Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • rs lok. 397-lok. 403
  • Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzambe
  • Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Soki moto alobi​—
  • Lingomba
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Nsango oyo tosengeli kosakola
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Bampasi
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Banani bazali kopesa Nzambe nkembo lelo oyo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
rs lok. 397-lok. 403

Nzambe

Ndimbola: Moto oyo aleki nyonso, oyo azali na nkombo Yehova, oyo ekesenisi ye na bato mosusu. Na Ebre, maloba oyo basalelaka mpo na kolobela “Nzambe” epesaka likanisi ya makasi, lokumu, nkembo mpe bonene. Banzambe ya lokuta mpe bazali, bango bakeseni na Nzambe ya solo. Banzambe mosusu ya lokuta bamikómisi bango moko banzambe; basusu bakómisami banzambe nde na bato oyo bazali kosambela bango.

Makambo nini ekoki kondimisa mpenza ete Nzambe azali?

Nz. 19:1: “Likoló ezali kosakola nkembo ya Nzambe; mpe etando ezali koyebisa mosala ya mabɔkɔ na ye.”

Nz. 104:24: “Ee Yehova, misala na yo ezali mpenza ebele! Osalá yango nyonso na bwanya. Mabele etondi na biloko oyo obimisaki.”

Rom. 1:20: “Bizaleli na ye oyo emonanaka te ezali komonana polelepolele banda na kozalisama ya mokili, mpo emonanaka na nzela ya biloko oyo asalá.”

Zulunalo moko (New Scientist) elobi: “Likanisi moko ekɔtelá bato, ete bato ya siansi ‘bandimaka te’ makambo oyo mangomba eteyaka. Bato mingi bakanisaka ete bato ya siansi bandimaka te ete Nzambe azali; bakanisaka ete Darwin akundaki mpenza Nzambe mpe banda ntango yango, makambo ya sika oyo siansi ná teknoloji ezali kobimisa elongolaka mpenza likanisi nyonso ete lisekwa ekozala. Makanisi nyonso wana ezali lokuta.”​—26 Mai 1977, lok. 478.

Moto moko ya mayele (na académie de sciences) na France alobaki boye: “Ndenge oyo makambo ebongisami malamu na molɔ́ngɔ́ euti na makanisi ya moto te mpe esalemi na nguya moko boye te. . . . Lokola makambo ebongisami malamu na molɔ́ngɔ́, yango emonisi ete ezali na mayele oyo ebongisaki yango. Mayele ya ndenge wana ezali kaka ya Nzambe kasi ya eloko mosusu te.”​—Dieu existe? Oui (Paris, 1979), Christian Chabanis, azongelaki makambo ya Pierre-Paul Grassé, lok. 94.

Bato ya siansi bamoná biloko mikemike (éléments chimiques) koleka 100. Ndenge oyo baatomɛ ya biloko mikemike yango esalemá ezali komonisa ete ezali na boyokani moko ya kokamwisa mpenza. Etanda oyo emonisaka biloko yango emonisi ete biloko oyo ezali na molɔ́ngɔ́ ezalisamaki. Ndenge oyo biloko yango ebongisami emonisi ete ebimaki kaka pwasa te to yango moko te.

Ndakisa: Ntango tomonaka aparɛyi ya fɔtɔ, radio, to ordinatɛrɛ, toyebaka mbala moko ete moto moko ya mayele nde asalaki yango. Na yango, tokoki nde kokanisa ete biloko ya kokamwa lokola liso, litoi mpe bɔɔngɔ ya moto ebimaki kaka yango moko, ete moto ya mayele asalaki yango te?

Talá mpe nkasa 150-152, na motó ya likambo “Bozalisi.”

Lokola mabe ná mpasi ezali, yango nde emonisi ete Nzambe azali te?

Tózwa ndakisa: Lokola bato bazali kosalela mbeli mpo na koboma, yango nde emonisi ete ezali na moto te oyo asalaki yango? Na ntango ya bitumba, soki mpɛpɔ ebwaki bɔmbi, yango nde emonisi ete ezali na moto te oyo asalaki yango? To lolenge oyo bato bazali kosalela biloko yango nde ezali komemela bato mpasi, boye te?

Bamaladi mingi ezali kobima nde mpo na bizaleli mabe ya bato mpe mpo bato bazali kobebisa mabele, mai ná mopɛpɛ, boye te? Soki bato bazali konyokwama mingi, ezali te mpo na bitumba oyo bazali kobunda? Ezali mpe solo ete ntango bamilio ya bato mosusu bazali konyokwama na nzala, na bisika mosusu biloko etondi mɛkɛ, nyonso wana mpo na lokoso ya bato, boye te? Tokoki koloba te ete Nzambe azali te mpo makambo ya mabe ezali kosalema, kasi makambo yango ya mabe emonisi nde ete bato bazali kosalela mabe makoki oyo Nzambe apesaki bango mpe ete bango moko nde bazali kobebisa mabele.

Nzambe akipaka mpenza makambo oyo ekómelaka biso?

Ɛɛ! Talá makambo oyo emonisi yango: Biblia eyebisi biso ete, ntango Nzambe azalisaki moto asalaki ye moto ya kokoka mpe atyaki ye na paradiso awa na mabele. (Eba. 1:27, 31; Mib. 32:4) Kasi mpo moto akoba kondimama na Nzambe, asengelaki kotosa Mokeli na ye. (Eba. 2:16, 17) Soki moto atosaka, alingaki kozala ntango nyonso na bomoi ya kokoka, oyo ezali na maladi te, mikakatano te, liwa mpe te. Mozalisi alingaki kotambwisa moto na ndenge oyo esengeli mpe alingaki kobatela bato mpo bázwama na likama ata moko te. Kasi moto aboyaki Nzambe atambwisa ye; aponaki komitambwisa ye moko. Lokola alukaki kosala likambo oyo elekaki makoki na ye, amilukelaki mikakatano ye moko. (Yir. 10:23; Mos. 8:9; Rom. 5:12) Atako bongo, na boumeli ya basiɛklɛ mingi, Nzambe, lokola azali na motema molai, azali koluka baoyo balingi kosalela ye mpo balingi ye ná banzela na ye. Apesi bango libaku ya kozwa mapamboli nyonso oyo bazangaki mpo na kozanga kokoka mpe mpo na boyangeli mabe ya bato. (Em. 21:3-5) Nzambe azwaki ebongiseli ya kosikola bato na lisumu mpe liwa, na nzela ya Mwana na ye, mpo na komonisa bolingo na ye epai ya bato. (Yoa. 3:16) Lisusu, Nzambe asili kotya ntango ya koboma bato oyo bazali kobebisa mabele, mpe akosala ete baoyo balingaka boyengebene bázala na bomoi ya seko, na kolanda mokano na ye ya ebandeli.​—Em. 11:18; Nz. 37:10, 11; talá mpe mitó ya makambo “Mpasi” mpe “Mabe.”

Nzambe azali moto mpenza?

Ebr. 9:24: “Kristo akɔtaki . . . na likoló mpenza, mpo amonana sikoyo liboso ya Nzambe mpenza mpo na biso.”

Yoa. 4:24: “Nzambe azali Elimo.”

Yoa. 7:28: Yesu alobaki ete: “Oyo atindaki ngai azali mpenza.”

1 Ko. 15:44: “Soki nzoto ya mosuni ezali, oyo ya elimo mpe ezali.”

Nzambe ayokaka esengo to mpasi na motema ndenge bato nyonso bayokaka?

Yoa. 16:27: “Tata ye moko alingaka bino mingi, mpo bino bolingi ngai mingi mpe bondimi ete nabimaki lokola momonisi ya Tata.”

Yis. 63:9: “Ntango nyonso oyo bazalaki na mpasi, ye mpe azalaki koyoka mpasi. . . . Na bolingo na ye mpe na motema mawa na ye, ye moko asikolaki bango.”

1 Tim. 1:11: “Nzambe ya esengo.”

Nzambe azali na ebandeli?

Nz. 90:2: “Liboso bangomba ebotama, to obanda kobimisa mokili mpe mabele oyo ebotaka, lokola na mpasi ya kobota, ɛɛ, libela na libela yo ozali Nzambe.”

Moto akoki mpenza kokanga ntina ya likambo yango? Mayele na biso bato ekoki mpenza te kokanga ntina ya likambo yango. Kasi yango te nde ekotinda biso tóboya likanisi yango. Talá bandakisa oyo: (1) Ntango. Moto moko te akoki koloba esika oyo ntango ebandá. Mpe toyebi malamu ete bomoi na biso esukaka, kasi ntango esukaka te. Kasi toboyaka likanisi yango te kaka mpo tozali kokanga mpenza te ntina ya makambo mosusu oyo etali ntango. Nzokande, totalelaka ntango mpo na kobongisa makambo ya bomoi na biso. (2) Likoló. Bato ya mayele ya astronomi (bato oyo bayekolaka minzoto) bazwá ebandeli to nsuka ya likoló te. Ntango balukaka koyeba molɔ́ngɔ́, bamonaka ete likoló ezali na nsuka te. Baboyaka te kondima ndenge makambo ezali; mingi na bango bandimi ete likoló ezali na nsuka te. Tokoki kosalela likambo yango mpo na koloba ete Nzambe azali na nsuka te.

Bandakisa mosusu: (1) Bato ya mayele ya astronomi bayebisaka biso ete molunge oyo ezali na kati ya moi ezali makasi mpenza (milio 15°C.). Tokoboya likanisi yango kaka mpo na mayele na biso tokoki te kokanga ntina ya molunge makasi ndenge wana? (2) Bayebisi biso mpe ete galaksi na biso (Voie lactée) ezali monene mpenza, mpe lokola pole etambolaka kilomɛtrɛ 300 000 na segɔnde moko, ekoki kosala mbula 100 000 mpo na kokatisa galaksi yango. Na mayele na biso, tokoki mpenza kokanga ntina ya likambo yango? Nzokande tozali kondima likambo yango mpo bilembeteli ya siansi ezali kondimisa yango.

Tokondima nini: ete molɔ́ngɔ́ ezalisamaki na Mozalisi oyo azali na bomoi mpe na mayele to ebimaki yango moko kaka boye? Bato mosusu balobaka ete molɔ́ngɔ́ ebimaki yango moko, mpo soki bandimi ete ezalisamaki, ekosɛnga bándima ete Mozalisi azali, oyo bakoki kokanga ntina mpenza ya bizaleli na ye te. Kasi eyebani ete bato ya siansi bayebi malamu mpenza te ndenge oyo baselile esalaka, mpe eloko oyo ekolisaka yango. Mpe bayebi malamu mpenza te ndenge oyo bɔɔngɔ ya moto esalaka. Atako bongo, nani akoki koloba ete biloko yango ezalaka te? Bongo tosengeli nde kokanisa ete tokokanga ntina ya makambo nyonso oyo etali Moto oyo aleki biso mosika, oyo asalaki molɔ́ngɔ́ oyo ezali na biloko mingi oyo bonene na yango ezali kokamwisa biso mpe tozali kokoka te kokanga ntina na yango?

Kosalela nkombo ya Nzambe ezali na ntina?

Rom. 10:13: “Moto nyonso oyo akobelela nkombo ya Yehova akobika.”

Ezk. 39:6: “Bato bakoyeba mpenza ete nazali Yehova.”

Yesu alobaki na Tata na ye ete: “Nayebisi bango [bayekoli na ye ya solo] nkombo na yo mpe nakoyebisa yango.”​—Yoa. 17:26.

Talá mpe nkasa 425, 426, na motó ya likambo “Yehova.”

Likambo ya ntina ezali nde ya kozala na lingomba moko boye, ata soki moto asambelaka Nzambe nini?

1 Ko. 10:20: “Biloko oyo bikólo bapesaka mbeka, bapesaka yango mbeka na bademo, kasi na Nzambe te.”

2 Ko. 4:4: “Nzambe ya makambo ya ntango oyo azipi makanisi ya bato oyo bazangi kondima, mpo ete kongɛnga ya nsango malamu ya nkembo oyo etali Kristo, oyo azali elilingi ya Nzambe, ekoka kokɔta te.” (Vɛrsɛ oyo emonisi ete Zabolo azali “nzambe.” Talá 1 Yoane 5:19; Emoniseli 12:9.)

Mat. 7:22, 23: “Na mokolo yango, bato mingi bakoloba na ngai [Yesu Kristo]: ‘Nkolo, Nkolo, tosakolaki na nkombo na yo te? mpe tobimisaki bademo na nkombo na yo te? mpe tosalaki misala ya nguya na nkombo na yo te?’ Nzokande nakoyebisa bango polele ete: Nayebi bino ata moke te! Bólongwa mosika na ngai, bino bato oyo bobukaka mibeko.” (Ata soki moto azali kotuta ntolo ete azali mokristo, yango ezali ndanga te ete azali kosambela Nzambe ya solo na ndenge oyo alingi.)

Talá mpe nkasa 277, 278, na motó ya likambo “Lingomba.”

Soki Yehova azali “Nzambe ya solo kaka moko,” bongo Yesu azali “Nzambe” ya ndenge nini?

Yesu ye moko alobaki ete Tata na ye azali “Nzambe ya solo kaka moko.” (Yoa. 17:3) Yehova ye moko alobaki boye: “Longola ngai Nzambe mosusu azali te.” (Yis. 44:6) Ntoma Paulo akomaki ete, mpo na bakristo ya solo, “Nzambe azali . . . moko, ye Tata.” (1 Ko. 8:5, 6) Na yango, moto moko akokani na Yehova te, mpe moko te azali na bokonzi lokola ye. Yehova akokani ata moke te na biloko nyonso oyo bato basambelaka: bikeko, bato oyo bamikómisá banzambe, mpe Satana. Bango nyonso bazali banzambe ya lokuta.

Biblia elobi ete Yesu azali “nzambe,” ebengi ye mpe “Nzambe ya Nguya.” (Yoa. 1:1; Yis. 9:6) Kasi esika moko te babengi ye Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, lokola Yehova. (Eba. 17:1) Biblia elobi ete Yesu azali “mpenza komonisa nkembo ya Nzambe,” kasi nkembo yango euti na Tata. (Ebr. 1:3) Yesu alukaka ata moke te kozwa esika ya Tata na ye. Ye moko alobaki ete: “Osengeli kosambela nde Yehova Nzambe na yo, mpe kaka ye moko nde osengeli kosalela mosala mosantu.” (Luka 4:8) Azali na “lolenge ya Nzambe” mpe Tata asɛngi ete “na nkombo ya Yesu, mabɔlɔngɔ nyonso . . . egumbama,” kasi nyonso wana ezali kosalema “mpo na nkembo ya Nzambe.”​—Flp. 2:5-11; talá mpe nkasa 430-435.

Soki moto alobi​—

‘Nandimelaka Nzambe te’

Okoki koyanola: ‘Ondimelaka ye te banda kala? . . . Liboso ozwa ekateli yango, otalelaki mwa makambo oyo endimisi yo bongo?’ Okoki kobakisa: ‘Nasepelaka na lisolo yango mingi, mpe nasilá kokanisa na yango mingi. Talá mwa makanisi oyo nazwaki oyo ekoki kosalisa na likambo yango: . . . (Na lokasa 397, talá na motó ya likambo moke “Makambo nini ekoki kondimisa mpenza ete Nzambe azali?” talá mpe nkasa 150-152, na motó ya likambo “Bozalisi.”)’

To okoki koloba: ‘Olingi nde koloba ete ondimaka te ete Mozalisi azali, to ezali bokosi mingi oyo ozali komona na mangomba nde etindi yo ondima lisusu te makambo oyo bateyaka?’ Soki ezali mpo na bokosi ya mangomba, Okoki kobakisa: ‘Bokeseni monene ezali kati na bokristo ya solo ná bokristo ya nkombo mpamba. Ezali solo ete bokristo ya nkombo mpamba enyokolaki bato, kasi bokristo ya solo te. Bokristo ya nkombo mpamba ekɔtaka na bitumba, kasi bokristo ya solo te. Bokristo ya nkombo mpamba elongi te kosalisa bato bázala na bizaleli malamu, kasi bokristo ya solo esalisaka bato. Biblia, Liloba ya Nzambe, endimaka te makambo oyo bokristo ya nkombo mpamba esalaka. Kutu ezali nde kokweisa yango.’

Ndenge mosusu ya koyanola: ‘Nasilá kosolola na bato oyo bakanisaka lokola yo. Basusu balobaki ete soki Nzambe azalaka, mbɛlɛ mokili etondi na mpasi mpe na mabe boye te. Yo mpe okanisaka bongo? (Soki andimi, salelá mwa makanisi oyo ezali na nkasa 398, 399, na motó ya likambo moke “Lokola mabe ná mpasi ezali, yango nde emonisi ete Nzambe azali te?”)’

‘Nandimaka kaka makambo oyo nakoki komona, kasi namoná naino Nzambe te’

Okoki koyanola: ‘Lelo oyo bato mingi bakanisaka ndenge wana. Mpe ntina ezali. Tozali na mokili oyo ezali kolobela mingi biloko ya mosuni. Kasi nakanisi ete yo otalelaka makambo mpenza ndenge ezali, boye te?’ Okoki kobakisa: (1) ‘Ezali na makambo oyo tomonaka na miso te, kasi tondimaka ete ezali mpo tozali na bilembeteli oyo endimisi biso, boye te? Tokoloba nini mpo na mopɛpɛ? Tokoki koyoka yango ezali koleka. Tokoki koloba ete mimpululu na biso etondi na yango, atako tozali komona yango te. Kasi lokola tomonaka makambo oyo yango esalaka, tokoki kondima ete ezali, bongo te?’ (2) ‘Mpe tokoki komona te nguya oyo ebendaka biloko (force de gravité, to pesanteur). Kasi soki tobwaki eloko na likoló, tomonaka ete nguya yango ebendaka eloko yango na nse. Tomonaka mpe nsolo te, kasi zolo na biso eyokaka yango. Tokoki komona mongongo te, kasi matoi na biso eyokaka yango. Na yango, tondimaka biloko oyo tomonaka te soki bilembeteli ezali, bongo te?’ (3) ‘Na yango, tozali nde na elembeteli oyo ezali komonisa ete Nzambe oyo amonanaka te azali? (Salelá makanisi oyo ezali na nkasa 397, 398, na motó ya likambo moke “Makambo nini ekoki kondimisa mpenza ete Nzambe azali?”)’

‘Nazali na likanisi na ngai moko mpo na oyo etali Nzambe’

Okoki koyanola: ‘Nasepeli koyoka ete osilá kokanisa likambo yango mpe ondimelaka Nzambe. Tiká natuna yo naino: Okanisaka ete Nzambe azali ndenge nini?’ Okoki kobakisa: ‘Nandimi ete okosepela koyeba ete makambo oyo moto andimi esengeli koyokana na oyo Nzambe alobi. Okosepela tótalela likanisi moko na Biblia mpo tóyeba oyo yango elobi mpo na likambo yango? (Nz. 83:18)’

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto