Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lmd liteya 7
  • Kotika te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kotika te
  • Lingá bato—Kómisá bango bayekoli
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Oyo Paulo asalaki
  • Ndakisa ya Paulo eteyi biso nini?
  • Mekolá Paulo
  • Komikitisa
    Lingá bato—Kómisá bango bayekoli
  • Likambo oyo ekobenda likebi
    Lingá bato—Kómisá bango bayekoli
  • Motema molai
    Lingá bato—Kómisá bango bayekoli
  • Ntango nini tosengeli kozongela bato oyo basepelaki?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
Makambo mosusu
Lingá bato—Kómisá bango bayekoli
lmd liteya 7

KOLANDELA BOKOLI

Ntoma Paulo azali kosakwela bato na ndako moko ya eteyelo.

Mis. 19:​8-10

LITEYA 7

Kotika te

Etinda: “Bakobaki koteya mpe kosakola nsango malamu.”—Mis. 5:42.

Oyo Paulo asalaki

Ntoma Paulo azali kosakwela bato na ndako moko ya eteyelo.

VIDEO: Paulo atikaki te kosakola na Efese

1. Talá VIDEO, to tángá Misala 19:​8-10. Na nsima talelá mituna oyo elandi:

  1. Na esika atika kosakola ntango bato mosusu batɛmɛlaki ye, ndenge nini Paulo akobaki kosalisa baoyo basepelaki koyoka ye?

  2. Mbala boni Paulo azongaki mpo na koteya baoyo basepelaki, mpe asalaki yango na boumeli ya ntango boni?

Ndakisa ya Paulo eteyi biso nini?

2. Tosengeli kozwaka ntango mpe kosala milende mpo na kozongela bato mpe kobanda koyekola na bango Biblia.

Mekolá Paulo

3. Tyá programɛ oyo ebongi mpo na moto oyo okokende kotala. Omituna boye: ‘Ntango nini mpe esika nini ekosimba mpo nakutana na ye? Ntango nini mpe esika nini akondima tósolola?’ Ndimá kokende kotala ye ata soki ngonga na ye eyokani te na oyo ya yo.

4. Sɛngá moto yango ayebisa yo mokolo oyo bokoki kosolola lisusu. Na nsuka ya lisolo nyonso, bóyokana ngonga oyo bokoki kosolola lisusu. Salá makasi otosa mokolo mpe ngonga oyo boyokani.

5. Zalá na elikya. Koloba mbala moko te ete moto oyo okutaka te mbala mingi na ndako to mpe oyo azalaka na makambo mingi ya kosala, azali kosepela te. (1 Ko. 13:​4, 7) Salá oyo okoki mpo na kokutana na moto yango, kasi salelá ntango na yo na mayele.—1 Ko. 9:26.

TALÁ MPE

Mis. 10:42; 1 Ko. 9:​22, 23; 2 Ko. 4:1; Ga. 6:9

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto