Mbuma oyo etamboli mokili mobimba
Buku nyonso mpo na kafe (na Lingelesi) elobeli lisolo ya moto moko oyo alingaki mwa nzete na ye ya kafe mingi ete ezali “lisolo eleki kitoko ya kopalangana ya kafe.” Zulunalo moko (Scientific American) elobi ete mwa nzete wana moko ya kafe nde esali ete kafe ekóma lelo oyo mombongo oyo ezali kobimisa dolare milio 70 na mbula, mpe kaka mombongo ya petrole nde eleki yango na mbongo na mokili mobimba.
LISOLO ya kokamwa ya kafe ebandaki na bangomba ya Éthiopie epai kafe ya zamba eutá. Kafe oyo balonaka, oyo babengaka Coffea arabica, eutá na kafe wana ya zamba, mpe yango nde ezali mingi (2/3) na mokili mobimba. Ntango oyo bayebaki oyo mbuma ya kafe bakalingi esalaka na nzoto ya moto eyebani mpenza te. Kasi, bazalaki kolona kafe arabica na mikili ya Alabi na siekle ya 15 na ntango na biso. Atako bapekisaki kotɛka mbuma ya kafe ya kolona na mboka mopaya, bato ya Hollande bazwaki banzete ya kafe to mbuma na yango ya kolona na mobu 1616. Eumelaki te basalaki bilanga ya kafe na Ceylan, lelo oyo Sri Lanka, mpe na Java, lelo oyo ezali na Indonésie.
Na 1706, bato ya Hollande bazwaki mwa nzete moko ya kafe na etúká na bango ya Java mpe bakendeki na yango na Jardin botanique ya Amesterdam, na Pays-Bas. Nzete yango ebotaki malamu mpenza. Bana ya kafe oyo nzete yango ebotaki, batindaki yango na Suriname mpe na bisanga ya Caraïbe oyo Hollande ezalaki koyangela. Na 1714, guvɛrnɛrɛ ya engumba Amsterdam apesaki mokonzi ya France Louis XIV mwa nzete moko ya kafe. Mokonzi alonaki yango na lopango na bilanga ya nzete ya Jardin des Plantes ya Paris.
Ekólo France ezalaki na mposa makasi ya kokɔta na mombongo ya kafe. Basombaki mbuma ya kafe mpe banzete na yango mpe batindaki yango na esanga ya Réunion. Mbuma yango ebimaki te, mpe na kotalela bato mosusu oyo balandelaki likambo yango, banzete nyonso ekufaki kaka moko nde ekolaki. Nzokande, nzete yango ebotaki mbuma 15 000 oyo balonaki yango na mobu 1720 mpe nsukansuka basalaki elanga mobimba ya kafe. Lokola bazalaki kotalela banzete yango na motuya mingi, moto nyonso oyo bakutaki ye azali kobebisa yango asengelaki kozwa etumbu ya liwa. Ekólo France elingaki mpe kosala bilanga ya kafe na bisanga ya Antilles, kasi bilanga mibale ya liboso ebongaki te.
Gabriel Mathieu de Clieu, mokonzi ya basoda oyo babundaka na mai, ya ekólo France, oyo azalaki na konje na Paris, amipesaki mokumba ya komema nzete moko ya kafe na mboka na ye Martinique ntango autaki France. Akɔtaki na masuwa mpo na kozonga na Martinique na sanza ya mitano 1723, ná mwa nzete yango oyo azwaki na Paris.
Buku Nyonso mpo na kafe (na Lingelesi) elobi ete, na mobembo, de Clieu atyaki nzete na ye oyo azalaki kobatela yango na kɛsi moko oyo ngámbo moko ezalaki talatala mpo ezwaka moi mpe ezala na esika ya molunge na ntango ya mbula. Moto moko oyo asalaki mobembo ná de Clieu, oyo azalaki ntango mosusu na zuwa mpe alingaki te de Clieu azwa bolamu na nzete na ye, amekaki kobɔtɔla ye yango kasi akokaki te. Nzete yango ekufaki te mpe ebebaki te. Ata ntango miyibi ya Tunisie bakɔtelaki masuwa, bayibaki yango te, ezala mopɛpɛ makasi, mpe na koleka, ntango masuwa etɛlɛmaki mpo mopɛpɛ ezalaki te mpe mai ya komɛla etikalaki moke mpenza, nzete yango ebebaki te. De Clieu akomaki ete: “Mai ezangaki mpenza na boye ete koleka sanza mobimba nasengelaki kokabola mwa mai na ngai ya komɛla na nzete oyo natyelaki yango elikya na ngai nyonso mpe oyo nazalaki kosepela na yango mingi.”
Milende ya de Clieu epesaki ye mbano. Nzete na ye ekómaki malamu na Martinique, ekolaki malamu mpe ebotaki na esika ya molunge. Gordon Wrigley, akomaki na buku na ye Kafe (na Lingelesi) ete, “Mpo na mwa nzete wana moko, ekólo Martinique ekómaki kokabola kafe ya kolona, ezala mbala moko to na ndenge mosusu, na bikólo mosusu nyonso ya Amerika longola kaka Brésil, Guyane française mpe Suriname.”
Na ntango yango, Brésil mpe Guyane française ezalaki mpe na mposa ya kolona kafe. Na Suriname, bato ya Hollande bazalaki naino na elanga ya kafe oyo balonaki na nzete oyo eutaki na elanga ya Amsterdam, mpe bazalaki kobatela elanga yango malamumalamu. Kasi na 1722, Guyane française ezwaki mbuma ya kafe epai ya mobomi moko ya bato oyo akimaki Suriname mpe ayibaki mwa mbuma ya kafe. Bakonzi ya Guyane française balakaki kotika ye soki apesi bango mbuma na ye ya kafe, mpe batikaki ye azonga na mboka na ye.
Na ebandeli, ekólo Brésil elukaki mbuma ya kafe ya kolona to nzete na yango na kobombana kasi ezwaki yango te. Bato ya Suriname mpe ya Guyane française bawelanaki ndelo ya bikólo na bango mpe basɛngaki Brésil etindela bango moto akata likambo yango. Brésil etindaki Francisco de Melo Palheta, mokonzi ya basoda ya Guyane française, bayebisaki ye ete akata likambo yango mpe azonga na mwa banzete ya kafe.
Palheta akataki likambo yango malamu, mpe guvɛrnɛrɛ asalisaki fɛti monene mpo na kokabwana na ye. Mpo na kosepelisa mopaya na bango, mwasi ya guvɛrnɛrɛ apesaki Palheta liboke moko kitoko ya fololo. Nzokande, abombaki kati na fololo yango mwa mbuma ya kafe ya kolona mpe mwa banzete na yango. Yango wana, balobaka ete kafe ya Brésil oyo ezali kobimisa bamiliarɛ ya dolare lelo, ebandaki na 1727 na liboke ya fololo.
Na yango, bilanga ya kafe oyo ezali na Amerika ya Ntei mpe ya Sudi, euti na mwa nzete ya kafe oyo eutaki na Java mpe ekendeki na Amsterdam na 1706 esika moko na banzete oyo yango ebimisaki na Paris. Wrigley alobi ete: “Yango wana, kafe arabica nyonso oyo balonaka lelo eutaki na mwa nzete moke.”
Lelo oyo, bato koleka milio 25 balonaka nzete ya kafe koleka miliarɛ 15 na bilanga na bango, na bikólo soki 80. Kafe wana nde bato bamɛlaka kɔpɔ milio 2,25 mokolo na mokolo.
Likambo ya kokamwa, lelo oyo kafe ekómi mingi koleka oyo bato bazali na yango mposa. Likambo yango ekómi mpasi mpo na makambo ya politiki, ya nkita, mpe bakompanyi ya mineneminene; makambo oyo ezali kotika baoyo balonaka kafe mabɔkɔ mpamba na mikili mingi to ezali kokómisa bango babola. Likambo yango ezali kokamwisa mpenza, mingimingi ntango tozali kokanisa de Clieu oyo akabolaki mai na ye ya komɛla na mwa nzete ya kafe eleki sikoyo mbula soki 300.
[Etanda/Elilingi na lokasa 20]
MITINDO MIBALE YA KAFE OYO EYEBANI MINGI
Zulunalo moko (Scientific American) elobi ete, “kafe ya mbuma eutaka na nzete ya kafe, ezali na libota ya banzete babengi Rubiacées, oyo ezali na mitindo soki 66 ya kafe (Coffea).” “Mitindo mibale ya kafe oyo balonaka mpo na kotɛka ezali Coffea arabica, kafe mingi (2/3) oyo batɛkaka na mokili mobimba ezali nde yango, mpe Coffea canephora, oyo babengaka mpe kafe robusta, yango ezali mingi te (1/3).”
Kafe robusta ezalaka na nsolo makasi mpe na mwa mpimbo mpe mbala mingi esɛngaka te mai etɔka mpo na kolamba yango. Nzete na yango ebotaka mingi mpe maladi ekɔtelaka yango mpambampamba te. Ekómaka molai mɛtrɛ soki 12, to molai mbala mibale koleka kafe arabica oyo baloni yango kolona te, kafe arabica ebotaka mingi te mpe maladi ekɔtelaka yango mingi. Kafe robusta ezalaka na cafeine 2,8 %, nzokande arabica elekaka 1,5 % te. Atako kafe arabica ezali na chromosomes 44 mpe robusta ná mitindo mosusu nyonso ezali na yango 22, bakoki kobotisa mitindo mosusu mpo na kozwa mitindo ya sika.
[Etanda/Elilingi na lokasa 20]
“BATISIMO” YA KAFE
Ntango kafe ekómaki na Mpoto mbala ya liboso na siɛklɛ ya 17, basango mosusu ya Katolike balobaki ete ezali biloko ya komɛla ya Satan. Batalelaki yango lokola eloko oyo bato bakobanda komɛla na esika ya vinyo, oyo mpo na bango, Klisto asantisaki yango. Buku Kafe elobi ete Pápa Clément VIII, amekaki komɛla yango mpe mbala moko abongolaki makanisi na ye. Asukisaki kowelana yango ya makambo ya losambo ntango apesaki kafe batisimo ya elilingi, mpe mpo na yango Bakatolike nyonso bandimaki yango.
[Etanda/Karte na lokasa 18, 19]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
NDENGE KAFE EKÓMAKI BISIKA NYONSO
1. Na bambula ya 1400 Bazalaki kolona kafe Arabica na bisanga ya Arabie
2. 1616 Hollande ezwi nzete ya kafe to mbuma ya kolona
3. 1699 Hollande ememi nzete ya kafe na Java mpe na bisanga mosusu ya ɛsti ya Inde
4. Na bambula ya 1700 Bakómi kolona kafe na Amerika ya Ntei mpe na bisanga ya Caraïbe
5. 1718 France ememi kafe na esanga ya Réunion
6. 1723 G. M. de Clieu azwi kafe na France, akei na yango na Martinique
7. Na bambula ya 1800 Bakómi kolona kafe na Hawaii
[Eutelo ya elilingi]
Euti na: Buku “Mbuma moko ya ndenge mosusu” (Na Lingelesi)
[Elilingi na lokasa 18, 19]
Gabriel de Clieu akabolaki mai na ye ya komɛla na nzete ya kafe ntango azalaki kozonga na Martinique, na 1723
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 19]
Kalati: © 1996 Visual Language; De Clieu: Tea & Coffee Trade Journal