Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • yp2 mok. 10 nk. 92-98
  • Mpo na nini moninga na ngai ayokisi ngai mpasi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini moninga na ngai ayokisi ngai mpasi?
  • Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ezalaki likambo nini?
  • Ndenge ya kobongisa boninga
  • “Tokoki kosolola likambo yango?”
  • Mpo na nini moninga na ngai asali ngai boye?
    Lamuká!—2000
  • Banani bazali baninga na ngai ya solo?
    Lamuká!—2011
  • Nasengeli koyebisa mabe oyo moninga na ngai asali?
    Lamuká!—2009
  • Biblia elobi nini na likambo etali boninga?
    Biyano na mituna ya Biblia
Makambo mosusu
Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
yp2 mok. 10 nk. 92-98

Mokapo 10

Mpo na nini moninga na ngai ayokisi ngai mpasi?

“Kerry azalaki moninga na ngai ya motema mpenza. Lokola azalaki na motuka te, nazalaki komema ye mikolo nyonso na motuka na ngai. Kasi, eumelaki te, nabandaki komona ete azalaki kaka koluka kolyela ngai.

“Soki kaka akɔti na motuka, alingaka kaka kosololasolola na telefone to kokomakoma bamesaje. Apesá naino te ata mersi ya mpamba ndenge nazalaki komema ye, mpe apesá ata mwa likabo te mpo na kosomba esansi. Mpe masolo na ye ezalaki ya koloba mabe mpo na basusu. Nakómaki koyoka mawa ndenge nalekisaki ntango mingi elongo na ye!

“Mokolo moko, nayebisaki Kerry na boboto nyonso ete nsima ya mosala, nakobanda komema ye lisusu te na motuka. Banda wana, alingaka lisusu te kozala na ngai​—yango endimisaki ngai ete azalaki kosepela kozala moninga na ngai kaka mpo alyelaka ngai. Mpe likambo ya boye eswaka mpenza na motema!”​—Nicole.

LIKAMBO yango ekoki kokómela baninga ya motema. Lelo, bango mibale bayokani malamu; lobi bazali kokoka ata kosolola te. Ndenge nini boninga ya malamu ekoki kobeba mbala moko boye?

● Mpo na Jeremy, makambo nyonso ebongwanaki ntango moninga na ye ya motema akendaki kofanda mosika, na kilomɛtrɛ soki 1600. Jeremy alobi boye: “Banda akendá kuna, abengá ngai ata mokolo moko te, mpe esalaka ngai mpasi mpenza.”

● Kerrin abandaki komona ete moninga ya motema oyo basali na ye mbula mitano, akómi na bizaleli mosusu. Kerrin alobi boye: “Bizaleli mpe maloba na ye etungisaki ngai mingi. Akómaki komona mabe mpe kotyola makambo oyo ezalaki na ntina mingi mpo na ngai. Ntango tomekaki kosolola likambo yango, alobaki na ngai ete namonaka ete kaka ngai nde nazali malamu mpe ayebisaki ngai ete nazali sembo te, mpe boninga na biso ná ye ezali na litomba moko te mpo na ye!”

● Mpo na Gloria, boninga ya makasi esukaki na mbalakaka mpe kozanga koyeba ntina. Gloria alobi boye: “Na ebandeli, tozalaki koyokana malamu mpenza, mpe ayebisaki ngai ete nazali lokola ndeko na ye ya mwasi. Na nsima, mbala moko atikaki kosala makambo ná ngai, mpe mpo na komilongisa, akómaki kokosakosa.”

● Matata ya Laura ná Daria ebandaki ntango Daria akómaki kobima ná makango ya Laura. Laura alobi boye: “Azalaki kosolola na ye bangonga ebele na telefone, atako ngai ná mobali yango tozalaki kolingana. Moninga na ngai ya motema apesaki ngai mpasi mpe nabungisaki mobali oyo akokaki kobala ngai!”

Ezalaki likambo nini?

Moto nyonso asalaka mabunga. Na yango, tosengeli koyeba ete lelo to lobi moninga akoki kosala to koloba likambo moko oyo ekozokisa biso. Soki okanisi na bosembo nyonso makambo oyo osalá, okomona ete ozokisá mpe basusu. (Mosakoli 7:22) Elenge mwasi moko na nkombo Lisa alobi boye: “Biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka, mpe na ntango mosusu tozokisanaka.” Mbala mingi, mwa matata oyo ebimaka mpo mbala mosusu osimbi ntina te na likambo oyo moninga alobi to asali, ekoki kosila soki bosololi.

Kasi, na ntango mosusu, boninga ekatanaka te kaka mpo na likambo moko, kasi ezalaka nde ntango bino nyonso bokómi komona ete bokokani mpenza te ndenge bozalaki kokanisa na ebandeli. Kobosana te ete lokola ozali kokola, makambo oyo olingaka ekómi kobongwana; ezali mpe bongo mpo na moninga na yo. Okosala nini soki omoni ete yo ná moninga na yo bokómi kokabwana?

Ndenge ya kobongisa boninga

Osilá kopasola elamba moko oyo olingaka mingi? Osalaki nini? Obwakaki yango? To obongisaki yango? Na ntembe te, ekateli ya kobongisa to te ekotalela ndenge oyo elamba yango ebebaki mpe ndenge oyo olingaka yango. Soki ozalaki mpenza kolinga elamba yango, mbala mosusu okoluka ndenge ya kobongisa yango. Mbala mingi, esengeli mpe kosala bongo soki boninga na bino ebebi. Ekateli ya kobongisa boninga na bino to te, ekotalela mabe oyo esalemaki mpe ndenge oyo olingaka moninga na yo.a

Na ndakisa, soki bazokisaki yo na liloba moko to na likambo moko boye, okoki kosilisa likambo yango soki olandi toli oyo ezali na Nzembo 4:4: “Bóloba na motema na bino, na mbeto na bino, mpe bófanda nyɛɛ.” Na yango, liboso ya kokata boninga kanisá malamu mpenza. Asalaki likambo yango na nko? Soki oyebi malamu te ntina oyo moninga na yo asalaki likambo yango, mpo na nini te komona mbala mosusu ete asalaki yango na makanisi mabe te? Na makambo mingi, okoki mpe kotika ‘bolingo ezipa ebele ya masumu.’​—1 Petro 4:8.

Okoki mpe kotala soki yo mpe ozali na mwa mabe na likambo oyo esalemi. Na ndakisa, soki moninga abimisi sekele, ekoki kozala te mpo yo moko nde ozangaki mayele ndenge oyebisaki ye makambo yango? Motuna mosusu ya komituna ezali ya koyeba soki yo moko te nde osali ete baninga bábanda kotyola yo​—mbala mosusu mpo ozali kolobaloba mingi to mpe kobimisa maloba ya bozoba. (Masese 15:2) Soki ezali bongo, mituná boye: ‘Nasengeli kosala mbongwana mpo moninga na ngai apesa ngai limemya mingi?’

“Tokoki kosolola likambo yango?”

Bongo soki omoni ete okoki kobosana likambo yango te? Soki ezali bongo, ekozala malamu osolola na moninga na yo. Kasi kebá ete osala yango te ntango ozali na nkanda. Biblia elobi boye: “Moto oyo azali na nkanda makasi abimisaka kowelana, kasi ye oyo ayokaka nkanda noki te alɛmbisaka koswana.” (Masese 15:18) Na yango, zelá tii nkanda ekokita naino, bongo oluka kosilisa likambo yango.

Ntango ozali mpenza kosolola na moninga na yo, kobosana te ete mokano na yo ezali te ya ‘kozongisa mabe na mabe.’ (Baroma 12:17) Kasi, mokano na yo ezali ya kobongisa makambo mpe kozongisa boninga. (Nzembo 34:14) Na yango, monisá polele makambo nini osepelaki na yango te. Okoki koloba boye: “Tozali baninga banda mwa mikolo. Tokoki kosolola likambo oyo elekaki?” Soki oyebi ntina oyo matata ebimaki, ekozala mpasi te mpo na kobongisa boninga na bino. Ata soki moninga na yo aboyi, motema na yo ekoki kokita mpo oyebi ete omekaki kozongisa kimya.

Na nsuka, yebá ete atako “Baninga mosusu balukaka kosalana mabe,” ezali mpe na “moninga mosusu [oyo] akangamaka makasi koleka ndeko.” (Masese 18:24) Ya solo, ata baninga oyo bayokanaka malamu bakoki ntango mosusu kokutana na mwa matata. Ntango matata ebimi, salá nyonso oyo ekoki mpo na kozongisa boyokani na bino. Ya solo, soki ozali kondima kosilisa matata, yango ekomonisa ete ozali kokóma mokóló moko ya mayele.

MPO NA KOYEBA MAKAMBO MOSUSU OYO ETALI LISOLO OYO, TÁNGÁ MOKAPO 8, NA VOLIMI 1

NA MOKAPO OYO ELANDI

Nini esalaka ete baninga na yo mosusu bálekisaka bangonga mingi na Internet?

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mbala mosusu okoki koboya ete bato mosusu bázala baninga na yo. Ezali mabe te kosala bongo mingimingi soki bazali kosala makambo oyo ebongi te mpo na bakristo.​—1 Bakorinti 5:11; 15:33.

VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO

“Soki likoki ezali, soki etaleli kaka bino, bózala na kimya na bato nyonso.”​—Baroma 12:18.

TOLI

Na esika ya kozwa ekateli mbangumbangu, yoká naino makanisi ya moninga na yo.​—Masese 18:13.

OYEBAKI YANGO . . . ?

Baninga ya solosolo bayebaka mpe ete moto na moto azali na makambo na ye moko mpe batikelanaka ntango ya kozala mpe na baninga mosusu. (Masese 25:17) Kasi, kozwa moninga ntango mpe likebi na ye nyonso ekoki kobebisa boninga na bino.

MAKAMBO OYO NAKOSALA

Soki nalingi nasolola ná moninga mpo na likambo oyo asalaki oyo ezokisaki ngai

Ata soki likambo oyo moninga asali ezokisi ngai, nakoluka kobatela kimya soki nasali boye:

Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye:

OKANISI NINI?

● Mpo na nini mbala mosusu baninga bakabwanaka?

● Matata nini okoki kosilisa yo moko, mpe oyo wapi ekosɛnga bósolola na moninga oyo ayokisi yo mpasi na motema?

● Makambo nini ya ntina okoki koyekola soki moninga moko azokisi yo na motema?

● Makambo nini okoki kosala mpo baninga bázokisaka yo na motema te?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 95]

‘‘Soki likoki ya kobandela ezalaka, mbɛlɛ nalingaki koluka te ete moninga na ngai azala moto ya kokoka. Nalingaki koyoka ye lisusu mingi mpe nalingaki kosalisa ye; nalingaki te koyeisa mabunga na ye minene. Namoni sikoyo ete eloko oyo ebongisaka boninga ezali nde kosilisa matata mpe mikakatano.’’​—Keenon

[Elilingi na lokasa 94]

Ntango baninga mibale bakómi na matata, ezali lokola elamba oyo epasuki​—kasi lokola bakoki kotonga elamba oyo epasuki, bakoki mpe kobongisa boninga oyo ebebaki

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto