaki ete bazalaki “kokangama lokola vinyo likoló ya mbɔtɔ na yango,” biloko ya mikemike oyo etikalaka na nse ya vinyo oyo baningisi te. Alingaki koloba ete bato bazalaki na mposa bátikala na lolenge ya bomoi oyo bamonaki ya malamu, mpe ata etinda moko te ya Nzambe etungisa bango na makambo na bango. Kasi, Nzambe ayebisaki Bayuda yango ete ‘akoluka malamumalamu na miinda na kati ya Yerusaleme’ mpe ‘akotya likebi’ na bato oyo bazali kotosa te mitinda na ye. Ya solo, Yehova azali na mitinda, mpe atyaka likebi na ndenge oyo bato na ye batalelaka yango.—Sefania 1:12.
2. Na mboka na bino, ezaleli nini bato bazalaka na yango na likambo etali mitinda?
2 Lelo oyo mpe, bato mingi basepelaka te na likanisi ya kotosa mibeko. Okoki koyoka bango bazali koloba, “salá ndenge olingi!” Basusu bakanisaka boye: ‘Soki nazali na mbongo mingi te to nazali kokoka te kokokisa bamposa na ngai, ezali malamu nasala likambo nyonso oyo nalingi mpo nazala malamu.’ Batyaka mpenza likebi te na ndenge oyo Nzambe akanisaka to na makambo oyo akoki kosɛnga bango. Bongo yo? Mitinda oyo Mozalisi atyá esepelisaka yo?
3, 4. Mpo na nini omoni ete mibeko ezali na ntina?
3 Bato mingi oyo baboyaka kotosa mitinda ya Nzambe, bandimaka kolanda mitinda ya bato na makambo ndenge na ndenge ya bomoi na bango. Na ndakisa, okanisi boni mpo na mai oyo osalelaka? Baguvɛrnema mingi etyaka mibeko mpo na mai oyo bato bakoki kosalela. Kasi, okanisi boni soki mibeko ezali mpenza te? Yango ekoki kosala ete bato bábɛla maladi ya pulupulu mpe bamaladi mosusu oyo eutaka na mai ya bosɔtɔ, mingimingi oyo ezwaka bana mike. Na yango, ekoki kozala ete mai ya pɛto oyo osalelaka, endimami na mibeko. Ebongiseli moko (Organisation Internationale de normalisation) elobi boye: “Soki mibeko ezalaki te, tolingaki komona yango noki. Mbala mingi toyebaka te mosala oyo mibeko esalaka mpo na kobongisa makambo, kopɛngola makama, kosala ete bato bázala na kobanga te, báyeba eloko oyo ezali malamu mpe ete ezali bongolabongola te—mpe matomba oyo mibeko ebimisaka mpo na nkita.”
4 Soki ondimi ete kozala na mibeko ezali na ntina na makambo ndenge na ndenge ya bomoi, ebongi te ondima ete Nzambe atya mpe mibeko mpo na bato oyo babengami na nkombo na ye?—Misala 15:14.
MITINDA YA NZAMBE EZALI KILO?
5. Ndenge nini Yehova amonisaki na nzela ya Amose ntina ya kotosa mitinda na ye?
5 Ntango ozali kotonga ndako, mibeko ezalaka na ntina. Soki efelo moko ezali semba te, ndako mobimba ekoki kotɛngama. To soki bifelo ya ndako yango esali banzelanzela, yango ekoki kosala ete bato báfanda te na ndako yango. Yango nde ezalaki likanisi ya emonaneli oyo Amose, oyo asakolaki na ekeke ya 9 L.T.B., azwaki mpo na makambo oyo ezalaki na ekólo ya mabota zomi ya Yisraele. Amonaki Yehova atɛlɛmi na efelo moko asimbi “nsinga ya nivo na lobɔkɔ na ye.” Nzambe alobaki boye: “Talá nazali kotya nsinga ya nivo na kati ya bato na ngai, Yisraele. Nakokoba kolimbisa yango lisusu te.” (Amose 7:7, 8) Nsinga ya nivo ezali kilo oyo bakangisi na nsinga; basalelaka yango mpo na koyeba soki efelo ezali semba. Efelo ya elilingi epai Amose amonaki Yehova atɛlɛmi ‘esalemaki na nsinga ya nivo.’ Efelo yango etɛlɛmaki semba to alima. Nzokande, na mikolo ya Amose, Bayisraele bazalaki lisusu semba te na makambo ya elimo—bazalaki lokola efelo oyo etɛngami oyo esengelaki kobukama liboso ekwea.
6. (a) Likambo nini ya ntina ezongelami mingi na mikanda ya basakoli 12? (b) Likambo nini esalisi biso tóloba ete mitinda ya Nzambe ezali kilo te?
6 Wana ozali koyekola mikanda ya basakoli 12, okomona likambo oyo ezongelami mbala na mbala: Ezali na ntina kotosa mitinda ya Nzambe. Bansango oyo ezali na mikanda yango, ezalaki nyonso te kaka bansango ya bitumbu mpo na bato oyo bazalaki kotosa te mitinda ya Nzambe oyo ezalaki sembo. Na bantango mosusu, wana azalaki kotalela bango, Yehova azalaki komona ete bato na ye bazalaki kotosa mitinda na ye. Lokola bazalaki kokoka kotosa yango, emonisi ete mitinda ya Nzambe ezali kilo te; bato ya kozanga kokoka lokola biso tokoki mpenza kotosa yango. Tótala ndakisa moko.
7. Ndenge nini Zekaria asalisi biso tómona ete bato ya kozanga kokoka bakoki kotosa mitinda ya Yehova?
7 Nsima ya kotya moboko ya tempelo, Bayuda oyo bautaki na boombo batikaki mosala ya kotonga. Yango wana, Nzambe atindaki basakoli na ye Hagai ná Zekaria mpo bálendisa bato bázongela mosala. Na emonaneli moko oyo apesaki Zekaria, Yehova alobelaki Zerubabele, guvɛrnɛrɛ ya Yuda, lokola moto oyo azali na “nsinga ya nivo na lobɔkɔ [na ye]” ntango atyaki libanga ya motó oyo etyaki mpenza nsuka na mosala ya kotonga tempelo. Tempelo etongamaki na boyokani na mitinda ya Nzambe. (Zekaria 4:10) Kasi, tótalela naino likambo oyo ya ntina oyo elobeli tempelo oyo esilaki: “Miso yango nsambo ezali miso ya Yehova. Yango ezali kotambola epai na epai na mabele mobimba.” Nzambe amonaki Zerubabele azali kotya libanga ya motó, mpe lokola azali na likoki ya komona makambo nyonso, Nzambe amonaki ete tempelo yango etongami na ndenge oyo alingaki, eyokanaki mpenza na mitinda na ye! Yango emonisi ete ata soki mitinda ya Yehova ezali likoló, bato bakoki kotosa yango. Lokola Hagai mpe Zekaria balendisaki bango, Zerubabele ná bato na ye bakokisaki mitinda ya Yehova. Ndenge moko na Zerubabele, yo mpe okoki kokokisa makambo oyo Nzambe azali kosɛnga. Koyeba bongo ezali mpenza kokitisa motema!
MPO NA NINI KONDIMA MITINDA YA YEHOVA?
8, 9. (a) Mpo na nini ebongi ete Yehova atyela bato mibeko? (b) Mpo na nini ebongaki ete Nzambe asɛnga Bayisraele bátosa mibeko na ye?
8 Lokola azali Mozalisi, Nzambe azali na lotomo ya kotyela bato mitinda mpe kozela ete bátosa yango. (Emoniseli 4:11) Esɛngaka te ete Yehova alimbwela bato likambo mokomoko oyo basengeli kosala, mpo apesá bango lisosoli, motambwisi ya malamu. (Baroma 2:14, 15) Nzambe ayebisaki mwasi ná mobali ya liboso ete bálya te mbuma ya “nzete ya koyeba malamu ná mabe,” oyo ezalaki komonisa lotomo ya Nzambe ya kotya mibeko mpo na kokesenisa malamu ná mabe. Oyebi malamu likambo oyo esalemaki. (Ebandeli 2:17; 3:1-19) Mpo na ekateli ya mabe oyo Adama azwaki, Hosea akomaki boye: “[Bayisraele] babuki kondimana lokola moto ya mabele.” (Hosea 6:7) Na ndenge yango, Hosea amonisaki ete Bayisraele basalaki lisumu na nko.
9 Lisumu yango ezalaki nini? Biblia moko (New International Version) ebongoli vɛrsɛ yango boye: “Babuki [Mobeko ya] kondimana.” Lokola Nzambe abimisaki Bayisraele na Ezipito, bakómaki bato na ye mpe emonani polele ete azalaki na lotomo ya kotyela bango mibeko. Bayisraele bandimaki kosala kondimana na Yehova, na ndenge yango bandimaki kozala na bomoi oyo eyokani na mibeko yango. (Kobima 24:3; Yisaya 54:5) Kasi, mingi na bango batosaki Mibeko yango te. Bakómaki na ngambo na oyo etali kosopa makila, koboma, mpe pite.—Hosea 6:8-10.
10. Ndenge nini Nzambe amekaki kosalisa baoyo balongaki te kotosa mibeko na ye?
10 Yehova atindaki basakoli lokola Hosea mpo na kosalisa bato na ye oyo bamipesaki na ye. Na nsuka ya mokanda na ye ya esakweli, Hosea alobaki boye: “Nani azali moto ya bwanya, mpo akanga ntina ya makambo oyo? Moto ya mayele, mpo ayeba yango? Mpamba te banzela ya Yehova ezali alima, mpe bayengebene nde bakotambola wana; kasi bato oyo babukaka mibeko bakobɛta libaku wana.” (Hosea 14:9) Mwa liboso, na Hosea mokapo 14, tomoni ete mosakoli yango alobeli mingi ntina ya kozongela Yehova. Bato ya bwanya bakoyeba ete Yehova amonisi nzela ya sembo oyo bato na ye basengeli kotambola. Lokola ozali mosaleli ya Nzambe, na ntembe te ozali mpenza na mposa ya kotikala kaka mosaleli na ye, kotambola na nzela ya Yehova.
11. Mpo na nini olingaka kotosa mibeko ya Nzambe?
11 Hosea 14:9, ebendi mpe likebi na biso na matomba oyo tokoki kozwa soki tozali na etamboli ya malamu. Moto azwaka mapamboli mpe matomba soki azali kotosa masɛngami ya Nzambe. Lokola azali Mozalisi na biso, ayebi ndenge tokelamá. Makambo oyo azali kosɛnga biso ezali mpo na bolamu na biso. Mpo na komonisa boyokani oyo ezali kati na biso bato mpe Nzambe, tókanisa motuka mpe moto oyo asalaki yango. Moto oyo asalá motuka ayebi ndenge asalá yango mpe biloko oyo atyá na kati. Ayebi ete motuka esɛngaka mbala na mbala kolongola mafuta na motɛrɛ mpe kotya mafuta ya sika. Nini ekoki kosalema soki otosi te mobeko wana, ntango mosusu mpo omoni ete motuka ezali kotambola malamu? Mosika te, makambo ekoki kobongwana, motɛrɛ ekoki kobeba mpe kokufa. Ezali mpe bongo mpo na bato. Mozalisi na biso apesá biso mibeko. Kotosa yango ezali mpo na litomba na biso. (Yisaya 48:17, 18) Koyeba ete yango ezali mpo na litomba na biso epesi biso ntina mosusu ya kotosa mibeko na ye, mpe kobatela mitindo na ye.—Nzembo 112:1.
12. Ndenge nini kotambola na nkombo ya Nzambe ekoki kokómisa makasi boyokani na biso na ye?
12 Litomba monene ya kotosa mibeko ya Nzambe ezali kokóma na boyokani makasi na ye. Ntango tozali kotosa mibeko na ye mpe tozali komona ete ezali kilo te mpe ezali na litomba, tokolinga lisusu makasi, Ye oyo atyá mibeko yango. Na maloba ya kitoko, mosakoli Mika alobelaki boyokani yango; alobaki boye: “Bato ya bikólo nyonso, ɛɛ bango, bakotambola moto na moto na nkombo ya nzambe na ye; kasi biso, ɛɛ biso, tokotambola na nkombo ya Yehova Nzambe na biso mpo na ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ seko na seko.” (Mika 4:5) Oyo nde libaku malamu tozali na yango ya kotambola na nkombo ya Yehova, kobatela lokumu na ye mpe kondima bokonzi na ye na bomoi na biso! Kozanga moto atindika biso na makasi, tolingaka komonisa bizaleli na ye. Tiká ete mokomoko na biso asala makasi mpo na kokómisa boyokani na ye na Nzambe makasi.—Nzembo 9:10.
13. Mpo na nini kobanga nkombo ya Nzambe ezali mabe te?
13 Baoyo batosaka mitinda ya Nzambe mpe batambolaka na nkombo na ye balobelami lokola bato oyo babangaka nkombo ya Nzambe. Yango ezali kobanga ya mabe te. Yehova apesi bato yango elaka oyo: “Epai na bino baoyo bobangaka nkombo na ngai, moi ya boyengebene ekobima mpenza, ná kobikisa na kongɛnga na yango; mpe bokobima mpenza mpe bokobɛtabɛta mabele na makolo na bino lokola bana-ngɔmbɛ ya mafutamafuta.” (Malaki 4:2) Na kokokisama ya esakweli yango, “moi ya boyengebene” ezali Yesu Kristo. (Emoniseli 1:16) Lelo oyo azali kongɛnga na ndenge azali kobikisa bato na elimo mpe, akongɛnga lisusu na mikolo ezali koya mpo na kobikisa bato na maladi nyonso ya nzoto. Esengo ya bato oyo babikisami ekokani na oyo ya bana-ngɔmbɛ ya mafutamafuta oyo bazali ‘kobima mpe kobɛtabɛta mabele,’ bazali kosepela ndenge bakómi na bonsomi. Osilá naino te kozwa bonsomi monene ndenge wana?—Yoane 8:32.
14, 15. Kotosa mitinda ya Yehova ememelaka bato matomba nini?
14 Lolenge mosusu oyo okoki kozwa litomba soki ozali kokangama na mibeko yango ya Nzambe ezali ya kozala na boyokani malamu na basusu. Habakuku alobelaki mpasi mitano oyo esengelaki kokómela bato ya bilulela, baoyo bazalaki na kozanga kolongobana, baoyo bazalaki kosopa makila, baoyo bazalaki kokana kosala pite, mpe baoyo bazalaki kosambela bikeko. (Habakuku 2:6-19) Lokola Yehova alobelaki mpasi wana emonisi polele ete atyaki mibeko mpo na lolenge oyo tosengeli kotambwisa bomoi na biso. Kasi, simbá likambo oyo: Makambo minei ya mabe oyo elobelami etaleli ndenge oyo tosalelaka basusu makambo. Soki tozali kotalela makambo ndenge Nzambe atalelaka yango, tokosala bazalani na biso mabe te. Na ndenge yango, boyokani na biso na mingi kati na bango ekobonga.
15 Likambo ya misato oyo tozwelaka yango litomba ezali kozala na libota ya esengo. Lelo oyo, mbala mingi bato bamonaka koboma libala nde lolenge eleki malamu ya kosilisa mikakatano ya libala. Kasi, na nzela ya mosakoli Malaki, Yehova alobaki boye: “Ye ayini koboma libala.” (Malaki 2:16) Tokolobela Malaki 2:16 na mozindo nsima, kasi mpo na sikoyo simbá ete na bwanya nyonso Nzambe atyá mibeko oyo moto mokomoko na kati ya libota asengeli kotosa; soki bazali kotosa, kimya ekozala na libota. (Baefese 5:28, 33; 6:1-4) Mpo na koloba solo, biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka, na yango mikakatano ekozanga te. Kasi, na mokanda ya Hosea, Ye oyo “mpo na ye, libota nyonso mpe na mabele ezwi nkombo” apesi liteya moko ya ntina oyo emonisi ndenge ya kosilisa mikakatano ata ya minene na libala. Tokolobela mpe likambo yango na mokapo mosusu ya buku oyo. (Baefese 3:15) Tiká tótalela sikoyo likambo mosusu oyo etali mpe kotosa mitinda ya Nzambe.
“BÓYINA OYO EZALI MABE, MPE BÓLINGA OYO EZALI MALAMU”
16. Ndenge nini Amose 5:15 elobeli mitinda ya Nzambe?
16 Adama, moto ya liboso azwaki ekateli ya bozoba ntango aponaki soki mitinda ya nani elekaki malamu na likambo etali kokesenisa mabe ná malamu. Tokozwa ekateli ya bwanya? Amose apesi biso toli mpo tózala na ekateli makasi na likambo yango; alobi boye: “Bóyina oyo ezali mabe, mpe bólinga oyo ezali malamu.” (Amose 5:15) William Rainey Harper, profɛsɛrɛ moko na iniversite ya Chicago, oyo akufá, alobaki boye mpo na vɛrsɛ yango: “Mibeko ya koyeba malamu mpe mabe, oyo [Amose] azalaki na yango na makanisi, ezali na boyokani na mokano ya Yawe.” Wana mpenza nde likanisi oyo tokoki kosimba na mikanda ya basakoli 12. Tokondima kotosa mibeko ya Yehova na oyo etali malamu mpe mabe? Mibeko yango emonisami na Biblia mpe bakristo oyo bakɔmeli na elimo, baoyo bamonisami na “moombo ya sembo mpe ya mayele,” balimbwelaka biso yango.—Matai 24:45-47.
17, 18. (a) Mpo na nini ezali na ntina tóyina oyo ezali mabe? (b) Pesá ndakisa oyo emonisi ndenge tokoki koyina mpenza oyo ezali mabe.
17 Koyina oyo ezali mabe esalisaka biso tóboya makambo oyo Nzambe aboyaka. Na ndakisa, moto akoki koyeba makama ya kotala pornografi na internet mpe koluka koboya kotala yango. Kasi, ndenge nini ‘bomoto na ye ya kati’ etalelaka makambo oyo balakisaka na bisika yango na internet? (Baefese 3:16) Soki azali kosalela toli ya Nzambe oyo ezali na Amose 5:15, akomona ete ezali mpasi te koyina oyo ezali mabe. Na ndenge yango akolonga na etumba na ye ya elimo.
18 Tózwa ndakisa mosusu. Ekoki kosalema ete ofukama liboso ya bikeko ya losambo ya pite? Likanisi yango mpamba ezali koyokana mabe, boye te? Nzokande, Hosea alobaki ete bankɔkɔ ya Bayisraele basalaki pite liboso ya Baala ya Peore. (Mitángo 25:1-3; Hosea 9:10) Emonani ete Hosea alobelaki likambo yango mpo losambo ya Baala ezalaki lisumu monene oyo bokonzi ya mabota zomi ya Yisraele esalaki. (2 Bakonzi 17:16-18; Hosea 2:8, 13) Tókanisa naino ndenge likambo yango ya mabe esalemaki: Bayisraele bazalaki kofukamela bikeko na ntango bazali kosangisa nzoto na ndenge ya mbindo. Koyeba ndenge Nzambe akweisaki likambo yango ekoki kosalisa mokomoko na biso abunda mpo akwea te na mitambo wana ya Satana na nzela ya internet. Lelo, bato mingi bakumisaka basi mpe mibali ya kitoko oyo balakisaka na bafilme mpe bateyatre. Kasi, bokeseni ezali mpenza mpo na biso oyo tokangi ntina ya makebisi oyo basakoli bapesi na oyo etali losambo ya bikeko!
BATELÁ LILOBA YA NZAMBE NA MAKANISI NA YO
19. Liteya nini okoki kozwa na makambo oyo Yona asalaki ntango azalaki na kati ya libumu ya mbisi monene?
19 Wana ozali kosala makasi mpo na kotosa mitinda ya Nzambe ntango okutani na komekama mpe mikakatano, okoki ntango mosusu komona lokola nde okokoka te to oyebi te nini okoki kosala. Soki omoni ete makanisi na yo esuki mpe ozali lisusu kokoka te, ndenge nini okoki kolonga likambo ya mpasi oyo okutani na yango? (Masese 24:10) Na ntango wana, okoki kozwa liteya na likambo oyo ekómelaki Yona, oyo toyebi ete azalaki moto ya kozanga kokoka oyo asalaki mpe mabunga. Kanisá likambo oyo asalaki ntango azalaki na kati ya libumu ya mbisi monene. Abondelaki Yehova. Yoká ndenge abondelaki.
20. Ndenge nini okoki komibongisa mpo na kosala oyo Yona asalaki?
20 Ntango Yona abondelaki Nzambe “na libumu ya Nkunda,” asalelaki maloba mpe bafraze ebele oyo amesanaki na yango, maloba ya banzembo. (Yona 2:2) Azalaki mpenza na mpasi mpe abondelaki Yehova ayokela ye mawa, kasi azongelaki maloba ya Davidi. Na ndakisa, kokanisá maloba ya Yona 2:3, 5 na oyo ya Nzembo 69:1, 2.a Emonani polele ete Yona amesanaki na banzembo ya Davidi oyo ezalaki na ntango na ye! Maloba mpe makanisi oyo Nzambe akomisaki na banzembo yango eyaki na makanisi na ye. Yona azalaki na liloba ya Nzambe ‘na kati na ye.’ (Nzembo 40:8) Soki okutani na likambo moko oyo esilisi yo makasi, okoki te kokanisa maloba mosusu ya Nzambe? Soki omeseni lelo oyo na Liloba ya Nzambe, yango ekoki kosalisa yo mpenza na mikolo ezali koya soki okutani na makambo oyo ekosɛnga ete ozwa bikateli mpe osilisa mikakatano na kolanda mitinda ya Nzambe.
BANGÁKÁ NZAMBE NA NDENGE EBONGI
21. Osengeli kosala nini mpo okangama na mitinda ya Nzambe?
21 Ya solo, kokanga Liloba ya Nzambe na motó ekoki te mpo na kokangama na mitinda ya Yehova. Mosakoli Mika alobeli likambo mosusu oyo tosengeli na yango mpo na kotosa Liloba ya Nzambe: “Moto oyo azali na bwanya, akobanga nkombo na yo.” (Mika 6:9) Mpo na kozala moto oyo azali mpenza na bwanya, oyo akoki kosalela makambo oyo ayebi na bomoi na ye, osengeli kobangaka nkombo ya Nzambe.
22, 23. (a) Mpo na nini Yehova atindaki Hagai epai ya Bayuda oyo bautaki na boombo? (b) Mpo na nini ondimi ete okokoka kotosa mibeko ya Nzambe?
22 Ndenge nini okoki koyekola kobanga nkombo ya Nzambe? Yoká ndenge mosakoli Hagai, oyo asalaki mosala na ye nsima ya kobima ya Bayisraele na boombo alobi. Na mokanda na ye ya mokuse mpenza, oyo ezali kaka na bavɛrsɛ 38, asaleli nkombo ya Yehova mbala 35! Ntango Yehova atindaki Hagai asakola na mobu 520 L.T.B., mbula 16 elekaki oyo mosala ya kotonga lisusu tempelo na Yerusaleme esalemaki mingi te. Bato ya Nzambe balɛmbaki nzoto mpo na botɛmɛli ya banguna na bango. (Ezera 4:4, 5) Bazalaki kokanisa ete ntango ya kotonga lisusu tempelo ekokaki naino te. Yehova apesaki bango toli oyo: “Bótya motema na bino na banzela na bino. . . . Bótonga ndako, mpo nasepela na yango mpe mpo nazwa nkembo.”—Hagai 1:2-8.
23 Guvɛrnɛrɛ Zerubabele, nganga-nzambe monene Yosua, mpe “batikali nyonso kati na bato, babandaki koyoka mongongo ya Yehova Nzambe na bango, . . . mpe bato bakómaki kobanga Yehova.” Mpo na yango, Nzambe ayanolaki bango boye: “Nazali elongo na bino.” Oyo nde maloba ya kolendisa! Na lisalisi ya elimo ya Nzambe, bato yango “babandaki kokɔta mpe kosala mosala na ndako ya Yehova.” (Hagai 1:12-14) Bobangi ya solosolo ya Nzambe etindaki bato yango oyo balɛmbaki bábanda kosala atako botɛmɛli ezalaki.
24, 25. Na lisalisi ya bandakisa oyo ebongi, monisá ndenge okoki kosalela mitinda oyo ezali na mokapo oyo.
24 Bongo yo? Soki oyebi mibeko ya Nzambe oyo okoki kosalela na makambo oyo okutani na yango, okozala na mpiko ya kobanga Yehova na esika ya kobanga bato? Ntango mosusu ozali elenge mwasi, mpe na mosala, ezali na mobali moko oyo azali Motatoli te. Kasi, azalaka boboto mpe atyelaka yo likebi. Vɛrsɛ moko ekoki koyela yo na makanisi, kokundwela yo mitinda ya Yehova mpe makama oyo ekoki kokómela yo soki otosi mitinda yango te? Na ndakisa Hosea 4:11? Elobi boye: “Pite, vinyo ná vinyo ya elɛngi, yango nde biloko oyo elongolaka makanisi ya malamu.” Na makanisi wana na motó, kobanga Nzambe ekotinda yo okangama na mitinda na ye mpe oboya soki moto yango asɛngi yo obima na ye? Soki abandi kolinga yo, kobanga koyokisa Nzambe na yo ya bolingo mpasi ekoki kosalisa yo ‘okima.’—Ebandeli 39:12; Yirimia 17:9.
25 Sikoyo tózongela ndakisa ya moto oyo azali koluka koboya kotala pornografi na internet. Akomikundwela maloba ya Nzembo 119:37, oyo ezali lokola libondeli? Oyo elobi: “Salá ete miso na ngai eleka kozanga kotala eloko oyo ezangi ntina.” Mpe akoki kokanisa maloba oyo Yesu alobaki na Lisolo Likoló ya Ngomba? “Moto nyonso oyo azali kokoba kotala mwasi tii ayoki ye mposa asali na ye ekobo na motema.” (Matai 5:28) Kobanga Yehova mpe mposa ya kotosa mitinda na ye esengeli kotinda mokristo aboya likambo nyonso oyo ekoki kobebisa ye. Ntango nyonso oyo omekami mpo okanisa to osala makambo oyo eyokani te na mitinda ya Nzambe, luká lisusu kobanga Nzambe mingi. Mpe kobosana te maloba oyo Yehova alobi na yo na nzela ya Hagai: “Nazali elongo na [yo].”
26. Makambo nini tokotalela lisusu?
26 Ya solo, okoki kosalela Yehova na boyokani na mitinda na ye ya sembo mpe okozwa matomba soki osali bongo. Wana ozali kokoba kotalela mikanda 12 ya bisakweli, mitinda ya Nzambe to makambo oyo azali kosɛnga mokomoko na biso, ekokóma lisusu polele. Eteni oyo elandi ekolobela makambo misato ya minene oyo Yehova atye mitinda oyo ebongi: etamboli na biso, ndenge ya kofanda na basusu, mpe bomoi ya libota.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Kokanisá mpe Yona 2:2, 4-9 na Nzembo 18:6; 31:22; 30:3; 142:3; 31:6 mpe 3:8 na ndenge Yona azongelaki yango.
OKOYANOLA NDENGE NINI?
• Nzambe ayokaka ndenge nini ntango ozali kotosa mitinda na ye?—Amose 7:7-9.
• Mpo na nini olobi ete mitinda ya Yehova ezali kilo te?—Zekaria 4:10.
• Makambo nini etindaka yo otosa mibeko ya Nzambe?—Mika 4:5; Malaki 4:2; 2 Bakorinti 5:15; Emoniseli 4:11.
NDENGE NINI MAKAMBO OYO ELANDI EKOKI KOSALISA YO OTOSA MITINDA YA NZAMBE?
• Koyina mabe—Amose 5:15.
• Kokanga Liloba ya Nzambe na motó —Yona 2:4-9.
• Kobanga Yehova—Hagai 1:12-14.
[Elilingi na lokasa 87]
Mpo na nini otosaka mitinda ya moto oyo asalá motuka mpe makambo oyo asɛngi?
[Elilingi na lokasa 90]
Ndenge nini koyoka toli ya basakoli 12 ekoki kosalisa moto aboya pornografi?
[Elilingi na lokasa 95]
Ndenge nini kobanga Nzambe ekoki kosalisa yo na likambo ya ndenge oyo?