Bampasi
Ndimbola: Ndenge moto ayokaka ntango azali konyokwama to kotungisama. Mpasi yango ekoki kozala ya nzoto to ya makanisi. Ezali na makambo mingi oyo ekoki konyokola moto, na ndakisa, mikakatano oyo euti na bitumba mpe mombongo ya lokoso, mbeba oyo bato ya libota moko bakoki kobotama na yango, maladi, baaksida, “makama oyo ezali kobebisa bisika mingi,” maloba mabe to makambo mabe ya bato mosusu, mitungisi ya bademo, kobangabanga mpo ete likambo moko ya mabe ekoki kosalema, to bozoba oyo moto ye moko asali. Na lisolo oyo tokolobela bampasi oyo eutaka na makambo oyo touti kotánga. Nzokande, moto akoki mpe kotungisama mpo na minyoko ya bato mosusu to mpo na makambo mabe oyo bato mosusu bazali kosala.
Mpo na nini Nzambe atiki nzela ete bampasi ezala?
Foti mpenza ya nani?
Bampasi mingi euti na makambo oyo bato basalaka. Bato nde babundaka bitumba, basalaka makambo ya mabe, babebisaka mai, mabele ná mopɛpɛ, mpe mbala mingi balukaka matomba na bango moko na esika ya koluka bolamu ya baninga. Makambo ya mabe oyo basalaka ememelaka bango moko mpe basusu mpasi. Soki bato bazali kosala mabe, bakozanga te kobuka mbuma ya misala na bango, boye te? (Gal. 6:7; Mas. 1:30-33) Tokoki mpenza kopesa Nzambe foti mpo na makambo ya ndenge wana oyo bato bango moko bazali kosala?
Satana ná bademo na ye mpe bapesaka bato mpasi. Biblia emonisi polele ete bampasi mingi oyo bato bazali komona eutaka na bilimo mabe. Bato mingi bazali kopesa Nzambe foti, nzokande foti ezali ya ye te.—Em. 12:12; Mis. 10:38; talá mpe nkasa 416, 417, na motó ya likambo “Satana Zabolo.”
Bampasi ebandaki ndenge nini? Mpo na kozwa eyano na motuna yango, tólobela naino baboti na biso ya liboso, Adama ná Eva. Yehova Nzambe akelaki bango bato ya kokoka mpe atyaki bango na paradiso. Soki bátosaka Nzambe, balingaki kobɛla te mpe kokufa te. Balingaki kotikala bato ya kokoka libela na libela. Mokano ya Yehova ezalaki te ete bato bámona mpasi. Kasi, Yehova ayebisaki Adama polele ete mpo akoba kozala na mapamboli wana asengeli kotosaka Ye. Na yango, mpo bátikala na bomoi, basengelaki kopemaka mpema, kolyaka, komɛlaka mpe kolalaka. Basengelaki mpe kotosa mibeko ya Nzambe mpo bátikala na bomoi ya malamu, bomoi ya esengo libela na libela. Kasi baponaki nzela oyo bango moko balingi, elingi koloba kopona bango moko oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe, na ndenge yango bapesaki Nzambe, Mopesi-Bomoi, mokɔngɔ. (Eba. 2:16, 17; 3:1-6) Lisumu ememelaki bango liwa. Lokola Adama ná Eva babotaki bana nsima ya kosala lisumu, batikelaki bana na bango kaka eloko oyo bazalaki na yango: bomoi ya kozanga kokoka. Bana na bango nyonso babotamaki na lisumu, na mposa ya kosala mabe; makambo yango ekokaki komemela bango maladi, nsukansuka basengelaki kokufa mpo na lisumu oyo babotamaki na yango. Lokola biso nyonso tobotamaka na lisumu tokutanaka na bampasi ndenge na ndenge.—Eba. 8:21; Rom. 5:12.
Mosakoli 9:11 elobi ete “ntango ná makambo oyo ekanami te” ekoki mpe kobimisela biso mpasi. Makama nyonso eutaka kaka na Zabolo to na moto moko boye te; likama ekoki kokómela biso mpo tozalaki na esika mpe ntango oyo likambo esalemi.
Mpo na nini Nzambe azali kosala eloko moko te mpo na kosilisa mpasi? Mpo na nini biso nyonso tómonaka mpasi mpo na likambo oyo Adama asalaki?
Na Biblia, Nzambe ayebisi biso makambo oyo tokoki kosala mpo na kokima bampasi mosusu. Apesi biso toli ya malamu mpenza mpo tóyeba kotambwisa bomoi na biso. Soki tosaleli yango, bomoi na biso ekozala na ntina, mabota na biso ekozala malamu, tokokóma mpenza baninga ya bato oyo balinganaka mingi, mpe yango ekopekisa biso tósala makambo oyo ekoki komemela nzoto na biso mpasi ezangi ntina. Soki toboyi toli yango, tokopesa Nzambe foti mpo na mpasi oyo biso moko tomilukeli mpe tozali kolukela bato mosusu?—2 Tim. 3:16, 17; Nz. 119:97-105.
Yehova azwaki bibongiseli mpo na kosilisa bampasi nyonso. Akelaki mwasi ná mobali ya liboso bato ya kokoka, mpe na bolingo mpenza, azwaki bibongiseli nyonso mpo bázala na bomoi ya malamu. Lokola bapesaki Nzambe mokɔngɔ na nko, Nzambe asengelaki nde kokɔtela bana na bango mpo ete bámona mpasi te mpo na mabe oyo baboti na bango basalaki? (Mib. 32:4, 5; Yobo 14:4) Ndenge toyebi yango malamu, mwasi ná mobali bakoki kozala na esengo ya kobota bana, kasi basengeli mpe koyeba ete ezali mokumba monene. Bana balandaka bizaleli ya baboti na bango mpe makambo oyo basalaka. Kasi, mpo Yehova amonisa boboto monene na ye, atindaki Mwana na ye ya bolingo awa na mabele, mpo apesa bomoi na ye ezala lisiko, mpo na kobikisa bana ya Adama oyo bakondima ebongiseli yango. (Yoa. 3:16) Yango wana, bato nyonso lelo bazali na libaku ya kozwa bomoi oyo Adama abungisaki, bomoi ya kokoka, oyo ezangi mpasi, na paradiso awa na mabele. Ebongiseli yango ezali malamu mpenza, boye te?
Talá mpe nkasa 303-305 na motó ya likambo “Lisiko.”
Soki Nzambe azali bolingo, mpo na nini atiki bampasi eumela boye?
Kotika oyo Nzambe atiki bampasi tii lelo, yango ememeli biso matomba? “Yehova azali koumisa makambo te na elaka na ye, ndenge bato mosusu batalelaka koumisa makambo, kasi azali nde komonisela bino motema molai mpo alingi moto ata moko te abomama kasi alingi nde bato nyonso bábongola motema.” (2 Pe. 3:9) Soki Nzambe abomaki Adama ná Eva mbala moko ntango basalaki lisumu, moto moko te alingaki kozala na bomoi lelo. Nani alingaki kosepela soki Nzambe asalaki bongo? Lisusu, soki Nzambe abomaka bato nyonso ya masumu na ntango ya kala, biso tolingaki kobotama te. Lokola Nzambe atiki mokili oyo ya masumu tii lelo, yango epesi biso libaku ya kozala na bomoi, ya koyekola banzela na ye, ya kobongisa makambo oyo tosengelaki kobongisa, mpe kondima bibongiseli ya bolingo oyo azwi mpo na kopesa bomoi ya seko. Lokola Yehova apesi biso libaku wana, yango emonisi mpenza ete alingaka biso mingi. Biblia emonisi ete Nzambe ye moko ayebi ntango oyo akoboma mokili oyo mabe mpe etikali moke asala yango.—Hab. 2:3; Sef. 1:14.
Nzambe akoki kolongola mpe akolongola bampasi nyonso oyo ekoki kokómela basaleli na ye na mokili oyo. Bampasi ya bato eutaka epai ya Nzambe te. Kasi na nzela ya Yesu Kristo, Nzambe akosekwisa bakufi, akosilisa maladi nyonso ya bato ya botosi, akolongola mpenza lisumu, kutu akosala ete tókanisa lisusu te makambo nyonso ya mabe oyo ekómelaki biso na bomoi.—Yoa. 5:28, 29; Em. 21:4; Yis. 65:17.
Ntango oyo Nzambe atiki tii lelo ezali mpenza na ntina mpo na kokata likambo oyo ebimaki na Edene. Mpo na koyeba makambo mosusu, talá nkasa 416, 417, mpe 325-327.
Biso nyonso tozali mpenza kozela na motema likoló ntango oyo bampasi ekosila. Kasi ntango Nzambe akosilisa bampasi, ekozala mpo na bolamu ya baoyo nyonso balingaka makambo ya sembo, ɛɛ mpo na bango nyonso. Nzambe aponaka bilongi te.—Mis. 10:34.
Bandakisa: Moboti oyo alingaka mwana na ye akoki kondima básala mwana yango lipaso moko ya mpasi mingi mpo ayebi ete na nsima mwana yango akokóma malamu, boye te? Lisusu, ezali solo ete soki moto alingi kosilisa maladi moko boye mbangumbangu, maladi yango ekosila kaka likolólikoló, boye te? Esɛngaka ntango mingi mpo na koboma mikrobe oyo epesaka maladi.
Mpo na nini Nzambe alimbisaki kaka Adama te mpo bato bányokwama te ndenge bazali konyokwama lelo?
Soki Nzambe asalaka bongo, yango elingaki mpenza kopekisa bampasi, to bato balingaki nde kopesa ye foti? Bato bakokanisa nini soki bamoni tata moko akangi miso na mabe oyo bana na ye bazali kosala na nko kozanga ete apesa bango etumbu? Mbala mingi, bana yango bakoki kokóma na momeseno ya kosala mabe, kasi foti ekozala nde ya tata na bango.
Ndenge moko mpe, soki Yehova alimbisaka lisumu oyo Adama asalaki na nko nyonso, elingaki komonana ete asangani na mabe ya Adama. Kosala bongo elingaki te kobongisa makambo awa na mabele. (Talá Mosakoli 8:11.) Mpe lisusu, yango elingaki kotinda baanzelu bámemya Nzambe te, mpe elikya ya solosolo ete makambo ekobonga elingaki kozala lisusu te. Lokola boyangeli ya Yehova esimbami mpenza na boyengebene, akokaki kotika te ete likambo ya ndenge wana esalema.—Nz. 89:14.
Mpo na nini Nzambe atikaka bana bábotama na mbeba na nzoto to na makanisi?
Mbeba oyo bana babotamaka na yango eutaka epai ya Nzambe te. Akelaki mwasi ná mobali ya liboso bato ya kokoka, mpe apesaki bango likoki ya kobota bana ya kokoka lokola bango.—Eba. 1:27, 28.
Tobotamaka na lisumu oyo eutá na Adama. Lisumu yango nde esalaka ete tóbotama na mbeba na nzoto mpe na makanisi. (Rom. 5:12; mpo na koyeba makambo mosusu talá nkasa 58, 59.) Moto azwaka lisumu yango ntango kaka zemi ebandi. Yango wana Mokonzi Davidi akomaki ete: “Na lisumu mama na ngai azwaki zemi na ngai.” (Nz. 51:5) Soki Adama asalaka lisumu te, bana na ye balingaki kobotama kaka na bizaleli ya malamu. (Mpo na koyeba ndimbola ya Yoane 9:1, 2, talá nkasa 213, 214.)
Baboti bakoki kosala bana na bango mabe liboso kutu bábotama—na ndakisa, soki mama azali komɛla drɔgɛ to likaya ntango azali na zemi. Toboyi te, ezalaka ntango nyonso foti ya baboti te soki bana babotami na mbeba moko boye to bazali nzoto kolɔngɔnɔ te.
Na bolingo nyonso, Yehova azali kopesa nzela ete bana mpe bázwa bolamu ya mbeka ya lisiko ya Kristo. Mpo na kokumisa baboti oyo basalelaka ye na bosembo mpenza, Nzambe amonaka bana na bango ete bazali basantu. (1 Ko. 7:14) Yango wana, baboti oyo babangaka Nzambe bákebaka na bizaleli na bango liboso ya Nzambe, bamibanzabanzaka mpo na bana na bango mpe balingaka bango. Yehova azali kopesa bana oyo bakómi mikóló mpe oyo bakoki kondimela ye mpe kotosa mibeko na ye libaku ya kozala basaleli na ye. (Nz. 119:9; 148:12, 13; Mis. 16:1-3) Tosengeli mpe kobosana te ete Yesu, oyo azalaki mpenza elilingi ya Tata na ye, amonisaki ete azali mpenza komibanzabanza mpo na bana, kutu asekwisaki mwana moko. Lokola ye azali Mokonzi mpe Masiya, ntembe ezali te ete akokoba kosala bongo.—Mat. 19:13-15; Luka 8:41, 42, 49-56.
Mpo na nini Nzambe atikaka makama ndenge na ndenge ebebisa biloko mpe eboma bato?
Makambo lokola koningana ya mabele, mopɛpɛ makasi, mai oyo ezindisaka mboka mbalakaka, kozanga mbula, mpe kotomboka ya ngomba oyo esanzaka mɔtɔ oyo lelo toyokaka na bansango eutaka epai ya Nzambe te. Asalelaka biloko wana te mpo na kopesa bato mosusu etumbu. Mbala mingi, makama yango eutaka na nguya ya biloko oyo ezalisamá, oyo esalaka banda mabele ezalisamá. Biblia esakolaki ete, na mikolo na biso, mabele ekoningana, nzala ekozala, kasi yango elingi koloba te ete Nzambe to Yesu nde bato batindaka yango, ndenge kaka moto oyo ayebisaka ndenge ntango ekozala lobi to nsima ya lobi, akoki te komema ngambo ya makambo oyo asakolaki ete ekosalema. Lokola makambo yango ezali kosalema nzela moko na makambo mosusu ya elembo oyo Yesu apesaki mpo na nsuka ya mokili oyo mabe, yango ezali mpenza elembeteli ete mapamboli ya Bokonzi ya Nzambe ezali lisusu mosika te.—Luka 21:11, 31.
Mbala mingi makama ekómelaka bato mpo na foti na bango moko. Na ndenge nini? Ata soki bakebisi bato ete likama moko boye ekosalema, mingi baboyaka koyoka to balingaka te kozwa bibongiseli oyo esengeli.—Mas. 22:3; talá Matai 24:37-39.
Nzambe akoki kopekisa makama ya ndenge wana esalema. Nzambe apesaki Yesu Kristo nguya ya kopekisa mopɛpɛ makasi na Mbu ya Galile, mpe yango ezali kaka moko ya makambo oyo Nzambe akosalela bato ntango Masiya akoyangela. (Mrk. 4:37-41) Ntango Adama apesaki Nzambe mokɔngɔ, amonisaki ete aboyi Nzambe abatelaka ye ná bana na ye na makama ya ndenge wana. Baoyo bakozala na bomoi na Boyangeli ya Kristo Masiya, bakobatelama na bolingo ndenge wana; kaka guvɛrnema oyo Nzambe atye nde ekoki kobatela bato ndenge wana.—Yis. 11:9.
Bato oyo bazali konyokwama, Nzambe nde apesi bango etumbu mpo na mabe na bango?
Baoyo baboyaka kotosa mibeko ya Nzambe bakutanaka na mikakatano oyo euti na kozanga botosi na bango. (Gal. 6:7) Ntango mosusu, baumelaka te kobuka mbuma mabe ya misala na bango. Ntango mosusu emonanaka ete makambo na bango ezali kotambola malamu ntango molai. Nzokande Yesu Kristo oyo asalaki mabe ata mbala moko te, anyokwamaki makasi mpe abomamaki. Na yango, soki na mokili oyo moto azali na bomɛngo, yango emonisi te ete Nzambe apamboli ye, mpe soki azali na mpasi, yango emonisi te ete Nzambe aboyi ye.
Ntango Yobo abungisaki biloko na ye nyonso mpe abɛlaki maladi moko ya mabe, ezalaki te mpo Nzambe aboyi ye. Biblia emonisi polele ete Satana nde moto azalaki konyokola Yobo. (Yobo 2:3, 7, 8) Kasi baninga ya Yobo oyo bayaki kotala ye balobaki ete makambo nyonso wana ekómelaki ye mpo asalaki likambo moko ya mabe. (Yobo 4:7-9; 15:6, 20-24) Yehova apamelaki bango na maloba oyo: “Nkanda na ngai epeleli [bino] . . . mpo bolobeli ngai na bosolo te ndenge mosaleli na ngai Yobo alobi.”—Yobo 42:7.
Ya solo, makambo ya bato mabe ekoki kotambola malamu mpo na mwa ntango. Kutu Asafe akomaki ete: “Mpo nakómaki kolula bato oyo bamikumisaka, ntango namonaki kimya ya bato mabe. Bazali kutu te kozwa mpasi ya moto—mowei mpamba, mpe bazali konyokwama te lokola bato mosusu. Bazali kosɛka bato mpe bazali koloba makambo oyo ezali mabe; bazali koloba makambo ya kobuba na ndenge moko ya komitombola. Talá! Bato mabe oyo bazali na kimya mpo na ntango oyo etyami ndelo te, bazalaka bongo. Bazali konduka biloko na bango ya kobikela.”—Nz. 73:3, 5, 8, 12.
Mokolo mosusu bato bakozongisa monɔkɔ epai ya Nzambe. Na ntango wana, akopesa bato mabe etumbu, akoboma bango mpo na libela. Masese 2:21, 22 elobi ete: “Bato ya kolongobana nde bakofanda na mabele, mpe bato oyo bazangi mbeba nde bakotikala na yango. Kasi bato mabe bakolongolama na mabele; mpe bato ya bokosi bakopikolama wana.” Na yango, bato ya kolongobana, oyo mingi na bango banyokwamaki, bakokóma nzoto kolɔngɔnɔ mpe bakozala na ebele ya biloko oyo mabele ekobimisa.
Soki moto atuni—
‘Mpo na nini Nzambe atiki nzela ete bampasi nyonso oyo ezala?’
Okoki koyanola: ‘Likambo yango etungisaka biso nyonso. Tiká natuna yo naino: Nini etindi yo otuna motuna yango lelo?’ Okoki kobakisa: (1) ‘(Salelá makanisi oyo ezali na nkasa 58-61.)’ (2) ‘(Tángelá ye bavɛrsɛ mosusu oyo emonisi ete likambo ya mawa oyo ezali kotungisa ye ekosila.)’
To okoki koloba (soki moto oyo ozali kosolola na ye azali komitungisa mpo na makambo mabe oyo ezali koleka na mokili): ‘Biblia emonisi ntina ya makambo oyo tozali komona lelo na mokili. (Mos. 4:1; 8:9) Oyebi ete Biblia emonisi mpe oyo Nzambe akosala mpo na kosilisa bampasi na biso? (Nz. 72:12, 14; Dan. 2:44)’
Ndenge mosusu ya koyanola: ‘Namoni ete ondimelaka Nzambe. Ondimaka ete Nzambe azali bolingo? . . . Ondimaka ete azali na bwanya mpe azali Mozwi-ya-Nguya-Nyonso? . . . Yango wana, soki atiki bampasi ezala, ntina ezali. Biblia emonisi ntina yango. (Talá nkasa 58-61.)’