LITEYA 42
Eteya mpenza bato oyo bakoyoka yo
MPO lisolo na yo eteya mpenza bato oyo bakoyoka yo, kosuka kaka te na kolobela likambo moko ya ntina. Omituna nde boye: ‘Mpo na nini bato oyo basengeli koyoka lisolo oyo? Eloko nini nakoloba mpo bato oyo bakoyoka ngai bámiyoka mpenza ete lisolo yango esalisi bango?
Na eteyelo oyo, soki bapesi yo lisolo ya kolakisa ndenge okoki kopesa moto litatoli, ndeko oyo okosala na ye lisolo nde akozala lokola moto oyo ozali koteya. Na masolo mosusu, bato oyo okoteya ekozala nde lisangá mobimba.
Makambo oyo bato oyo bakoyoka yo bayebi. Omituna boye: ‘Makambo nini bato oyo bakoyoka ngai bayebi na lisolo oyo?’ Wana nde likanisi ya ntina oyo okobanda na yango lisolo na yo. Soki ozali kosala lisolo yango na lisangá oyo ezali na baklisto mingi oyo bakɔmelá, kosuka kaka te na kozongela mateya ya ebandeli, oyo mingi na bango bayebi. Bakisá makanisi mosusu likoló ya mateya wana ya ebandeli. Kasi, soki bato mingi ya sika, oyo basepelaka na solo bazali wana, kobosana bango te.
Mpo na koyeba likambo nini okolekisa nokinoki mpe nini okolobela malɛmbɛmalɛmbɛ, ekozala malamu kotalela makambo oyo bayoki na yo bayebi. Soki okɔtisi na lisolo na yo makambo oyo omoni ete bato mingi bayebi, lobelá yango mwa nokinoki. Kasi kende malɛmbɛmalɛmbɛ ntango ozali kolobela makambo oyo ekoki kozala ya sika mpo na bato mingi oyo bazali kolanda yo; na ndenge wana nde bakosimba makanisi yango malamumalamu.
Oyo ekoteya bato. Mpo na koteya bato, ezali kosɛnga kaka te koloba likambo moko ya sika. Bato mosusu oyo basalaka masolo bazalaka na elobeli moko ya kitoko, ya pɛtɛɛ, ntango bazali kolobela solo mosusu oyo bato bayokaka mbala na mbala, mpe yango esalisaka bato mingi oyo bazali kolanda lisolo bákanga mpenza ntina nyonso ya mateya wana mpo na mbala ya liboso.
Na mosala ya kosakola, soki olingi komonisa moto ete tozali na mikolo ya nsuka, okoki koyebisa ye nsango ya likambo moko oyo esalemi na mokili; kasi kosuka wana te. Tángá mpe Biblia mpo na kolakisa ye ntina ya likambo wana. Soki osali bongo, lisolo na yo ekoteya ye mpenza. Ndenge moko mpe, ntango ozali kolobela likambo moko oyo tomonaka na kati ya biloko Nzambe asalá, to mpe likambo moko oyo etali banzete to banyama, mokano na yo ekozala te ya kolakisa moto yango liteya ya siansi oyo ekokamwisa ye mpo ayoki yango mbala ya liboso. Yo luká nde koyokanisa Biblia na makambo oyo ye azali komona na biloko Nzambe asalá mpo na kolakisa moto yango ete Mozalisi azali mpenza mpe alingi biso mingi. Bongo akokóma komona makambo wana na ndenge ya sika.
Ezalaka etumba soki basɛngi yo osala lisolo moko oyo bato bayokáyoká mbala mingi. Kasi mpo na kozala moteyi malamu, osengeli koyekola ndenge ya kosala yango malamu mpenza. Okosala yango ndenge nini?
Kolukaluka makanisi na mikanda ekosalisa yo. Na esika ya kolobela kaka makanisi oyo eyeli yo mbala moko na motó, luká nde makanisi na mikanda oyo balobeli na lokasa 33 tii na 38. Simbá toli oyo bapesi kuna na ntina etali mikano oyo okosala makasi okokisa. Ntango ozali kolukaluka na mikanda, mbala mosusu okokutana na likambo moko oyo esalemá kala, oyo bato mingi bayebi te, kasi oyo eyokani na lisolo na yo. To mpe okoki komona likambo moko boye oyo eutaki kosalema, oyo okopesa lokola ndakisa mpo na kolimbola makambo oyo okolobela.
Ntango ozali kotalela makambo oyo okolobela na lisolo na yo, salisá mpe bɔɔngɔ na yo mosala na mituna lokola oyo: eloko nini? mpo na nini? ntango nini? epai wapi? nani? mpe ndenge nini? Na ndakisa: Nini emonisi ete likambo oyo ezali solo? Ndenge nini nakoki komonisa moto ete likambo yango ezali mpenza bongo? Makanisi nini ekɔtelá bato mingi, oyo ekosala ete bato mosusu bákanga mpenza ntina te na liteya oyo ya Biblia? Yango ezali mpenza na ntina nini? Ndenge nini ekoki kosalisa moto na bomoi na ye? Ndakisa nini ezali komonisa bolamu ya likambo yango? Liteya yango ya Biblia ezali kolakisa biso nini na bomoto ya Yehova? To mpe, soki ekoyokana na lisolo na yo, okoki kotuna boye: Ntango nini likambo yango esalamaki? Ndenge nini tokoki kosalela makambo ya lisolo oyo lelo mpo na kozwela yango bolamu? Ntango ozali kosala lisukulu na yo, okoki kotuna mwa mituna ya ndenge wana mpe kopesa biyano mpo makambo oyo ozali koloba emonana lokola ezali kosalema sikoyo.
Lisolo na yo ekoki kosɛnga otánga mikapo oyo bato bamesaná na yango. Okoki kosala nini mpo makanisi oyo okopesa eteya bango? Kosuka kaka te na kotánga yango, limbolá mpe.
Ntango ozali kolobela vɛrsɛ moko oyo bato bamesaná na yango, okoki koteya bango soki okati vɛrsɛ yango ndambondambo, mpe oponi biteni oyo eyokani na motó ya likambo ya lisolo na yo mpe na nsima olimboli yango. Na ndakisa, zwá mokapo ya Mika 6:8 na kati ya Libongoli ya Mokili ya Sika mpe talá ndenge okoki kolimbola yango. “Boyengebene” ezali nini? Malako ya boyengebene ya nani bazali kolobela awa? Ndakisa nini okoki kopesa mpo na kolimbola oyo babengi “kosalela boyengebene” to “kolinga boboto”? Komikitisa elakisi nini? Ndenge nini okoki kosalela mateya yango mpo na moto oyo akómi mobange? Makambo oyo yo okopona mpo na kolobela na lisolo na yo esengeli koyokana na motó ya likambo na yo, na ntina ya lisolo na yo, ebonga mpenza na bato oyo bakoyoka yo, mpe epesa yo nzela ya kotosa ngonga oyo bapesi.
Kolimbola maloba na mokuse esalisaka mpe bato. Ezali na bato oyo bakamwaka mingi ntango opesi bango ndimbola ya liloba “bokonzi” oyo ezali na Matai 6:10. Ata moklisto oyo aumeli mingi, soki omonisi ye lisusu ndimbola ya liloba moko boye na kati ya vɛrsɛ moko, yango ekoki kosalisa ye asosola lisusu vɛrsɛ wana malamumalamu. Likambo yango ezali komonana soki totángi 2 Petelo 1:5-8 mpe na nsima tolimboli makambo ndenge na ndenge oyo balobeli na bavɛrsɛ yango lokola: kondima, bizaleli malamu, boyebi, komipekisa, koyika mpiko, ezaleli ya kokangama na Nzambe, bolingo ya bandeko, mpe bolingo. Ntango maloba mibale oyo esalá lokola ekokana esalelami na kati ya mokapo moko, kolimbola maloba wana ekoki kosalisa bato báyeba kokesenisa yango. Likambo wana emonanaka mingi na maloba lokola bwanya, boyebi, bososoli, mpe mayele, oyo Masese 2:1-6 (NW) elobeli.
Bato oyo bazali koyoka yo bakoki komona ete oteyi bango mpenza soki okamati vɛrsɛ moko mpe olandeli yango malamumalamu yo na bango. Bato mingi bakamwaka ntango bamoni mpo na mbala ya liboso ete na Genese 2:7, Babiblia mosusu elobi ete Adama azalaki molimo ya bomoi mpe na Ezekiele 18:4, balobi ete milimo ekufaka. Mokolo moko, Yesu akamwisaki Basadukai na makanisi ya vɛrsɛ ya Exode 3:6, oyo bango bazalaki koloba ete bandimaka; azwaki makanisi ya vɛrsɛ wana mpo na komonisa bango ete ezali kolobela lisekwa.—Luka 20:37, 38.
Na bantango mosusu, soki olingi kofungola bato makanisi, okoki kolobela makambo oyo ezali na bavɛrsɛ oyo ezali liboso mpe nsima ya vɛrsɛ oyo otángi, to makambo oyo ezalaki kosalema na ntango bazalaki kokoma yango, nkombo mpe makambo mosusu ya moto oyo azali koloba to mpe oyo azali koyoka vɛrsɛ yango. Bafalisai bayebaki malamu Nzembo 110. Kasi Yesu abendaki makanisi na bango likoló ya likambo moko ya ntina mingi oyo ezali na vɛrsɛ ya liboso. Atunaki bango boye: “‘Bokanisi nini mpo na Klisto? Azali mwana ya nani?’ Bango balobaki na ye ete: ‘Ya Davidi.’ Ye alobaki na bango ete: ‘Boye, ndenge nini Davidi na kopemama azali kobenga ye “Nkolo,” kolobáká ete, “Yehova alobaki na Nkolo na ngai ete: ‘Fandá na lobɔkɔ na ngai ya mobali tii nakotya banguna na yo na nse ya makolo na yo’”? Na yango, soki Davidi azali kobenga ye “Nkolo,” ndenge nini ye azali mwana na ye?’” (Mat. 22:41-45) Soki ozali kolandela Makomami ndenge Yesu alandelaki yango, okosalisa bato bákóma kotánga Liloba ya Nzambe na likebi mingi koleka.
Soki moto oyo azali kosala lisolo alobeli ntango oyo mokanda moko ya Biblia ekomamaki to ntango likambo moko boye esalemaki, ekozala malamu amonisa mpe ndenge nini makambo ezalaki koleka na ntango wana. Na ndenge yango, bato oyo bazali koyoka ye bakomona mpenza ntina ya mokanda yango to ya likambo yango.
Kokokanisa makambo ekoki mpe kosala ete makambo oyo ozali koloba eteya mpenza bato. Okoki komonisa ndenge nini likanisi ya bato na likambo moko boye ekeseni na likanisi ya Biblia. Okoki mpe kokokanisa masolo mibale na kati ya Biblia oyo elobeli likambo moko. Masolo yango ekeseni nde na makambo mosusu? Mpo na nini? Liteya nini tokoki kozwa na yango? Soki osali bongo, bato oyo bazali koyoka yo bakomona ete lisolo na yo ekómi ya sika.
Soki bapesi yo lisolo ya kolobela motindo moko boye oyo baklisto basalaka mosala na bango ya kosakola, okoki kokómisa lisolo na yo kitoko soki na ebandeli, oyebisi bato makanisi ya lisolo yango mobimba na mokuse. Monisá eloko nini ebongi kosala, ntina na yango, mpe na ndenge nini yango eyokani na mikano nyonso oyo biso Batatoli ya Yehova tozalaka na yango. Na nsima, monisá esika nini, ntango nini, mpe ndenge nini mosala yango esengeli kosalema.
Tokoloba boni soki lisolo na yo esɛngi olobela mwa ndambo ya “makambo mozindo ya Nzambe”? (1 Kol. 2:10) Soki na ebandeli, olakisi makambo ya ntina na lisolo yango mpe olimboli mokomoko na yango, mwa makambo mosusu ya mikemike oyo etikali ekozala lisusu mpasi te mpo na kokanga ntina na yango. Mpe na nsuka ya lisolo, soki olobeli na mokuse makanisi na yango nyonso, bato oyo bazali koyoka yo bakozanga te komiyoka ete bazwi mwa eloko ya malonga na lisolo yango.
Toli mpo na kozala na bomoi oyo ebongi na baklisto. Bato oyo bazali koyoka yo bakozwa bolamu mingimingi mpenza soki osalisi bango báyeba ndenge nini makambo oyo ezali na lisolo na yo etali bomoi na bango. Ntango ozali kotalela mikapo oyo ezali na lisolo oyo ozali kosala, omituna boye: ‘Mpo na nini babatelaki makambo oyo na kati ya Makomami tii lelo oyo?’ (Lom. 15:4; 1 Kol. 10:11) Kanisá makambo oyo bato oyo bazali koyoka yo bazali kokutana na yango na bomoi. Luká koyeba toli nini mpe mateya nini ya Makomami ebongi mpo na makambo yango. Ntango ozali kosala lisukulu na yo, limbolelá bato Makomami malamumalamu mpo bámona ndenge oyo ekoki kosalisa bango ntango bakutani na makambo ya ndenge wana. Kolobela makambo likolólikoló te. Lobelá ezaleli mokomoko mpe likambo mokomoko ya kosala.
Mpo na kosalela toli oyo touti kopesa, bandá naino na moko to mibale ntango ozali kobongisa lisukulu na yo. Soki omeseni na yango nde okoki kobakisa mosusu. Nsima ya mikolo, yo moko okomona ete bato bakokóma kozela masukulu na yo na mposa makasi, mpo bayebi ete bakozanga te koyoka likambo moko ya malamu oyo ekosalisa bango.