Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 13 lok. 36-lok. 37 par. 1
  • Yakobo ná Esau bayokani

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yakobo ná Esau bayokani
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Mapasa oyo bakeseni
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Yakobo azwaki libula
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Yakobo apesaki motuya na bozwi ya elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 13 lok. 36-lok. 37 par. 1
Yakobo afukami mpe Esau azali koya mbangu epai na ye

LITEYA 13

Yakobo ná Esau bayokani

Yehova apesaki Yakobo elaka ete akobatela ye kaka ndenge abatelaki Abrahama ná Yisaka. Yakobo akendaki kofanda na mboka babengi Harane; abalaki kuna, abotaki bana ebele, mpe akómaki na bozwi mingi.

Na nsima, Yehova alobaki na Yakobo: ‘Zongá na mokili ya batata na yo.’ Yakobo ná libota na ye babandaki mobembo molai mpo na kozonga. Na nzela, bato bayaki koyebisa Yakobo ete: ‘Ndeko na yo Esau azali koya, elongo na mibali 400!’ Yakobo azalaki kobanga ete Esau asala ye ná libota na ye mabe. Abondelaki Yehova: ‘Bikisá ngai na lobɔkɔ ya ndeko na ngai.’ Mokolo oyo elandaki, Yakobo atindelaki Esau bampate, bantaba, bangɔmbɛ, bakamela, mpe bampunda ebele.

Na butu, ntango Yakobo azalaki ye moko, amonaki anzelu! Anzelu yango abandaki kobunda na ye. Babundaki tii na ntɔngɔ. Yakobo ayokaki mpasi, kasi atikaki te. Anzelu alobaki na ye: ‘Tiká ngai nakende.’ Kasi Yakobo alobaki: ‘Nakotika yo kaka soki opamboli ngai.’

Nsukansuka anzelu yango apambolaki Yakobo. Sikoyo Yakobo ayebaki ete Yehova akotika te ete Esau asala ye mabe.

Na ntɔngɔ, ntango Yakobo atalaki na mosika, amonaki Esau ná mibali 400. Yakobo akendaki liboso ya libota na ye, mpe afukamaki mbala nsambo liboso ya ndeko na ye. Esau ayaki mbangu epai ya Yakobo mpe ayambaki ye. Babandaki kolela mpe bayokanaki. Okanisi ete Yehova ayokaki ndenge nini na milende oyo Yakobo asalaki mpo na koyokana na ndeko na ye?

Na nsima, Esau azongaki epai na ye, Yakobo mpe akendaki epai na ye. Yakobo azalaki na bana mibali 12. Nkombo na bango yango oyo: Rubene, Simeone, Levi, Yuda, Dani, Nafatali, Gade, Ashere, Isakare, Zebulone, Yozefe, ná Benyamina. Na bana yango, Yehova asalelaki Yozefe mpo na kobikisa bato na Ye. Oyebi ndenge asalaki yango? Tokolobela yango.

“Bókoba kolinga banguna na bino mpe kobondela mpo na baoyo bazali konyokola bino; mpo bómonisa ete bozali bana ya Tata na bino oyo azali na likoló.”​—Matai 5:44, 45

Mituna: Mpo na nini Yakobo azwaki lipamboli? Asalaki nini mpo ayokana na ndeko na ye?

Ebandeli 28:13-15; 31:3, 17, 18; 32:1-29; 33:1-18; 35:23-26

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto