Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 7/14 lok. 4
  • Soki mpasi ekweli yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Soki mpasi ekweli yo
  • Lamuká!—2014
  • Masolo mosusu
  • Maloba ya ebandeli
    Lamuká!—2020
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
  • Ntango likambo ya mawa esalemi
    Okoki kozala na libota ya esengo
  • Ndenge ya koyika mpiko na makambo ya mpasi oyo etondi na mokili
    Lamuká!—2022
Makambo mosusu
Lamuká!—2014
g 7/14 lok. 4
1. Bosoto oyo etikali nsima ya likama oyo esalemaki; 2. Mbeto ya lopitalo; 3. Aksida ya motuka

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | OYO OKOKI KOSALA SOKI MPASI EKWELI YO

Soki mpasi ekweli yo

MPASI ekoki kokwela moto nyonso. Ata mpe bato oyo bamonanaka lokola bakoká na nyonso.

BIBLIA ELOBI BOYE:

“Ezali te bato ya mbangu mingi nde balongaka na momekano ya kopota mbangu, to bato ya nguya nde balongaka na etumba, ezali mpe te bato ya bwanya nde bazwaka bilei, ezali mpe te bato ya mayele nde bazwaka bomɛngo, mpe ezali kutu te bato oyo bazali na boyebi nde bandimamaka; mpamba te ntango ná makambo oyo ekanami te ekwelaka bango nyonso.”​—Mosakoli 9:11.

Likambo ezali te ya koyeba soki okokutana na likambo moko ya mpasi kasi nde oyo okosala soki ekómeli yo. Na ndakisa:

  • Okosala nini soki obungisi biloko na yo nyonso na makama lokola koningana ya mabele to mopɛpɛ makasi?

  • Okosala nini soki monganga ayebisi yo ete ozali na maladi moko ya mabe mpenza?

  • Okosala nini soki ndeko to moninga na yo akufi?

Batatoli ya Yehova, babimisi ya zulunalo oyo bazali na kondima ete Biblia ekosuka kaka te na kosalisa yo oyikela likambo moko ya mpasi mpiko, kasi ekopesa mpe yo elikya ya solosolo. (Baroma 15:4) Tótalela bandakisa misato oyo emonisi ndenge Biblia ekoki kosalisa yo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto