Nayekolaki kotyela Nzambe motema
LISOLO YA ELLA TOOM
LIBOTA na biso ezalaki kofanda pene na Otepää, mboka moko moke oyo ezali na sudi ya Estonie, na ntaka ya kilomɛtrɛ pene na 60 na ndelo ya Russie. Na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 1944, mwa basanza uta nasilisaki eteyelo ya ntei, Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ekómaki pene na nsuka. Lokola basoda ya Russie bazalaki kozongisa basoda ya Allemagne na nzela ya Estonie, biso ná bato oyo bazalaki kofanda penepene na biso (biso nyonso bato pene na 20) ná bibwɛlɛ na biso tomibombaki na zamba.
Lokola babɔmbi ezalaki kokwea pene na esika tobombanaki na boumeli ya sanza mibale, tokómaki komona lokola nde tozali na kati ya etumba. Tofandaki biso nyonso esika moko mpe nazalaki kotánga mikapo ya Biblia, mingimingi na buku ya Bileli. Ezalaki mbala ya liboso natánga Biblia. Mokolo moko namataki na ngomba moko molai, nafukamaki mpe nabondelaki boye: “Ntango etumba ekosila, nakokende losambo mikolo nyonso ya lomingo.”
Mosika te, etumba elekaki na ngámbo ya wɛsti. Nsukansuka, na sanza ya Mai 1945, bato ya Allemagne basɛngaki etumba esila mpe Etumba ya Mibale ya mokili mobimba esilaki na Mpoto mobimba. Nsima ya etumba, nakokisaki ndai na ngai epai ya Nzambe mpe nazalaki kokende losambo pɔsɔ na pɔsɔ. Kasi, bato oyo bazalaki koyangana ezalaki kaka mwa ndambo ya mibange basi. Nazalaki koyoka nsɔni koyangana na bango. Soki moto moko ayei kotala biso na ndako, na mbalakaka, nazalaki kobomba Biblia na nse ya mesa.
Eumelaki te, nazwaki mosala ya molakisi na eteyelo ya mboka na biso. Na ntango wana, Bakoministe bazalaki koyangela biso mpe bato mingi bazalaki lisusu kondima te ete Nzambe azali. Kasi, naboyaki kokɔta na Parti ya Bakoministe. Nazalaki komipesa mingi na milulu ya mboka, na ndakisa kolakisa bana mabina ya mboka.
Ndenge oyo nakutanaki na Batatoli ya Yehova
Bana basengelaki kolata bilamba ya mabina. Yango wana, na sanza ya Aprili 1945, nakendeki epai ya Emilie Sannamees, mwasi moko oyo ayebaki kotonga bilamba malamu. Mwasi yango azalaki Motatoli ya Yehova, kasi nayebaki te. Atunaki ngai boye: “Okanisi nini mpo na makambo oyo ezali kosalema na mokili?” Lokola likita monene ya kimya ezalaki kosalema na engumba San Francisco, na États-Unis, nalobaki ete: “Mosika te, boyangeli oyo [ya Bakoministe] ekosuka mpe nandimi mpenza ete likita yango ezali kosalema nde mpo na kosukisa boyangeli yango.”
Emilie alobaki ete likita wana ekopesa bolamu ya seko te, mpe alingaki kotángela ngai Biblia mpo na komonisa ngai ntina oyo alobaki bongo. Na ntango wana, nandimaki te makambo Emilie, mwasi wana ya boboto ya mbula soki 50 azalaki koloba, kasi liboso nakende atunaki ngai boye: “Oyebi esika oyo Nzambe alingaki ete Adama ná Eva báfandaka?” Lokola nayebaki eyano te, alobaki na ngai ete: “Tuná tata na yo.”
Ntango nazongaki na ndako, natunaki tata na ngai motuna yango. Ayebaki eyano te, mpe alobaki ete tosengeli komitungisa te na koyekola Biblia, kasi tosengeli nde kozala na kondima. Ntango nazongaki kozwa bilamba, nayebisaki Emilie ete tata ayebi eyano ya motuna yango te. Emilie ná yaya na ye ya mwasi bafungolaki Biblia mpe balakisaki ngai makambo oyo Nzambe ayebisaki Adama ná Eva: bábatela elanga epai bazalaki kofanda mpe báfanda wana na esengo seko na seko. Balakisaki ngai na Biblia ndenge Nzambe akanaki ete Adama ná Eva bábota bana mpe bákómisa mabelé mobimba paladiso. Bavɛrsɛ oyo batángelaki ngai esepelisaki ngai mingi.—Genese 1:28; 2:8, 9, 15; Nzembo 37:29; Yisaya 45:18; Emoniseli 21:3, 4.
Mbala ya liboso nakende na likita ya Batatoli ya Yehova
Lokola nasengelaki kolekisa sanza misato ya eleko ya molunge na mboka Tartu mpo na kolanda mateya ya balakisi, Emilie apesaki ngai adrɛsi ya Motatoli ya Yehova moko ya mboka wana. Apesaki ngai mpe buku Création; nakamwaki mpenza na buku yango mpo ezalaki komonisa polele mateya ya ebandeli ya Biblia. Yango wana, na mokolo ya 4 Augusto 1945, nakendeki na adrɛsi oyo Emilie apesaki ngai.
Ntango nabɛtaki na ndako, moto moko te ayanolaki; nabɛtaki lisusu makasi mpe moto moko oyo azalaki pembeni wana afungolaki ndako na ye mpe alakisaki ngai adrɛsi ya sika ya Motatoli yango: Balabala Salme nimero 56. Ntango nakómaki na esika yango, nakutaki mwasi moko azali kolongola mposo ya mbálá na eteni moko ya ndako na esika basalaka misala, natunaki ye ete: “Lingomba moko ezali koyangana awa?” Alobaki na ngai na nkanda nyonso ete nabima na lopango, mpo moto moko abengaki ngai te. Lokola natingamaki makasi na likambo yango, mwasi yango abengaki ngai namata na etazi esika bazalaki koyekola Biblia. Mosika te, ntango ya bopemi ekokaki mpo na kolya, mpe nalingaki kozonga. Kasi, bandeko mosusu babondelaki ngai nazonga te.
Na ntango ya bopemi, natalaki zingazinga mpe namonaki bilenge mibali mibale oyo bafandaki pene na lininisa, bakɔndá mpe nzoto ebebá. Na nsima, bayebisaki ngai ete na ntango ya bitumba, bilenge yango bamibombaki koleka mbula moko na bisika ndenge na ndenge mpo bákanga bango te.a Na nsima ya midi, Friedrich Altpere asalelaki liloba “Armagedona” na lisukulu oyo asalaki. Lokola nayebaki liloba yango te, natunaki ye na nsima mpe alakisaki ngai yango na Biblia. (Emoniseli 16:16) Ntango amonaki ndenge nakamwaki, ye mpe akamwaki ete nayebi Armagedona te.
Nayaki koyeba ete likita yango ebongisamaki kaka mpo na Batatoli ya Yehova mpenza. Na nsima, bayebisaki ngai ete ezali likita ya liboso oyo basali nsima ya etumba. Banda wana, nayebaki mpenza ntina ya kotyela Nzambe motema. (Masese 3:5, 6) Mbula moko na nsima, na sanza ya Augusto 1946, nazwaki batisimo na mbula 20, mpo na komonisa ete namipesi na Yehova, Nzambe ya solo.
Mama ná leki na ngai babimiselaki ngai mikakatano
Bakonzi ya Leta bazalaki kosɛnga ete, na biteyelo, báteyaka bana-kelasi ete Nzambe azali te, likambo yango ezalaki kotungisa lisosoli na ngai. Namonaki malamu naluka mosala mosusu. Ntango nayebisaki mama likambo yango, atombokaki mpe abandaki kobendabenda ngai nsuki. Nazwaki ekateli ya kolongwa na ndako. Kasi, tata alobaki ete akosalisa ngai, alendisaki ngai nayika mpiko.
Leki na ngai ya mobali, Ants, akómaki mpe kotɛmɛla ngai lokola mama. Kasi, mokolo moko asɛngaki ngai mikanda oyo elimbolaka Biblia mpe ntango atángaki yango, asepelaki mpenza. Mama angalaki lisusu koleka. Ants akómaki kolobela makambo ya Nzambe na eteyelo, kasi ntango akutanaki na mikakatano, atikaki kosangana na Batatoli ya Yehova. Mwa mikolo na nsima, azokaki na motó ntango azalaki komibwaka na mai. Balalisaki ye na mbeto oyo bamemaka bato ya maladi, binama na ye mosusu ya nzoto ezalaki kosala lisusu te, kasi makanisi na ye ezalaki naino malamu. Atunaki boye: “Yehova akolimbisa ngai?” Nayanolaki ete: “Ɛɛ.” Nsima ya mwa mikolo, Ants akufaki. Azalaki na mbula 17 mpamba.
Na sanza ya Sɛtɛmbɛ 1947, natikaki mosala na ngai ya molakisi. Mama akobaki kotɛmɛla ngai makasi. Ntango abwakaki bilamba na ngai libándá, nalongwaki na ndako mpe nakendeki kofanda epai ya Emilie ná yaya na ye. Lokola bazalaki koyebisa ngai mbala na mbala ete Yehova asundolaka basaleli na ye te, yango elendisaki ngai.
Minyoko na Estonie nsima ya etumba
Emilie ná yaya na ye bandimaki napesa bango mabɔkɔ na mosala ya kotongela mabota oyo ezalaki kofanda mpe kosala na baferme bilamba. Mbala mingi, tozalaki koyebisa bato yango mateya ya Biblia. Yango ezalaki mpenza eleko ya esengo, mpamba te nayekolaki kaka mosala ya kotonga bilamba te, kasi nakómaki mpe makasi na mosala ya kosakola. Longola mosala ya kotonga bilamba, nazwaki mpe mosala ya koteya bana matematiki na ndako. Kasi na 1948, bakonzi ya Leta babandaki kokanga Batatoli ya Yehova.
Na mbula oyo elandaki, na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ, ntango nazalaki kosala mosala na ferme moko, bayebisaki ngai ete bakonzi bakendeki koluka ngai na ndako ya Emilie ná yaya na ye mpo bákanga ngai. Ntango nakendeki komibomba na ferme ya ndeko Hugo Susi, nayokaki ete bauti kokanga ye. Mwasi moko oyo natongelaká ye bilamba, abengaki ngai nafanda epai na ye. Na nsima, nafandaki na baferme ndenge na ndenge, nazalaki kotonga bilamba mpe kokoba na mosala ya kosakola.
Nsukansuka, na ebandeli ya eleko ya malili, bato ya sireté ya URSS (KGB) bakutaki ngai na mboka Tartu epai ya Linda Mettig, elenge Motatoli ya Yehova ya molende oyo alekaki ngai na bambula mwa moke. Bakangaki ngai mpe bamemaki ngai na biro ya bapolisi mpo básambisa ngai. Basɛngaki ngai na makasi nalongola bilamba; mpe bilenge bapolisi bazalaki kotala ngai na miso mabe, nayokaki nsɔni. Kasi, ntango nabondelaki Yehova, motema na ngai ekómaki kimya.
Na nsima, batyaki ngai na mwa kasho ya moke mpenza, nakokaki ata komilalisa te. Bazalaki kobimisa ngai kaka mpo básambisa ngai. Bapolisi bazalaki koloba boye: “Tosɛngi yo te ete oboya kondima ete Nzambe azali. Kasi, tiká nde kosakola, yango ezali mpenza bozoba! Soki otiki, okozala na bomoi ya malamu mpenza.” Mpo bábangisa ngai, bazalaki kotuna ngai boye: “Olingi bomoi? To olingi nde okufa na Nzambe na yo epai bakangami mosusu bazali kuna na Sibérie?”
Mikolo misato mobimba, bazalaki kotunatuna ngai mituna mpe bazalaki kopekisa ngai kolala. Komanyola na mitinda ya Biblia, esalisaki ngai nayika mpiko. Nsukansuka, moko ya bato oyo bazalaki kosambisa ngai alobaki natya sinyatili na mokanda oyo emonisi ete natiki mosala ya kosakola. Nayanolaki ete: “Nakanisi likambo yango mingi mpe namoni ete eleki malamu natikala na bolɔkɔ mpe nazala na boyokani malamu na Nzambe na esika nazwa bonsomi kasi Nzambe aboya ngai.” Ntango moto yango ayokaki bongo, agangaki ete: “Yo, zoba! Tokokanga bino nyonso mpe tokotinda bino na Sibérie!”
Batikaki ngai na ntango oyo nakanisaki te
Likambo ya kokamwa, liboso midi ya butu ekóma, bapolisi oyo bazalaki kosambisa ngai balobaki nakamata biloko na ngai mpe nakende. Lokola nayebaki ete bapolisi bakolanda ngai, nakendeki na bandako ya bandeko te mpo bapolisi báyeba te epai bazali. Ntango nazalaki kotambola na babalabala, mibali misato balandaki ngai. Nabondelaki Yehova asalisa ngai, nakɔtaki na balabala moko ya molili mpe nakimaki mbangu na elanga moko. Nalalaki na nse mpe namizipaki na nkasa. Ntango bato yango bazalaki kotambola, nazalaki koyoka mwa makɛlɛlɛ mpe nazalaki komona miinda oyo basimbaki na mabɔkɔ.
Bangonga mingi elekaki, mpe malili makasi ekɔtelaki ngai na mikuwa. Na nsima, natambolaki na banzela ya mabanga, nasimbaki sapato na ngai na mabɔkɔ mpo esala makɛlɛlɛ te. Ntango natikaki mboka yango, natambolaki na terase ya nzela monene. Soki namoni mituka ezali koya, nazalaki kolala na nse. Na ngonga ya mitano na ntɔngɔ, nakómaki na ndako ya Jüri Toomel ná mwasi na ye Meeta, mosika te na mboka Tartu.
Meeta akendeki mbala moko kobongisela ngai eteni ya ndako oyo epesaka molunge. Mokolo oyo elandaki, akendeki epai ya Linda Mettig, na mboka Tartu. Linda alendisaki ngai ete: “Tóbanda kosakola mpe tópalanganisa nsango malamu na Estonie mobimba.” Mpo báyeba ngai te, nabongisaki nsuki ndenge mosusu, natyaki mwa biloko ya monzɛlɛ mpe nalataki linɛti, na nsima tobandaki kosakola. Na boumeli ya basanza oyo elandaki, tosalaki mobembo molai na velo. Na nzela, tozalaki kolendisa bandeko oyo bazalaki kofanda na baferme.
Batatoli ya Yehova bamibongisaki mpo básala liyangani na mokolo ya 24 Yuli 1950, na ndako monene oyo batyaka matiti ya banyama, epai ya moyekoli moko ya Biblia, pene na mboka Otepää. Ntango toyokaki ete bato ya sireté bayebi, tokebisaki bandeko mingi oyo bazalaki koya na nzela. Tozwaki bibongiseli mpo na kosala liyangani esika mosusu na mokolo oyo elandaki mpe bato nyonso oyo bayanganaki bazalaki soki 115. Bato nyonso bazongaki na esengo mpe bazwaki mokano ya kotikala sembo na ntango ya mikakatano.b
Nsima na yango, ngai ná Linda tokobaki kosakola mpe kolendisa bandeko. Na nsima, kaka na mbula yango, tosalaki mosala ya kobimisa mbálá na elanga mpe tosakolaki nsango ya Bokonzi epai ya baninga oyo tozalaki kosala na bango mosala ya kobimisa mbálá. Kutu, moto moko atikaki kosala mosala na ferme na ye mpe ayaki kolanda masolo na biso na boumeli ya ngonga mobimba, mpe alobaki ete: “Nayoká naino nsango ya boye te!”
Ngai ná Linda tozongaki na Tartu, epai toyokaki ete bakangi Batatoli ya Yehova mingi ná mama ya Linda. Bakangaki baninga na biso mingi, ná Emilie ná yaya na ye. Lokola toyebaki ete bato ya sireté bazalaki koluka biso, tozwaki velo mibale, totikaki Tartu mpe tokobaki kosakola na bamboka mosusu. Na butu moko, bato ya sireté bakutaki ngai na ndako ya Alma Vardja, ndeko mwasi moko oyo azwaki batisimo sika. Ntango moko na bango atalaki mikanda na ngai ya Leta, agangaki: “Ella! Tolukiluki yo bipai nyonso!” Ezalaki mokolo ya 27 Desɛmbɛ 1950.
Batyaki ngai na bolɔkɔ, na nsima bamemaki ngai na Sibérie
Ngai ná Alma tokangaki biloko na biso na sakosi na kimya mpenza mpe na nsima tofandaki mpo na kolya. Bato ya sireté bakamwaki mpe balobaki ete: “Bozali ata kolela te. Bofandi, bozali nde kolya.” Toyanolaki ete: “Tozali kokende kosala epai bokotinda biso mpe toyebi te ntango tokolya lisusu.” Nazwaki bolangiti mpe na nsima, esalisaki ngai nasala basosɛti mpe bagá. Nsima ya basanza mingi ya bolɔkɔ, na sanza ya Augusto 1951 bamemaki ngai ná bandeko mosusu na Estonie.c
Batyaki biso na engbunduka, totikaki Estonie mpe bamemaki biso na Leningrad (lelo oyo, Saint-Pétersbourg), na Russie, mpe batyaki biso na bakaa ya Vorkuta oyo eyebanaki mingi, na etúká ya Komi, epai bazalaki kosalisa bakangami misala makasi mpe kuna malili ezalaka makasi mpenza. Na bakangami nyonso oyo tokómaki, tozalaki Batatoli ya Yehova misato mpamba. Nayekolaki monɔkɔ ya Russe ntango nazalaki naino na kelasi mpe banda bakangaki ngai, nakómaki koloba monɔkɔ yango. Yango wana, nazalaki koloba monɔkɔ ya Russe malamu ntango tokómaki na kaa.
Na Vorkuta, tokutaki elenge mwasi moko ya Ukraine oyo akómaki Motatoli ya Yehova na kaa moko ya bakangami oyo Banazi basalaki na Pologne. Na 1945, bamemaki ye ná bandeko mosusu 14 na masuwa oyo bato ya Allemagne bakanaki kozindisa yango na Mbu ya Baltique. Kasi, masuwa esalaki mobembo tii na Danemark kozanga likama. Na nsima, ntango ndeko yango azongaki na Russie, bakangaki ye mpo azalaki kosakola nsango malamu mpe bamemaki ye na kaa ya Vorkuta; kuna, alendisaki biso mpenza.
Tokutanaki mpe na basi mibale oyo batunaki na monɔkɔ ya Ukraine ete: “Nani azali Motatoli ya Yehova awa?” Na mbala moko, toyebaki ete basi yango bazali bandeko na biso. Balendisaki biso mpe bapesaki biso biloko oyo tozalaki kozanga. Bato mosusu ya bolɔkɔ bamonaki lokola nde bato ya libota na biso bazalaki kozela biso.
Bamemaki ngai na bakaa ya bakangami ya Mordovie
Na sanza ya Desɛmbɛ 1951, nasalisaki ekzamɛ ya monganga mpe bazwaki ngai na maladi ya mongongo; yango wana, bamemaki ngai na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 1 500 na sudi-wɛsti, na bolɔkɔ monene ya Mordovie, na kilomɛtrɛ soki 400 na sudi-ɛsti ya engumba Moscou. Na bambula oyo elandaki, nakutanaki na bandeko basi ya Allemagne, ya Hongrie, ya Pologne mpe ya Ukraine na bakaa oyo babongisá kaka mpo na basi, epai nakɔtaki bolɔkɔ. Nakutanaki mpe na Maimu, ye bakangaki ye mpo na makambo ya politiki na Estonie.
Na Estonie, Maimu abotaki mwana ya mwasi na bolɔkɔ mpe mokɛngɛli moko ya bolɔkɔ, moto ya boboto, apesaki mama ya Maimu mwana yango. Na bolɔkɔ ya Mordovie, nayekolaki Biblia na Maimu mpe andimaki makambo oyo azalaki koyekola. Maimu azalaki kokomela mama na ye mikanda; ye mpe andimaki solo ya Biblia mpe ateyaki yango Karin, mwana ya Maimu. Nsima ya mbula motoba, Maimu abimaki na bolɔkɔ mpe akamataki mwana na ye. Ntango Karin akolaki, abalaki mobali moko oyo azali Motatoli ya Yehova. Karin na mobali na ye basali mbula 11 na biro ya Batatoli ya Yehova na Tallinn, na Estonie.
Kaa ya bakangami na Mordovie ezalaki monene mpe na biteni ebele. Na eteni moko ezalaki na mwa kasho moko oyo bazalaki kokɛngɛla yango makasi. Batyaki ngai ná bandeko basi mosusu motoba na esika yango mpo tozalaki kosakola nsango malamu. Kasi, ata na esika yango, tozalaki kokoma masolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na mabɔkɔ, na makomi ya mike mpenza mpe kotinda yango na mayele epai ya bandeko mosusu oyo bazalaki na bakaa ya pembeni. Mayele mosusu tozalaki kosalela yango oyo: Totɔbɔli sabuni, tokɔtisi Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na kati ya sabuni yango mpe tokangi.
Na boumeli ya bambula oyo nalekisaki na bakaa ya Mordovie, nasalisaki basi koleka zomi, bakómaki basaleli ya Yehova. Nsukansuka, na mokolo ya 4 Mai 1956, balobaki na ngai ete: “Okoki kokende kondimela Yehova, Nzambe na yo.” Kaka na sanza wana ya mitano, nazongaki na Estonie.
Mbula 50 esili koleka banda nazongaki na mboka
Nazalaki na mosala te, mbongo te, ndako mpe te. Mwa mikolo nsima ya kokóma, nakutanaki na mwasi moko oyo asepelaki na mateya ya Biblia. Mwasi yango na mobali na ye bayambaki ngai na boumeli ya mwa mikolo na ndako na bango oyo ezalaki na eteni kaka moko. Nadefaki mbongo mpe nasombaki nsinga ya batiliko; natongaki bilamba ya malili mpe natɛkaki yango na zando. Na nsima, bapesaki ngai mosala na lopitalo moko ya maladi ya kanser na mboka Tartu, epai nasalaki misala mingi na boumeli ya mbula nsambo oyo elandaki. Na ntango yango, Lembit Toom autaki bolɔkɔ na Sibérie mpe tobalanaki na sanza ya Novɛmbɛ 1957.
Bato ya sireté bazalaki kokɛngɛla biso mpe bazalaki kotungisa biso ntango nyonso mpamba te, bazalaki kokoba kopekisa mosala na biso ya kosakola. Atako bongo, tosalaki oyo esengeli mpo na koteya bato mosusu solo. Lembit alobelaki eleko wana ya bomoi na biso na Lamuká! ya 22 Febwali 1999, na Lifalanse. Na nsuka ya bambula ya 1950 tii na bambula ya 1970, Batatoli ya Yehova oyo bamemamaki bipai mosusu bazalaki kozonga na mboka. Na nsuka ya bambula ya 1980, tokómaki Batatoli koleka 700 na Estonie. Na 1991, mosala na biso ya kosakola endimamaki na mibeko ya Leta mpe banda wana motángo ya Batatoli ya Yehova na Estonie ezali se kobakisama, mpe sikoyo tokómi bato koleka 4 100.
Lelo oyo, esili koleka mbula 60 banda nayanganaki na likita wana ya nkuku oyo Batatoli ya Yehova na Estonie basalaki mpo na mbala ya liboso nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Banda wana, nazwaki ekateli ya kolanda toli oyo ya Biblia: “Zalá na elikya epai na [ Yehova] mpe salá malamu.” Nayekolaki ete soki natyeli Yehova motema akokokisa ‘mposa nyonso ya motema na ngai.’—Nzembo 37:3, 4.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Moko na bato yango ezali Lembit Toom oyo lisolo na ye ebimaki na Lamuká! ya 22 Febwali 1999, na Lifalanse.
b Mpo na koyeba makambo mosusu ya liyangani yango, talá Lamuká! ya 22 Febwali 1999, nkasa 12-13, na Lifalanse.
c Kasi, bandeko mingi ya Estonie bamemamaki epai mosusu na sanza ya Aprili 1951. Talá Lamuká! ya 22 Aprili 2001, nkasa 6-8, na Lifalanse, mpe kasɛti-video Fidèles dans les épreuves — Les Témoins de Jéhovah en Union soviétique.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 21]
“Tóbanda kosakola mpe tópalanganisa nsango malamu na Estonie mobimba.”—Linda Mettig
[Elilingi na lokasa 22]
Ngai ná bandeko mosusu libwa na bolɔkɔ ya Mordovie
[Elilingi na lokasa 22]
Ngai ná mobali na ngai Lembit lelo oyo