Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/2 lok. 19
  • Oyebaki yango?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Oyebaki yango?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Masolo mosusu
  • Bomoi na ngai lokola moto ya maba etondi na esengo mpe epambolami na elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mboka epai losambo ya solo ná bopakano endongwanaki
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Zwá mateya na mibeko etali maladi ya maba
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2020
  • Losambo ya nzambe-mama lozali kino lelo oyo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/2 lok. 19

Oyebaki yango?

Maba oyo Biblia elobeli ezali kaka oyo toyebi lelo?

Lelo oyo, minganga basalelaka liloba “maba” mpo na kolobela maladi moko oyo ezwaka bato. Monganga ya liboso oyo amonaki mikrobɛ oyo epesaka maladi yango (Mycobacterium leprae) nkombo na ye Gerhard Hansen. Ezalaki na mobu 1873. Minganga bamonaki ete mikrobɛ yango ekoki koumela mikolo libwa libándá ya nzoto ya moto, na ndakisa na miyoyo. Bamonaki mpe ete soki moto oyo azali na maladi yango azali pene na bato mosusu, bato yango bakoki kozwa maladi yango, ata mpe na bilamba na ye. Ebongiseli moko ya ONU (OMS) emonisi ete na 2007 bato soki 220 000 bazwaki maladi yango ya mabe.

Ntembe ezali te ete na ntango ya kala, na mikili ya Azia, bato bazalaki kobela maladi ya maba, mpe Mibeko ya Moize esɛngaki ete moto ya maba azala mosika na bato mosusu. (Levitike 13:4, 5) Nzokande, liloba ya Liebele tsa·raʹʽath oyo ebongolami na “maba,” ezalaki kosalelama kaka mpo na bato te. Bazalaki mpe kosalela liloba yango mpo na bilamba mpe bandako. Lolenge yango ya maba ezalaki komonana na bilamba ya lɛnɛ to lini to mpe na eloko mosusu nyonso oyo esalemi na mposo ya nyama. Ntango mosusu ezalaki kosila na kosukola, kasi soki “langi ya mpondu to motane” yango elongwe te, elamba to eloko nyonso oyo ezwi maladi yango esengelaki kotumbama. (Levitike 13:47-52) Na ndako, maladi yango ezalaki komonana na “matɔnɔ ya langi ya mpondu, to ya motane” na bifelo. Na ntango wana, esengelaki kolongola mabanga to simá oyo ezwi maladi yango. Soki maladi yango ezongi, basengelaki kobuka ndako yango mobimba mpe kobwaka mosika bosɔtɔ yango nyonso. (Levitike 14:33-45) Bato mosusu balobaka ete maba oyo ezalaki kobima na bilamba to na bandako ezali nde oyo tobengaka lelo oyo koguga to kopɔla. Kasi, eyebani mpenza te.

Mpo na nini nsango oyo Paulo asakolaki na Efese ebimisaki mobulu epai ya basali ya palata?

Basali ya palata na Efese bazalaki kozwa mbongo mingi na “bandako mike ya losambo ya Alatemisi” oyo bazalaki kosala; Alatemisi azalaki mobateli, nzambe-mwasi ya Efese, nzambe ya bokila, oyo akolisaka milona mpe apesaka bana. (Misala 19:24) Bazalaki koloba ete ekeko na ye ekweaki “uta na likoló” mpe batyaki yango na tempelo ya Alatemisi na Efese. (Misala 19:35) Na ntango wana, tempelo yango ezalaki moko ya biloko nsambo ya kokamwa ya mokili. Ebele ya bato bazalaki kosopana na Efese na sanza ya Marsi to ya Aprili mpo na fɛti oyo bazalaki kosala mbula na mbula mpo na lokumu ya Alatemisi. Ebele ya bato yango bazalaki kosomba bikeko ya Alatemisi, mpo na kobomba yango, komibatela, kopesa yango makabo epai ya nzambe yango, to mpe mpo na kosambela na kati ya libota ntango bakozonga na bandako na bango. Makomi ya kala ya Efese elobelaka bisika oyo bazalaki kosala bikeko ya wolo to ya palata ya Alatemisi, mpe mosusu elobeli bituluku ya basali ya palata.

Paulo ateyaki ete bikeko oyo ‘esalemi na mabɔkɔ ezali banzambe te.’ (Misala 19:26) Mpo na yango, basali ya palata bamonaki ete mosala na bango oyo bazalaki kobikela ekómaki na likama, yango wana babimisaki mobulu mpo na kotɛmɛla Paulo. Demetiliusi, moko ya basali yango ya palata alobaki boye: “Likama esuki kaka te na likambo oyo ete mosala oyo ya biso ekosila lokumu kasi lisusu ete tempelo ya nzambe-mwasi monene Alatemisi ekotángama lokola eloko mpamba mpe ata bonene na ye oyo etúká mobimba ya Azia mpe mabelé oyo efandami esambelaka ezali pene ya kobebisama nyɛɛ.”​—Misala 19:27.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto