Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • be liteya 22 lok. 153-lok. 156 par. 4
  • Komonisa ndenge ya kosalela bavɛrsɛ

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Komonisa ndenge ya kosalela bavɛrsɛ
  • Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Masolo mosusu
  • Komonisa polele ndenge ya kosalela makanisi ya vɛrsɛ
    Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
  • Kotanga mikapo mpe kolimbola ntina oyo otangeli yango
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Kobimisa makanisi ya vɛrsɛ liboso ya kotánga yango
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Ndenge nini okoki kokotisa moto kati na Biblia
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
Makambo mosusu
Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
be liteya 22 lok. 153-lok. 156 par. 4

LITEYA 22

Komonisa ndenge ya kosalela bavɛrsɛ

Osengeli kosala nini?

Ntango ozali komonisa bato ndenge ya kosalela vɛrsɛ moko na bomoi na bango, maloba na yo esengeli koyokana na oyo mokapo wana mpe Biblia mobimba elobi; esengeli mpe koyokana na makambo oyo “moombo ya sembo mpe ya mayele” abimisi na mikanda.

Yango ezali na ntina nini?

Koteya bato Liloba ya Nzambe ezali likambo ya lisɛki te. Mokano ya Nzambe ezali ete bato bákóma na “boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Tim. 2:3, 4) Yango epesi biso mokumba ya koteya Liloba ya Nzambe na lolenge oyo ebongi mpenza.

NTANGO tozali koteya bato, ekoki kaka te kotánga bavɛrsɛ na kati ya Biblia. Ntoma Paulo akomelaki moninga na ye ya mosala Timote ete: “Salá nyonso oyo ekoki na yo mpo omimonisa moto oyo andimami na Nzambe, mosali oyo azali na eloko moko te ya koyokela nsɔni, oyo azali kosembola liloba ya solo malamumalamu.”​—2 Tim. 2:15.

Yango elingi koloba ete ntango tozali kolimbola bavɛrsɛ, maloba na biso esengeli koyokana na makambo oyo Biblia yango moko ezali koteya. Yango esɛngi mpe ete tótalelaka bavɛrsɛ oyo ezali liboso mpe nsima ya oyo tozali kotánga, na esika ya kopona kaka maloba oyo esepelisi biso mpe kobakisa makanisi na biso moko. Na nzela ya mosakoli Yilimia, Yehova akebisaki basakoli oyo bazalaki koloba ete bazali koloba makambo oyo euti na Yehova, nzokande bazalaki koloba “emonaneli ya mitema na bango mpenza.” (Yil. 23:16) Ntoma Paulo alobaki boye mpo na kokebisa baklisto ete bábebisa Liloba ya Nzambe na mateya ya bafilozofi te: “Tobwaki makambo ya kobombama oyo eyokisaka nsɔni, tozali te kotambola na mayele mabe, tozali mpe te kobebisa liloba ya Nzambe.” Na ntango wana, bato ya mombongo oyo bazalaki sembo te bazalaki kobakisa mai na vinyo na bango ya kotɛka mpo ekóma ebele mpe bázwa mbongo mingi. Biso tozali kobebisa Liloba ya Nzambe te, elingi koloba, tozali te kosangisa yango na mateya ya bafilozofi ya bato. Paulo alobaki boye: “Tozali te batɛkisi ya liloba ya Nzambe ndenge bato mingi bazali, kasi nde na bosembo, ɛɛ, lokola bato batindami na Nzambe, na miso ya Nzambe, esika moko na Klisto, tozali koloba.”​—2 Kol. 2:17; 4:2.

Mbala mosusu, okoki kozongela maloba ya vɛrsɛ moko mpo na komonisa etinda moko ya Biblia. Biblia etondi na mitinda oyo ekoki kolakisa biso ndenge oyo tokoki kosala ntango tokutani na makambo ndenge na ndenge. (2 Tim. 3:16, 17) Kasi osengeli kosala ete ndenge oyo ozali kolakisa bato básalela vɛrsɛ yango ezala mpenza oyo ebongi; kosalela vɛrsɛ yango na lolenge mabe te, noki te ekomonana lokola nde olingi vɛrsɛ wana eloba makambo oyo yo moko olingi. (Nz. 91:11, 12; Mat. 4:5, 6) Ntango ozali komonisa bato ndenge ya kosalela vɛrsɛ moko, yango esengeli koyokana na mokano ya Yehova mpe Liloba ya Nzambe na mobimba na yango.

“Kosembola liloba ya solo” elimboli mpe kokanga ntina ya likambo oyo Biblia ezali koloba. Ezali te lokola “nzete” oyo osengeli kobɛta na yango basusu. Bakonzi ya mangomba oyo batɛmɛlaki Yesu bazalaki kotánga bavɛrsɛ ya Biblia, kasi bazalaki kokanga miso na bango na makambo eleki minene oyo Nzambe azalaki kosɛnga, na ndakisa makambo oyo esɛngi bosembo mpe motema mawa mpe kondima. (Mat. 22:23, 24; 23:23, 24) Ntango Yesu azalaki koteya Liloba ya Nzambe, azalaki komonisa mpenza bomoto ya Tata na ye. Longola molende na ye mpo na solo, Yesu azalaki mpe kolinga mpenzampenza bato oyo ye azalaki koteya. Tosengeli kosala makasi mpo na kolanda ndakisa na ye.​—Mat. 11:28.

Ndenge nini tokoki koyeba ete tozali komonisa malamu mpenza ndenge ya kosalela vɛrsɛ moko? Kotánga Biblia mbala na mbala ekosalisa biso. Tosengeli mpe kosepela na “moombo ya sembo mpe ya mayele” oyo Yehova apesi biso, elingi koloba, lisangani ya baklisto bapakolami oyo Yehova azali kosalela mpo na kopesa bilei ya elimo na ndako ya kondima. (Mat. 24:45) Soki tozali koyekola biso moko, koyangana na makita ya lisangá mbala na mbala mpe kopesa biyano, yango ekosalisa biso tózwa litomba na mateya oyo tozali kozwa na nzela ya moombo ya sembo mpe ya mayele.

Soki mokanda Ndenge ya kosolola na bato na Makomami ezali na monɔkɔ oyo oyebi, yekolá kosalela mokanda yango malamu mpenza, ekosalisa yo na ndenge ebongi mpo na kosalela malamu mpenza bavɛrsɛ mingi oyo totángaka mbala na mbala na mosala ya kosakola. Soki olingi kosalela vɛrsɛ moko oyo omeseni na yango mpenza te, osengeli komikitisa mpe kolukaluka na mikanda mpo ntango okoloba, osembola liloba ya solo.​—Mas. 11:2.

Monisá polele ndenge ya kosalela vɛrsɛ. Ntango ozali koteya bato, luká mpenza ete bámona polele boyokani oyo ezali na kati ya lisolo na yo mpe bavɛrsɛ oyo ozali kopesa bango. Soki obimisi motuna moko liboso ya kotánga vɛrsɛ, bato oyo bazali koyoka yo basengeli komona ndenge vɛrsɛ yango ezali koyanola na motuna wana. Soki opesi vɛrsɛ mpo na kosimba makanisi oyo obimisaki, luká mpenza ete moto oyo ozali koyekola na ye amona polele ndenge vɛrsɛ wana endimisi likanisi yango.

Mbala mingi, ekoki kaka te kotánga vɛrsɛ, ata soki ozali konyata maloba ya ntina. Kobosana te ete bato bameseni mpenza na Biblia te mpe na ntembe te, bakokanga ntina ya likanisi na yo te kaka ntango bayoki vɛrsɛ yango mbala moko. Bendá likebi na bango na maloba ya vɛrsɛ oyo eyokani mpenza na likambo oyo bozali kolobela.

Mbala mingi yango esɛngaka ete obimisa maloba ya ntina, oyo eyokani mpenza na likambo oyo bozali kolobela. Lolenge ya pɛtɛɛ ya kosala bongo ezali ya kozongela maloba wana oyo ezali na makanisi ya ntina. Soki ozali kosolola na moto moko, okoki kotuna ye mituna oyo ekosalisa ye ayeba maloba wana ya ntina. Balobi mosusu, ntango bazali koloba na bato mingi, basepelaka kobimisa makanisi yango na maloba mosusu to bazongelaka likanisi yango mpo kaka maloba ya ntina ebima. Nzokande, soki okosala bongo, kebá ete bato oyo bazali koyoka yo bábungisa te boyokani oyo ezali na kati ya likambo oyo ozali kolobela mpe maloba ya vɛrsɛ.

Soki obimisi maloba ya ntina, na yango okobongisa malamu nzela na yo. Sikoyo landá lisolo na yo. Liboso ya kotánga vɛrsɛ yango, omonisaki polele ntina oyo ozali kotánga yango? Soki ezali bongo, monisá ndenge maloba oyo onyataki eyokani na makambo oyo otindaki bato oyo bazali koyoka yo bákanisa yango. Monisá polele boyokani oyo ezali na kati na yango. Ata soki omonisaki polele te ntina ya vɛrsɛ wana liboso ya kotánga yango, boyokani esengeli kozala na kati ya maloba oyo olobaki liboso mpe nsima ya kotánga vɛrsɛ.

Bafalisai batunaki Yesu motuna oyo bango bakanisaki ete ezali mpasi; motuna yango ezalaki boye: “Epesami nzela na mobali ete aboma libala ná mwasi na ye mpo na ntina ya ndenge nyonso?” Yesu apesaki bango eyano oyo euti na Genese 2:24. Omoni ete Yesu atyaki likebi na ye kaka na mwa maloba ya vɛrsɛ wana mpe na nsima, amonisaki bango ndenge ya kosalela yango. Nsima ya komonisa ete mobali na mwasi na ye bakómi “mosuni moko kaka,” Yesu asukisaki boye: “Oyo Nzambe akangisi esika moko moto akabola yango te.”​—Mat. 19:3-6.

Makambo boni osengeli koloba mpo na komonisa polele ndenge ya kosalela vɛrsɛ moko? Mpo na koyeba yango, osengeli kotalela soki banani bakoyoka lisolo na yo mpe soki lisolo yango ekozala na ntina nini. Luká kozala na maloba ya pɛtɛɛ mpe oyo ezali komonisa polele likanisi ya ntina ya lisolo.

Kosolola na bato na lisalisi ya Makomami. Misala 17:2, 3 eyebisi biso ete ntango ntoma Paulo azalaki kosakola na Tesaloniki, “azalaki kosolola elongo na bango uta na Makomami.” Mosaleli nyonso ya Yehova asengeli kosala makasi ayeba mpe kosala bongo. Na ndakisa, Paulo alobelaki makambo oyo etalaki bomoi mpe mosala ya Yesu, amonisaki ete makambo yango esakolamaki na kati ya Makomami ya Liebele mpe asukisaki na maloba ya polele oyo: “Ye azali Klisto, Yesu oyo ngai nazali kosakola epai na bino.”

Ntango akomelaki Baebele, Paulo azongelaki mbala na mbala maloba ya Makomami ya Liebele. Mbala mingi, mpo na koyebisa likambo moko to komonisa yango polele, azalaki konyata liloba moko to mwa maloba mpe na nsima, azalaki kolimbola yango. (Ebe. 12:26, 27) Na lisolo oyo ezali na Baebele mokapo 3, Paulo azongeli maloba ya Nzembo 95:7-11. Na nsima, talá ndenge alobeli mingimingi makambo misato na bavɛrsɛ yango: (1) alobeli motema (Ebe. 3:8-12), (2) alimboli maloba “Lelo oyo” (Ebe. 3:7, 13-15; 4:6-11), mpe (3) alimboli maloba: “Bakokɔta te na kati ya kopema na ngai” (Ebe. 3:11, 18, 19; 4:1-11). Salá makasi olanda ndakisa wana ntango ozali komonisa bato ndenge ya kosalela vɛrsɛ mokomoko.

Talá na Luka 10:25-37, okomona ndenge Yesu asololaki malamu mpenza na bato na lisalisi ya Makomami. Molakisi moko ya Mibeko atunaki ye boye: “Moteyi, na kosaláká nini nakozwa libula ya bomoi ya seko?” Mpo na koyanola ye, Yesu asɛngaki moto yango apesa libosoliboso likanisi na ye moko na likambo yango mpe na nsima, Yesu amonisaki mpenza ntina ya kosala makambo oyo Liloba ya Nzambe elobi. Ntango emonanaki polele ete moto yango akangaki ntina ya likambo wana te, Yesu alobelaki mingi mpenza liloba moko mpamba ya makomi yango: liloba “mozalani.” Na esika ete alimbola kaka yango, asalelaki lisese moko mpo na kosalisa moto yango ye moko akóma na likanisi oyo esengelaki.

Emonani polele ete ntango Yesu azalaki koyanola na mituna, azalaki kaka te kopesa bavɛrsɛ oyo ezali koyanola mbala moko mpe na lolenge ya polele na mituna yango. Azalaki kotalela malamumalamu makambo oyo bavɛrsɛ yango elobeli mpe na nsima, azalaki komonisa ndenge oyo yango eyanoli na motuna oyo batuni ye.

Ntango Basadukai babɛtaki ntembe mpo na elikya ya lisekwa, Yesu alobelaki mingimingi mwa maloba ya Exode 3:6. Kasi asukaki kaka te na kotánga maloba ya vɛrsɛ wana. Asololaki na bango na lisalisi ya vɛrsɛ yango mpo na komonisa polele ete lisekwa ezali mokano ya Nzambe.​—Mko. 12:24-27.

Koyeba kosolola na bato malamumalamu mpe na ndenge oyo esengeli na lisalisi ya Makomami ekosalisa yo mpenza mpo okóma moteyi oyo abongi mpenza.

NDENGE YA KOYEBA KOSALA YANGO

  • Tángáká Biblia mbala na mbala. Yekoláká Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe tángáká malamu mpenza masolo oyo ekosalema na makita ya lisangá.

  • Luká koyeba malamumalamu ndimbola ya maloba oyo ezali na kati ya vɛrsɛ nyonso oyo okosalela. Tángá vɛrsɛ yango malamumalamu mpo okanga mpenza ntina ya maloba na yango.

  • Zalá na momeseno ya kolukaluka na kati ya mikanda na biso ya boklisto.

DEVUARE: Kanisá likoló na maloba ya 2 Petelo 3:7. Vɛrsɛ yango ezali nde komonisa ete mabele ekobebisama na mɔ́tɔ? (Ntango ozali kolimbola “mabele,” talelá mpe ndimbola ya “makoló.” Bavɛrsɛ nini emonisi ete “mabele” ekoki mpe kozala na ndimbola ya elilingi? Lokola vɛrsɛ 7 emonisi yango, banani to nini ekobebisama mpenza? Ndenge nini yango eyokani na likambo oyo esalemaki na mikolo ya Noa, oyo elobelami na vɛrsɛ 5 mpe 6?)

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto