Mpo na nini bato bakómi nkanda mingi boye?
MAKAMBO oyo epesaka bato nkanda ezali ebele. Ata bato ya siansi bandimaka ete bayebi naino makambo nyonso te oyo etali nkanda. Kasi minganga ya maladi ya motó bandimaka bango nyonso ete moto na moto azalaka na “makambo oyo epesaka ye nkanda.”
Moto akoki kosilika soki likambo moko eyokisi ye mpasi to esepelisi ye te. Mbala mingi ezalaka soki basaleli biso makambo na bosembo te. Tokoki koyoka nkanda soki moto mosusu afingi biso to azangi limemya epai na biso. Nkanda eyaka mpe soki tomoni lokola ete moto mosusu azali kotɛmɛla bokonzi oyo tozali na yango to alingi kobebisa lokumu na biso.
Ya solo, moto na moto azalaka na “makambo oyo epesaka ye nkanda.” Yango etali mbula oyo moto azali na yango, soki azali mwasi to mobali to mpe mimeseno ya mboka esika akolá. Lisusu, moto na moto azali na lolenge na ye ya kosilika. Bato mosusu basilikaka mpenza te mpe ata soki basilikisi bango, bakitisaka motema noki; nzokande bato mosusu batombokaka nokinoki soki batumoli bango mpe bakangelaka basusu nkanda mikolo ebele, bapɔsɔ ebele, basanza to mpe bambula ebele.
Mokili ya lelo etondi na makambo oyo epesaka nkanda, mpe emonani lokola ete bato bakómi kotomboka mpo na makambo oyo kala ezalaki kosilikisa bango te. Mpo na nini ekómi bongo? Ntina moko ezali ete mikolo oyo, bato bakómi mafumafu mpe kotya bamposa na bango moko liboso. Biblia elobeli yango boye: “Mikolo ya nsuka . . . bato bakozala bato oyo bamilingaka, bato balingá mbongo, bato ya lofundo, bato ya lolendo . . . bato ya motó makasi, oyo bavimbi na lolendo.” (2 Timote 3:1-5) Omoni te ete vɛrsɛ yango ezali mpenza kolobela bizaleli oyo bato mingi bakómi na yango mikolo oyo?
Ya solo, mbala mingi bato oyo balukaka kaka matomba na bango moko batombokaka soki makambo ezali kosalema te ndenge balingi. Kasi ezali mpe na mwa makambo mosusu oyo esali ete bato mingi bakóma nkandankanda. Tótalela makambo yango mosusu.
Ndakisa ya baboti
Kobanda bomwana kino bolenge, tomekolaka bizaleli mingi ya baboti na biso. Harry Mills, moto moko oyo ayekolaka bizaleli ya bato, alobi boye: “Ntango moto azali naino mwana moke, amekolaka makambo oyo amonaka bato mosusu basalaka soki basiliki.”
Soki mwana akoli na esika oyo bato batombokaka ata mpo na makambo ya mikemike, ye mpe akobanda kotomboka mbala nyonso oyo akutani na mikakatano. Tokoki kokokanisa mwana yango na nzete moko oyo babwakelaka yango mai oyo ezali na pwazɔ. Nzete yango ekoki kokola, kasi malamu te mpe mbala mosusu ekoki kobeba libela. Ndenge moko mpe, nkanda ezali lokola mai oyo ezali na pwazɔ mpe mingimingi bana oyo bakoli na esika oyo bato bazalaka nkandankanda bakómaka mpe bongo ntango bakoli.
Bingumba epai bato batondani mingi
Na mobu 1800, bato moke (soki 3%) nde bazalaki kofanda na bingumba. Kasi na mobu 2008, bato oyo bafandi na bingumba bazalaki motángo ndenge moko na bato oyo bafandaka na mboka, mpe balobi ete na mobu 2050 bato moke (30%) kaka nde bakotikala na bamboka. Wana bato bazali se kobakisama na bingumba epai bato batondani, ekosala mpe ete bato bakóma nkandankanda. Na ndakisa, engumba Mexico ezali moko ya bingumba oyo bato bazali mingi mpe mituka ebele ekangamaka na nzela ntango nyonso; yango etungisaka bato mingi. Bato soki milio 18 bafandaka na Mexico mpe mituka milio motoba etambolaka kuna. Yango etindi mopanzi-nsango moko aloba mpo na engumba yango ete: “Mexico ekoki kozala engumba-mokonzi oyo bato bazali na mitungisi mingi koleka bingumba mosusu nyonso. Mituka etondaka ntango nyonso na banzela, mpe yango etindaka bato bátomboka mingi.”
Bingumba epai bato batondani mingi ebimisaka mpe mitungisi mosusu lokola makɛlɛlɛ makasi, kobeba ya mopɛpɛ, kozanga bisika ya kofanda, kozanga koyokana kati na bato oyo bauti na bamboka ekeseni, mpe mobulu makasi. Wana makambo oyo epesaka nkanda ezali se kobakisama, bato mpe bazali kokóma motema mokuse, kosilika mingi mpe kotomboka mpambampamba.
Mikakatano ya nkita
Kokwea ya nkita na mokili mobimba ebimisi mitungisi mpe epesi bato mingi nsɔmɔ. Lapolo ya ebongiseli moko oyo ebengami Fonds monétaire international mpe ya ebongiseli moko ya ONU oyo ebengami Organisation internationale du travail (OIT), oyo ebimaki na mobu 2010 elobaki ete: “Na mokili mobimba, bato koleka milio 210 bazangi mosala.” Likambo ya mawa, bato mingi oyo balongolaki bango na mosala, bazangi mbongo ya kobikela, mpe bazwaka te lisungi oyo Leta epesaka bato oyo bazangi mosala.
Kasi ata bato oyo bazali naino kosala bazalaka mpe na mitungisi. Ebongiseli OIT elobi ete mitungisi oyo eutaka na mosala “epalangani mokili mobimba.” Lorne Curtis oyo atalelaka makambo ya kokamba bakompanyi na Ontario, na ekólo Canada, alobi ete: “Bato babangaka ntango nyonso ete mosala na bango ekosila mpe bazwaka makanisi ya mabe noki.” Mpe abakisaki ete yango esalaka ete: “Bamilongisaka ntango nyonso mpe baumelaka te koswanisa bakambi to baninga na bango ya mosala.”
Kokanisela basusu mabe mpe kozanga bosembo
Kanisá ete ozali kopota na lisano ya mbangu mpe omoni ete bato nyonso bazali pɛpɛlɛ kasi kaka yo nde basɛngi olata mabende na makolo. Okomiyoka ndenge nini? Bamilio ya bato bamiyokaka ndenge wana ntango bato mosusu batalelaka loposo na bango to makambo mosusu liboso básalela bango likambo. Bato basilikaka soki bazali kokangela bango nzela mpo bázwa mosala, bátánga kelasi, bázwa esika ya kofanda, mpe mpo na makambo mosusu oyo moto asengeli na yango na bomoi na ye.
Ezali mpe na makambo mosusu oyo ezangi bosembo oyo ekoki kolɛmbisa moto nzoto to kosala ye mpasi mingi na motema. Mpe na ntembe te, mingi kati na biso toyebi mpasi yango. Eleki sikoyo bambula koleka nkóto misato, Mokonzi Salomo, moto ya bwanya, alobaki ete: “Talá! mpisoli ya bato oyo bazali konyokwama, kasi bazalaki na mobɔndisi te.” (Mosakoli 4:1) Moto akoki kokóma nkandankanda soki akutani na makambo mingi ya kozanga bosembo kasi azangi libɔndisi.
Televizyo, bafilme to masano
Ba ankɛtɛ koleka nkóto moko esalemi mpo na koyeba soki mobulu oyo bana bamonaka na televizyo to na bafilme ekoki kosala ete bango mpe bákóma mobulu. James Steyer, mobandisi ya ebongiseli moko (Common Sense Media), alobi ete: “Soki bana bazali komona mobulu makasi mbala na mbala, bamonaka mabe te kobundisa to kosala moto mabe, mpe bayokelaka bato mawa te.”
Elingi koloba te ete bilenge nyonso oyo bamonaka makambo ya mobulu mbala na mbala na televizyo nde bakómaka bato ya mobulu. Nzokande, bafilme mpe baemisyo mosusu ya televizyo emonisaka mbala mingi ete ezali mabe te moto atomboka mpe abimisa mobulu soki akutani na mikakatano. Yango esali ete lelo oyo, bilenge mingi bakómi komona ete mobulu ezali mabe te.
Nguya ya bilimo mabe
Biblia emonisi ete nguya moko oyo emonanaka te ezali kotinda bato lelo oyo bázala na nkanda ya mabe. Elingi koloba nini? Na ebandeli ya lisolo ya bato, ekelamu moko ya elimo atɛmɛlaki Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso. Ekelamu yango abengami Satana, oyo na monɔkɔ ya Ebre elimboli “Motɛmɛli,” to “Monguna.” (Ebandeli 3:1-13) Na nsima, Satana atindaki baanzelu mosusu bátɛmɛla mpe Nzambe.
Baanzelu yango batomboki oyo Biblia ebengi bademo to bilimo mabe babwakamaki zingazinga ya mabele. (Emoniseli 12:9, 10, 12) Lisusu, bazali na “nkanda makasi” mpo bayebi ete batikali na ntango mokuse. Na yango, atako tokoki te komona bilimo mabe yango, tomonaka misala na bango. Ndenge nini?
Satana ná bademo na ye basalelaka ezaleli na biso ya kozanga kokoka mpo na kotinda biso na “koyinana, koswana, zuwa, nkanda makasimakasi, kowelana, bokabwani, . . . mpe makambo oyo ekokani na oyo wana.”—Bagalatia 5:19-21.
Kangá motema!
Ya solo, soki totaleli mikakatano mpe mitungisi nyonso wana, tokoki kokamwa te ndenge bato bakómi nkandankanda wana bazali kosala nyonso bákokisa mikumba na bango ya mokolo na mokolo.
Mposa ya kotomboka mpe kobimisa nkanda nyonso oyo ozali na yango na motema ezalaka makasi! Lisolo oyo elandi ekosalisa biso tóyeba ndenge ya komipekisa mpo nkanda na biso eleka ndelo te.
[Etanda na lokasa 5]
OZALI MOTO YA NKANDANKANDA SOKI . . .
▶ Osilikaka ntango ozali kozela ngala na yo mpo na kosomba eloko.
▶ Ozalaka na momeseno ya koswanisa baninga na yo ya mosala.
▶ Ekómelaka yo ozwa mpɔngi te mpo na nkanda ya makambo oyo esilikisaki yo na moi.
▶ Okokaka te kolimbisa moto oyo asali yo mabe.
▶ Okokaka te kopekisa mayoki na yo.
▶ Nsima ya kotomboka, oyokaka nsɔni.a
[Maloba na nse ya lokasa]
a Euti na Internet, na adrɛsi oyo: MentalHelp.net.
[Etanda na lokasa 6]
MWA MITÁNGO ETALI NKANDA
Na Angleterre, ebongiseli moko (La Fondation de Londres pour la santé mentale) ebimisi lapolo moko oyo emonisi mwa makambo ya kokamwisa oyo elandi:
Bato ebele (84%) bakómi kotungisama mingi na mosala koleka ndenge ezalaki mbula mitano liboso.
Basali mingi (65%) ya biro bátombokaka to batombokelaka bango.
Basali mwa mingi (45%) batombokaka mbala mingi na mosala.
Bato mingi (60%) bazangisaka mosala mpo na mitungisi.
Bato mwa mingi (33%) ya Angleterre basololaka te na bato oyo bafandi na bango penepene.
Bato mingi (64%) bandimaka to bandimaka mpenza ete bato bakómi nkanda makasi.
Bato mwa mingi (32%) balobaki ete bazali na moninga to ndeko ya libota oyo akokaka te kopekisa nkanda na ye.
[Elilingi na lokasa 5]
Soki ozalaka nkandankanda, yango ekoki kosala nini na bana na yo?
[Elilingi na lokasa 6]
Ozwaka nkanda na lisɛki ndenge balakisaka yango na bafilme?