Bazali na bolɔkɔ, kasi bazali na bonsomi!
Euti na mokomi na biso na Mexique
BISANGA Marías ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ 90 pembenipembeni ya mbu ya Pasifike, na wɛsti ya Mexique.a Kobanda 1905, María Madre, moko ya bisanga yango, ekómá bolɔkɔ ya ekólo Mexique. Na ntango ya kala, bato bazalaki kobanga bátinda bango na bolɔkɔ kuna, kasi lelo oyo bato ya bolɔkɔ oyo bazali na bizaleli malamu bakómá kosɛnga bátinda bango kuna!
Bato ya bolɔkɔ bakómá kosepela na bolɔkɔ yango, mpamba te, kuna bapesaka bato mosusu ya bolɔkɔ ndingisa ya kofanda elongo na mabota na bango. Na esika ya bandako ya bolɔkɔ oyo ezalaka na maninisa mpe baporte ya mabende, bolɔkɔ yango ezali nde na mwa bandako ya mikemike. Esanga yango ezali mpe na biloko mingi oyo ezalaka na bingumba ya mike. Ezali na telefone, telegrafe, televizyɔ, mpe posita, oyo esalisaka bato ya bolɔkɔ báyeba makambo oyo ezali koleka na mokili. Bana bakoki kokɔta eteyelo ya ebandeli kuna, kasi basengeli kobima na esanga mpo na kokɔta na eteyelo ya ntei. Atako bapekisaka makasi kokende na esanga yango, masuwa ya bapolisi ekendaka kuna mbala moko na pɔsɔ mpo na kotika biloko ya kolya mpe bato oyo bakendaka kotala esanga yango.
Ezali boni mpo na bato ya bolɔkɔ oyo basengeli kozongela bomoi lokola bato nyonso? Bato ya bolɔkɔ oyo bamipesá nkombo colonos, to colons—basengeli kosalaka mosala mwa bangonga mokolo na mokolo. Yango esalisaka bango kaka te bámesana na bomoi lokola bato nyonso, kasi esalisaka mpe bolɔkɔ ezwa mwa mbongo mpo na misala na yango mosusu. Ba colonos bazalaka mpe na bonsomi ya kosala misala na bango moko, na ndakisa, kosala mwa elanga to misala mosusu ya mabɔkɔ mpo na kozwa mbongo. Yango elingi koloba te ete bolɔkɔ yango ezangi mibeko. Ntɔngɔ nyonso, bato ya bolɔkɔ basengeli kokende kondima ntango bazali kobenga bankombo na bango mpe kotosa ekombela (couvre-feu) oyo ebandaka na ngonga ya 9:00 nyonso ya butu.
Esanga Marías ekómi na bonsomi ya elimo
Na mobu 1985, colono moko oyo bandeko na ye bazalaki Batatoli ya Yehova, asɛngaki básalisa ye na elimo. Abandaki koyekola Biblia na nzela ya mikanda oyo bazalaki kotindela ye. Na nsima ya mikolo, mwa etuluku moko ya bayekoli ya Biblia esalemaki kuna mpe bakómaki kosala makita. Nsima ya kozwa ndingisa epai ya bakonzi ya Leta, Batatoli ya Yehova bakómaki kokende mbala na mbala na esanga yango—bazalaki kokatisa na butu, mpe bazalaki kosala ngonga 13 banda na Mazatlán tii na esangá yango. Na bambula oyo eleki, bato ya bolɔkɔ 40 bayekolaki solo ya Liloba ya Nzambe, bazwaki batisimo mpe nsima ya kosilisa bambula ya bolɔkɔ oyo bakatelaki bango, babimaki na bolɔkɔ. Ntango tozali kokoma lisolo oyo, Batatoli motoba bazali naino na esanga yango, mpe bato soki 25 bayanganaka na makita ya boklisto.
Bankonzi ya Leta basepelaka mingi na milende oyo Batatoli ya Yehova bazali kosala, mpe bato nyonso bamemyaka bato ya bolɔkɔ oyo bazali kokóma Batatoli. Eleki mwa mikolo, mokambi-molandi ya bolɔkɔ yango alobaki na Motatoli moko oyo akendeki kotala esanga yango, boye: “Ezali esengo mpenza komona ete bino mpe bozali kosala nyonso lokola biso, mpo bato ya bolɔkɔ bázala na nzoto malamu mpe na bizaleli malamu, bomibanzabanzaka mpenza mpo na bango! Tokosala nyonso mpo na kopesa bino mabɔkɔ.” Moto yango alobaki ete akobongisa ndako oyo bapesaki bandeko ndingisa ya kosalaka makita.
Motatoli moko oyo azwi batisimo—asalá mbula zomi na bolɔkɔ—alobaki boye: “Ntango bandeko oyo bayaka kotala biso batunaka ngai soki nakondima kolongwa na esanga oyo, nayebisaka bango ete nalingi kokoba kosala awa; namonaka yango lokola teritware oyo bapesi ngai, mpamba te awa mposa ezali mingi. Atako nazali mpe na mposa ya kokende na mayangani mpe kokutana na bandeko na ngai baklisto.” Ntango mosusu, akoki kobima na bolɔkɔ na mbula ekoya, mpo na etamboli na ye ya malamu.
Bolɔkɔ ya esanga Marías ebimisi matomba mingi na oyo etali kosalisa bato ya bolɔkɔ bámesana lisusu na bomoi lokola bato nyonso. Atako bongo, nsango ya Bokonzi nde epesi bato yango bonsomi ya elimo ya solosolo mpe lolenge ya bomoi oyo ebongi, ‘kosikolama ya bakangami’ mpe ‘kofungwama ya miso ya bato ya bolɔkɔ’—Luka 4:18; Yisaya 61:1.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Atako babengaka yango mpe Las Tres Marías, to “Les trois Maries,” bisanga yango ezali minei; kasi misato ezali na bato te.
[Etanda/Bililingi na lokasa 17]
Azalaki momɛli bangi, akómi nkulutu na lisangá
Guillermo akɔtaki bolɔkɔ mpo azalaki kotɛka bangi mpe komɛla yango. Ntango batindaki ye na esanga Marías, azalaki kaka komɛla bangi. Kasi amonaki ete bato mosusu ya bolɔkɔ oyo bakatelaki bango bambula mingi ya bolɔkɔ mpo na makambo lokola kotɛka bangi, bazalaki kolata malamu, bazalaki na esengo, mpe bazalaki bandakisa malamu. Ntango ayebaki ete bato yango bazalaki koyekola Biblia elongo na Batatoli ya Yehova, andimaki kokende na makita na bango. Na nsima, akómaki koyekola Biblia mbala na mbala.
Guillermo abongolaki bomoi na ye mobimba mpe mwa moke na nsima, abimaki na bolɔkɔ. Ntango abimaki na bolɔkɔ, alukaki mbala moko Batatoli ya Yehova mpo na kokoba koyekola. Lelo oyo, azali nkulutu na lisangá, mpe bato 17 ya libota na ye bazali Batatoli ya Yehova. Alobi boye: “Ezali libaku monene koyeba Yehova mpe kotika misala nyonso wana ya mabe. Baninga na ngai mingi ya kala bakufi mpo na bangi. Bangi ebebisaki bɔɔngɔ na ngai, mpe nazalaki lisusu kokoka te kokanga makambo na motó. Kasi, lolenge ya koyekola ya Batatoli esalisi ngai nazongela makoki na ngai ya kokanga makambo. Minganga bakamwaki mingi ntango bamonaki ngai mpo bazalaki kokanisa ete nakobonga lisusu te. Solo ya Biblia esali makambo ya kokamwa mpenza mpo na ngai mpe libota na ngai! Liboso tozalaki komoniselana bolingo te, kasi sikoyo tokómi na bomoko.”
[Karte na lokasa 16]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Mazatlán
Bisanga ya Marías
María Madre
[Elilingi na lokasa 16]
“Ba Colonos” ná mabota na bango bayanganaka na Ndako ya Bokonzi ya María Madre