Bato bayebi makambo mingi kasi babongwani mpenza te
“Atako siansi elongi kosala makambo mingi mikolo oyo, bato babongwani mpenza te na boumeli ya bambula nkóto mibale oyo euti koleka; yango wana ezali naino na liteya oyo tosengeli koluka kozwa na makambo ya kala.” —Kenneth Clark, Civilisation: Un avis personnel (na Lingelisi).
NTEMBE ezali te ete na bikeke oyo eleki, siansi esali makambo mingi ya minene na ndenge ya kokamwa mpenza. Zulunalo moko (Time) elobi ete makambo mingi oyo siansi esali epesi nzela na “bamilio ya bato lelo bákóma na bomoi ya malamu koleka bato ya kala.” Kati na ebele ya makambo yango ya minene oyo siansi esali, tokoki koloba ndenge mayele ya monganga ekómi mpenza mosika. Zoé Oldenbourg, moto ya mayele na makambo ya kala, alobi ete na eleko ya Moyen Âge, “mosala ya monganga ezalaki kaka bongo na bongo mpe ezalaki kosalema na ndenge ya kopesa mpasi mpenza. Monganga akokaki to kobikisa moto, to mpe koboma ye.”
Balingi kaka kozwa liteya te
Bato balingi kaka kozwa liteya te. Na ndakisa, pene na nsuka ya bambula ya 1800, minganga mingi baboyaki kondima makambo oyo ezalaki komonisa polele ete bango moko mpe bazalaki kopesa maladi na bato mosusu oyo bango bazalaki kosalisa. Bazalaki koboya kotika mimeseno oyo ezalaki mpenza likama mpe bazalaki kolinga te kosukola mabɔkɔ ntango basilisi kosalisa moto moko mpe balingi kobanda mosusu.
Atako bongo, siansi mpe mayele ya tekiniki etikaki te kokende liboso. Yango wana, soki totali malamu, bato basengelaki kozwa liteya na makambo oyo eleká mpe koyeba ndenge ya kokómisa mokili oyo esika moko ya kitoko mpe ya kimya. Kasi, makambo esalemi bongo te.
Tózwa ndakisa ya mikili ya Mpoto na bambula ya 1600. Balobaka ete ntango wana ezalaki ntango oyo bato bayebaki makambo mingi mpe bakómaki na makanisi oyo ebongi. Kasi, Kenneth Clark alobi ete “atako mayele ya ntɔki mpe ya siansi ezalaki se kokende liboso, minyoko oyo ezangi ntina mpe bitumba ya nsɔmɔ, koleka kutu ndenge ezalaki liboso, esilaki te.”
Lelo oyo mpe, bato balingi kaka te kozwa liteya na makambo oyo eleká mpo báyeba ndenge ya kokima mabunga oyo bato mosusu basalá. Yango wana, ata bomoi na biso awa na mabele ekómi mpenza na likama. Joseph Needham, ye akomaka babuku, asukisaki ete likambo yango ekómi mpenza likama, na boye ete ‘nyonso oyo tokoki kosala lelo, ezali se kozala na elikya mpe kobondela ete bato ya mitó ligboma bábwakela mokili te nguya moko ya kobebisa, oyo ekolimwisa bikelamu nyonso ya bomoi awa na mabele.’
Mpo na nini, atako ebele ya makambo oyo bato bayebi mpe bayekoli, tozali se kotutana mitó na kati ya mokili oyo etondi na mobulu mpe makambo ya bonyama? Ekozala kaka bongo libela na libela? Masolo mibale oyo elandi ekolobela mituna wana.