Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g05 8/4 lok. 3
  • Bana mike bakómi kobota

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bana mike bakómi kobota
  • Lamuká!—2005
  • Masolo mosusu
  • Bana mike bakómi kozwa zemi Likambo ya mawa na mokili mobimba
    Lamuká!—2005
  • Ndenge ya kolonga mokakatano ya kobota na bomwana
    Lamuká!—2005
  • Ndenge ya kosalisa mpe kobatela bilenge
    Lamuká!—2005
  • Mikakatano oyo bamama bakutanaka na yango
    Lamuká!—2005
Makambo mosusu
Lamuká!—2005
g05 8/4 lok. 3

Bana mike bakómi kobota

“Chéri na ngai azalaki mobali kitoko, azalaki na mbongo, mpe tozalaki kobima na ye mpe kosakana. Ntango namonaki sanza (règles) te, nayebaki ete likambo ezali. Nakoloba nini epai ya mama? Ndenge nini likambo ya boye ekoki kokómela ngai? Nazalaki na mbula 16 mpamba, mpe nayebaki eloko ya kosala te.”​—⁠Nicole.

LELO oyo, Nicolea azali na mbula 37, azali mama ya bana misato, atiká kobangabanga mpe akóma mwasi makasi. Mwana na ye ya liboso azali na mbula 20. Eleki bambula, Nicole azalaki kati na bamilio ya bilenge oyo bazwaka zemi ya balabala. Lokola bana mike nyonso oyo bakómaka bamama, ye mpe azalaki koyeba te asala nini, azwa ekateli nini mpe soki akosuka wapi.

Nicole alingaka mpenza te kolobela bambula wana ya bolenge na ye, oyo epesaki ye mpasi mingi na motema, azalaki kondima te, azalaki kobanga, epesaki ye nkanda, mpe ayebaki te soki akosala nini​—⁠na ntango oyo bilenge mosusu ya mbula na ye bazalaki komitungisa nde mpo na bilamba mpe bapwɛ ya kelasi. Atako bongo, elikya ezangaki te na likambo oyo ekómelaki Nicole. Akolaki na libota oyo bazalaki kolinga ye mingi mpe bamekaki koteya ye mitinda ya bizaleli malamu banda bomwana. Atako na ntango moko boye asalaki lokola kobosana mitinda yango​—⁠mpe abukaki mbuma mabe na yango​—⁠na nsima, kaka mitinda wana esalisaki ye akóma na bomoi ya malamu, bomoi oyo ezali na ntina. Nicole akómaki koloba: “Ezali na yango nsuka ya mokili te.”

Likambo ya mawa, baboti mpe bandeko ya bana mike mingi oyo bakómaka bamama basalisaka bango ndenge wana te​—⁠to batalelaka bango na liso wana te. Mingi na bana mike yango bakanisaka mbala moko ete lokola bazwi zemi, elikya mosusu ezali te, bakoki kosala lisusu eloko te. Basusu batikalá na mpasi na motema mpo basangisaki na bango nzoto na makasi to banyokolaki bango.

Makambo nyonso wana ezali likama mpo na bana oyo bango bakobota. Buku Bilenge oyo babotaka na bomwana​—⁠Mpasi mpe elikya na bango (na Lingelesi) elobi ete bana oyo bana mike babotaka “babotamaka na kilo mingi te, babɛlaka mingi, bakufaka mingi na bomwana, bazwaka nkisi ya malamu te, banyokwamaka na nzala to balyaka malamu te, bamonaka mpasi, mpe bakolaka malamu te lokola bana ya bamama ya mikóló.” Lisusu, mbala mingi bana basi oyo bamama na bango babotaki bango na bomwana mpenza, bazwaka mpe zemi na bomwana koleka bana ya bamama ya mikóló.

Likambo ya bana mike kozwa zemi esuki kaka na mboka na bino? Ndenge nini bana basi oyo baboti na bomwana bakoki kolonga mokakatano ya kobɔkɔla bana na bango? Ezali nde na ndenge mosusu ya kosalisa bilenge bákwea te na mikakatano yango? Masolo oyo elandi ekolobela mituna wana.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Oyo ezali bankombo topesi bango kopesa.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto